Deuteronomy 21 (BOLCB2)
1 Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te, 2 bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga, 3 mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te ; 4 bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo. 5 Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali. 6 Bongo bampaka ya engumba yango bakosukola maboko na bango na likolo ya mwana ngombe ya mwasi oyo bakobuka kingo na lubwaku 7 mpe bakoloba : « Maboko na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te tango likambo yango esalemaki. 8 Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. »Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki. 9 Na nzela wana nde bokolongola, kati na bino, ngambo ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te wana bokosala likambo ya bosembo na miso ya Yawe. 10 Tango bokokende kobundisa banguna na bino, bongo Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino mpe bokangi ndambo ya bato ; 11 soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye. 12 Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ; 13 akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye ; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango. 14 Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi ; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye. 15 Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te ; 16 tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali ; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te. 17 Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso. 18 Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu, 19 tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango. 20 Bakoloba na bampaka ya engumba : « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga. » 21 Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga. 22 Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete, 23 ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.
In Other Versions
Deuteronomy 21 in the ANGEFD
Deuteronomy 21 in the ANTPNG2D
Deuteronomy 21 in the AS21
Deuteronomy 21 in the BAGH
Deuteronomy 21 in the BBPNG
Deuteronomy 21 in the BBT1E
Deuteronomy 21 in the BDS
Deuteronomy 21 in the BEV
Deuteronomy 21 in the BHAD
Deuteronomy 21 in the BIB
Deuteronomy 21 in the BLPT
Deuteronomy 21 in the BNT
Deuteronomy 21 in the BNTABOOT
Deuteronomy 21 in the BNTLV
Deuteronomy 21 in the BOATCB
Deuteronomy 21 in the BOATCB2
Deuteronomy 21 in the BOBCV
Deuteronomy 21 in the BOCNT
Deuteronomy 21 in the BOECS
Deuteronomy 21 in the BOGWICC
Deuteronomy 21 in the BOHCB
Deuteronomy 21 in the BOHCV
Deuteronomy 21 in the BOHLNT
Deuteronomy 21 in the BOHNTLTAL
Deuteronomy 21 in the BOICB
Deuteronomy 21 in the BOILNTAP
Deuteronomy 21 in the BOITCV
Deuteronomy 21 in the BOKCV
Deuteronomy 21 in the BOKCV2
Deuteronomy 21 in the BOKHWOG
Deuteronomy 21 in the BOKSSV
Deuteronomy 21 in the BOLCB
Deuteronomy 21 in the BOMCV
Deuteronomy 21 in the BONAV
Deuteronomy 21 in the BONCB
Deuteronomy 21 in the BONLT
Deuteronomy 21 in the BONUT2
Deuteronomy 21 in the BOPLNT
Deuteronomy 21 in the BOSCB
Deuteronomy 21 in the BOSNC
Deuteronomy 21 in the BOTLNT
Deuteronomy 21 in the BOVCB
Deuteronomy 21 in the BOYCB
Deuteronomy 21 in the BPBB
Deuteronomy 21 in the BPH
Deuteronomy 21 in the BSB
Deuteronomy 21 in the CCB
Deuteronomy 21 in the CUV
Deuteronomy 21 in the CUVS
Deuteronomy 21 in the DBT
Deuteronomy 21 in the DGDNT
Deuteronomy 21 in the DHNT
Deuteronomy 21 in the DNT
Deuteronomy 21 in the ELBE
Deuteronomy 21 in the EMTV
Deuteronomy 21 in the ESV
Deuteronomy 21 in the FBV
Deuteronomy 21 in the FEB
Deuteronomy 21 in the GGMNT
Deuteronomy 21 in the GNT
Deuteronomy 21 in the HARY
Deuteronomy 21 in the HNT
Deuteronomy 21 in the IRVA
Deuteronomy 21 in the IRVB
Deuteronomy 21 in the IRVG
Deuteronomy 21 in the IRVH
Deuteronomy 21 in the IRVK
Deuteronomy 21 in the IRVM
Deuteronomy 21 in the IRVM2
Deuteronomy 21 in the IRVO
Deuteronomy 21 in the IRVP
Deuteronomy 21 in the IRVT
Deuteronomy 21 in the IRVT2
Deuteronomy 21 in the IRVU
Deuteronomy 21 in the ISVN
Deuteronomy 21 in the JSNT
Deuteronomy 21 in the KAPI
Deuteronomy 21 in the KBT1ETNIK
Deuteronomy 21 in the KBV
Deuteronomy 21 in the KJV
Deuteronomy 21 in the KNFD
Deuteronomy 21 in the LBA
Deuteronomy 21 in the LBLA
Deuteronomy 21 in the LNT
Deuteronomy 21 in the LSV
Deuteronomy 21 in the MAAL
Deuteronomy 21 in the MBV
Deuteronomy 21 in the MBV2
Deuteronomy 21 in the MHNT
Deuteronomy 21 in the MKNFD
Deuteronomy 21 in the MNG
Deuteronomy 21 in the MNT
Deuteronomy 21 in the MNT2
Deuteronomy 21 in the MRS1T
Deuteronomy 21 in the NAA
Deuteronomy 21 in the NASB
Deuteronomy 21 in the NBLA
Deuteronomy 21 in the NBS
Deuteronomy 21 in the NBVTP
Deuteronomy 21 in the NET2
Deuteronomy 21 in the NIV11
Deuteronomy 21 in the NNT
Deuteronomy 21 in the NNT2
Deuteronomy 21 in the NNT3
Deuteronomy 21 in the PDDPT
Deuteronomy 21 in the PFNT
Deuteronomy 21 in the RMNT
Deuteronomy 21 in the SBIAS
Deuteronomy 21 in the SBIBS
Deuteronomy 21 in the SBIBS2
Deuteronomy 21 in the SBICS
Deuteronomy 21 in the SBIDS
Deuteronomy 21 in the SBIGS
Deuteronomy 21 in the SBIHS
Deuteronomy 21 in the SBIIS
Deuteronomy 21 in the SBIIS2
Deuteronomy 21 in the SBIIS3
Deuteronomy 21 in the SBIKS
Deuteronomy 21 in the SBIKS2
Deuteronomy 21 in the SBIMS
Deuteronomy 21 in the SBIOS
Deuteronomy 21 in the SBIPS
Deuteronomy 21 in the SBISS
Deuteronomy 21 in the SBITS
Deuteronomy 21 in the SBITS2
Deuteronomy 21 in the SBITS3
Deuteronomy 21 in the SBITS4
Deuteronomy 21 in the SBIUS
Deuteronomy 21 in the SBIVS
Deuteronomy 21 in the SBT
Deuteronomy 21 in the SBT1E
Deuteronomy 21 in the SCHL
Deuteronomy 21 in the SNT
Deuteronomy 21 in the SUSU
Deuteronomy 21 in the SUSU2
Deuteronomy 21 in the SYNO
Deuteronomy 21 in the TBIAOTANT
Deuteronomy 21 in the TBT1E
Deuteronomy 21 in the TBT1E2
Deuteronomy 21 in the TFTIP
Deuteronomy 21 in the TFTU
Deuteronomy 21 in the TGNTATF3T
Deuteronomy 21 in the THAI
Deuteronomy 21 in the TNFD
Deuteronomy 21 in the TNT
Deuteronomy 21 in the TNTIK
Deuteronomy 21 in the TNTIL
Deuteronomy 21 in the TNTIN
Deuteronomy 21 in the TNTIP
Deuteronomy 21 in the TNTIZ
Deuteronomy 21 in the TOMA
Deuteronomy 21 in the TTENT
Deuteronomy 21 in the UBG
Deuteronomy 21 in the UGV
Deuteronomy 21 in the UGV2
Deuteronomy 21 in the UGV3
Deuteronomy 21 in the VBL
Deuteronomy 21 in the VDCC
Deuteronomy 21 in the YALU
Deuteronomy 21 in the YAPE
Deuteronomy 21 in the YBVTP
Deuteronomy 21 in the ZBP