Daniel 10 (BOLCB2)
1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Nzambe alakisaki makambo epai ya Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari. Makambo yango ezalaki ya solo : etalisaki pasi makasi oyo ekoya. Daniele azwaki mayele ya kososola yango kati na emoniseli. 2 Na tango wana, ngai Daniele, nasalaki matanga oyo esalaki baposo misato. 3 Nazalaki kolia lisusu bilei ya kitoko te ; ezala misuni to vino, eloko moko te ekotaki lisusu na monoko na ngai. Mpe, na baposo misato wana, nazalaki kopakola lisusu mafuta ya solo kitoko te. 4 Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya liboso, tango nazalaki pembeni ya ebale monene Tigre, 5 natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki moto moko alata bilamba ya lino mpe mokaba moko ya wolo ya Ufazi na loketo na ye. 6 Nzoto na ye ezalaki kongenga lokola topaze, elongi na ye ezalaki kongala lokola mokalikali, miso na ye ezalaki kopela lokola moto, maboko mpe makolo na ye ezalaki kongenga lokola ebende ya bronze oyo balekisa na moto, mpe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bato ebele. 7 Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki. 8 Boye, natikalaki kaka ngai moko mpe nakomaki kotala emoniseli monene yango ; makasi esilaki ngai, elongi na ngai ebebaki makasi mpe nalembaki nzoto. 9 Nayokaki moto yango koloba ; bongo wana nazalaki koyoka mongongo na ye, nakweyaki makalikali, elongi kino na mabele. 10 Loboko moko esimbaki ngai mpe etelemisaki ngai, makolo mpe maboko na ngai ekomaki kolenga. 11 Bongo moto yango alobaki na ngai :— Daniele, molingami ya Nzambe, yoka malamu maloba oyo nazali koyebisa yo mpe telema na esika oyo ozali, pamba te natindami sik’oyo epai na yo.Wana azalaki nanu koloba na ngai, natelemaki na kolenga. 12 Akobaki koloba na ngai :— Daniele, kobanga te ! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango. 13 Kasi mokambi ya mokili ya Persi atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko. Boye, Misheli, moko kati na bakonzi ya ba-anjelu, ayaki kosunga ngai, pamba te bakonzi ya Persi bakangaki ngai kuna. 14 Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. 15 Wana azalaki koloba na ngai, nakitisaki elongi mpe nakokaki lisusu koloba te. 16 Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai :— Nkolo na ngai, molimo na ngai etungisami likolo ya emoniseli oyo nasili kozwa, mpe, ngai moto, nalembi nzoto ! 17 Ndenge nini mosali lokola ngai, nakoka solo kosolola na yo, nkolo na ngai, awa makasi esili ngai mpe kopema na ngai ekomi na pasi ? 18 Ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki ngai lisusu mpe epesaki ngai makasi. 19 Elobaki na ngai :— Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia ! Zala makasi ; solo, zala makasi !Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki :— Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi. 20 Boye, elobaki :— Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo ? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi ; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya ; 21 kasi liboso na nyonso, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami kati na buku ya solo. Moto moko te asungaka ngai liboso na bango ; kaka Misheli, mokambi na bino.
In Other Versions
Daniel 10 in the ANGEFD
Daniel 10 in the ANTPNG2D
Daniel 10 in the AS21
Daniel 10 in the BAGH
Daniel 10 in the BBPNG
Daniel 10 in the BBT1E
Daniel 10 in the BDS
Daniel 10 in the BEV
Daniel 10 in the BHAD
Daniel 10 in the BIB
Daniel 10 in the BLPT
Daniel 10 in the BNT
Daniel 10 in the BNTABOOT
Daniel 10 in the BNTLV
Daniel 10 in the BOATCB
Daniel 10 in the BOATCB2
Daniel 10 in the BOBCV
Daniel 10 in the BOCNT
Daniel 10 in the BOECS
Daniel 10 in the BOGWICC
Daniel 10 in the BOHCB
Daniel 10 in the BOHCV
Daniel 10 in the BOHLNT
Daniel 10 in the BOHNTLTAL
Daniel 10 in the BOICB
Daniel 10 in the BOILNTAP
Daniel 10 in the BOITCV
Daniel 10 in the BOKCV
Daniel 10 in the BOKCV2
Daniel 10 in the BOKHWOG
Daniel 10 in the BOKSSV
Daniel 10 in the BOLCB
Daniel 10 in the BOMCV
Daniel 10 in the BONAV
Daniel 10 in the BONCB
Daniel 10 in the BONLT
Daniel 10 in the BONUT2
Daniel 10 in the BOPLNT
Daniel 10 in the BOSCB
Daniel 10 in the BOSNC
Daniel 10 in the BOTLNT
Daniel 10 in the BOVCB
Daniel 10 in the BOYCB
Daniel 10 in the BPBB
Daniel 10 in the BPH
Daniel 10 in the BSB
Daniel 10 in the CCB
Daniel 10 in the CUV
Daniel 10 in the CUVS
Daniel 10 in the DBT
Daniel 10 in the DGDNT
Daniel 10 in the DHNT
Daniel 10 in the DNT
Daniel 10 in the ELBE
Daniel 10 in the EMTV
Daniel 10 in the ESV
Daniel 10 in the FBV
Daniel 10 in the FEB
Daniel 10 in the GGMNT
Daniel 10 in the GNT
Daniel 10 in the HARY
Daniel 10 in the HNT
Daniel 10 in the IRVA
Daniel 10 in the IRVB
Daniel 10 in the IRVG
Daniel 10 in the IRVH
Daniel 10 in the IRVK
Daniel 10 in the IRVM
Daniel 10 in the IRVM2
Daniel 10 in the IRVO
Daniel 10 in the IRVP
Daniel 10 in the IRVT
Daniel 10 in the IRVT2
Daniel 10 in the IRVU
Daniel 10 in the ISVN
Daniel 10 in the JSNT
Daniel 10 in the KAPI
Daniel 10 in the KBT1ETNIK
Daniel 10 in the KBV
Daniel 10 in the KJV
Daniel 10 in the KNFD
Daniel 10 in the LBA
Daniel 10 in the LBLA
Daniel 10 in the LNT
Daniel 10 in the LSV
Daniel 10 in the MAAL
Daniel 10 in the MBV
Daniel 10 in the MBV2
Daniel 10 in the MHNT
Daniel 10 in the MKNFD
Daniel 10 in the MNG
Daniel 10 in the MNT
Daniel 10 in the MNT2
Daniel 10 in the MRS1T
Daniel 10 in the NAA
Daniel 10 in the NASB
Daniel 10 in the NBLA
Daniel 10 in the NBS
Daniel 10 in the NBVTP
Daniel 10 in the NET2
Daniel 10 in the NIV11
Daniel 10 in the NNT
Daniel 10 in the NNT2
Daniel 10 in the NNT3
Daniel 10 in the PDDPT
Daniel 10 in the PFNT
Daniel 10 in the RMNT
Daniel 10 in the SBIAS
Daniel 10 in the SBIBS
Daniel 10 in the SBIBS2
Daniel 10 in the SBICS
Daniel 10 in the SBIDS
Daniel 10 in the SBIGS
Daniel 10 in the SBIHS
Daniel 10 in the SBIIS
Daniel 10 in the SBIIS2
Daniel 10 in the SBIIS3
Daniel 10 in the SBIKS
Daniel 10 in the SBIKS2
Daniel 10 in the SBIMS
Daniel 10 in the SBIOS
Daniel 10 in the SBIPS
Daniel 10 in the SBISS
Daniel 10 in the SBITS
Daniel 10 in the SBITS2
Daniel 10 in the SBITS3
Daniel 10 in the SBITS4
Daniel 10 in the SBIUS
Daniel 10 in the SBIVS
Daniel 10 in the SBT
Daniel 10 in the SBT1E
Daniel 10 in the SCHL
Daniel 10 in the SNT
Daniel 10 in the SUSU
Daniel 10 in the SUSU2
Daniel 10 in the SYNO
Daniel 10 in the TBIAOTANT
Daniel 10 in the TBT1E
Daniel 10 in the TBT1E2
Daniel 10 in the TFTIP
Daniel 10 in the TFTU
Daniel 10 in the TGNTATF3T
Daniel 10 in the THAI
Daniel 10 in the TNFD
Daniel 10 in the TNT
Daniel 10 in the TNTIK
Daniel 10 in the TNTIL
Daniel 10 in the TNTIN
Daniel 10 in the TNTIP
Daniel 10 in the TNTIZ
Daniel 10 in the TOMA
Daniel 10 in the TTENT
Daniel 10 in the UBG
Daniel 10 in the UGV
Daniel 10 in the UGV2
Daniel 10 in the UGV3
Daniel 10 in the VBL
Daniel 10 in the VDCC
Daniel 10 in the YALU
Daniel 10 in the YAPE
Daniel 10 in the YBVTP
Daniel 10 in the ZBP