Deuteronomy 9 (BOLCB2)

1 Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo. 2 Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki ! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango : « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki ? » 3 Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka ; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo ; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo. 4 Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo : « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te ! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo. 5 Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi. 6 Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki. 7 Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te. 8 Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino. 9 Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te. 10 Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki. 11 Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani. 12 Bongo Yawe alobaki na ngai : « Kende, kita mbangu na ngomba oyo, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito bamikomisi mbindo ; bapesi noki mokongo na mibeko oyo napesaki bango mpe bamisaleli ekeko ya ebende banyangwisa na moto. » 13 Mpe Yawe alobaki na ngai : « Natali malamu bato oyo ; bazali penza libota ya batomboki ! 14 Tika Ngai kosala : nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. » 15 Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto ; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani. 16 Tango natalaki, namonaki ete bosalaki solo masumu epai na Yawe, Nzambe na bino : bomisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende banyangwisa na moto ; bopengwaki noki na nzela oyo Yawe atindaki bino. 17 Boye, nazwaki bitando yango mibale ya mabanga, nabwakaki yango wuta na maboko na ngai mpe napanzaki yango na biteni na miso na bino. 18 Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda. 19 Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino ; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu. 20 Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye ; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron. 21 Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba. 22 Na Tabeera, na Masa, na Kibiroti-Atava, bokobaki kaka kopesa Yawe kanda. 23 Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te. 24 Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe. 25 Nakweyaki liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, pamba te Yawe azalaki koloba ete akoboma bino. 26 Nabondelaki Yawe mpe nalobaki : « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya. 27 Kanisa basali na Yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi ! Kotala te botomboki ya bato oyo, mabe na bango mpe masumu na bango ; 28 noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba : ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. › 29 Nzokande bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na nguya monene na Yo mpe na loboko na Yo ya nguya. »

In Other Versions

Deuteronomy 9 in the ANGEFD

Deuteronomy 9 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 9 in the AS21

Deuteronomy 9 in the BAGH

Deuteronomy 9 in the BBPNG

Deuteronomy 9 in the BBT1E

Deuteronomy 9 in the BDS

Deuteronomy 9 in the BEV

Deuteronomy 9 in the BHAD

Deuteronomy 9 in the BIB

Deuteronomy 9 in the BLPT

Deuteronomy 9 in the BNT

Deuteronomy 9 in the BNTABOOT

Deuteronomy 9 in the BNTLV

Deuteronomy 9 in the BOATCB

Deuteronomy 9 in the BOATCB2

Deuteronomy 9 in the BOBCV

Deuteronomy 9 in the BOCNT

Deuteronomy 9 in the BOECS

Deuteronomy 9 in the BOGWICC

Deuteronomy 9 in the BOHCB

Deuteronomy 9 in the BOHCV

Deuteronomy 9 in the BOHLNT

Deuteronomy 9 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 9 in the BOICB

Deuteronomy 9 in the BOILNTAP

Deuteronomy 9 in the BOITCV

Deuteronomy 9 in the BOKCV

Deuteronomy 9 in the BOKCV2

Deuteronomy 9 in the BOKHWOG

Deuteronomy 9 in the BOKSSV

Deuteronomy 9 in the BOLCB

Deuteronomy 9 in the BOMCV

Deuteronomy 9 in the BONAV

Deuteronomy 9 in the BONCB

Deuteronomy 9 in the BONLT

Deuteronomy 9 in the BONUT2

Deuteronomy 9 in the BOPLNT

Deuteronomy 9 in the BOSCB

Deuteronomy 9 in the BOSNC

Deuteronomy 9 in the BOTLNT

Deuteronomy 9 in the BOVCB

Deuteronomy 9 in the BOYCB

Deuteronomy 9 in the BPBB

Deuteronomy 9 in the BPH

Deuteronomy 9 in the BSB

Deuteronomy 9 in the CCB

Deuteronomy 9 in the CUV

Deuteronomy 9 in the CUVS

Deuteronomy 9 in the DBT

Deuteronomy 9 in the DGDNT

Deuteronomy 9 in the DHNT

Deuteronomy 9 in the DNT

Deuteronomy 9 in the ELBE

Deuteronomy 9 in the EMTV

Deuteronomy 9 in the ESV

Deuteronomy 9 in the FBV

Deuteronomy 9 in the FEB

Deuteronomy 9 in the GGMNT

Deuteronomy 9 in the GNT

Deuteronomy 9 in the HARY

Deuteronomy 9 in the HNT

Deuteronomy 9 in the IRVA

Deuteronomy 9 in the IRVB

Deuteronomy 9 in the IRVG

Deuteronomy 9 in the IRVH

Deuteronomy 9 in the IRVK

Deuteronomy 9 in the IRVM

Deuteronomy 9 in the IRVM2

Deuteronomy 9 in the IRVO

Deuteronomy 9 in the IRVP

Deuteronomy 9 in the IRVT

Deuteronomy 9 in the IRVT2

Deuteronomy 9 in the IRVU

Deuteronomy 9 in the ISVN

Deuteronomy 9 in the JSNT

Deuteronomy 9 in the KAPI

Deuteronomy 9 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 9 in the KBV

Deuteronomy 9 in the KJV

Deuteronomy 9 in the KNFD

Deuteronomy 9 in the LBA

Deuteronomy 9 in the LBLA

Deuteronomy 9 in the LNT

Deuteronomy 9 in the LSV

Deuteronomy 9 in the MAAL

Deuteronomy 9 in the MBV

Deuteronomy 9 in the MBV2

Deuteronomy 9 in the MHNT

Deuteronomy 9 in the MKNFD

Deuteronomy 9 in the MNG

Deuteronomy 9 in the MNT

Deuteronomy 9 in the MNT2

Deuteronomy 9 in the MRS1T

Deuteronomy 9 in the NAA

Deuteronomy 9 in the NASB

Deuteronomy 9 in the NBLA

Deuteronomy 9 in the NBS

Deuteronomy 9 in the NBVTP

Deuteronomy 9 in the NET2

Deuteronomy 9 in the NIV11

Deuteronomy 9 in the NNT

Deuteronomy 9 in the NNT2

Deuteronomy 9 in the NNT3

Deuteronomy 9 in the PDDPT

Deuteronomy 9 in the PFNT

Deuteronomy 9 in the RMNT

Deuteronomy 9 in the SBIAS

Deuteronomy 9 in the SBIBS

Deuteronomy 9 in the SBIBS2

Deuteronomy 9 in the SBICS

Deuteronomy 9 in the SBIDS

Deuteronomy 9 in the SBIGS

Deuteronomy 9 in the SBIHS

Deuteronomy 9 in the SBIIS

Deuteronomy 9 in the SBIIS2

Deuteronomy 9 in the SBIIS3

Deuteronomy 9 in the SBIKS

Deuteronomy 9 in the SBIKS2

Deuteronomy 9 in the SBIMS

Deuteronomy 9 in the SBIOS

Deuteronomy 9 in the SBIPS

Deuteronomy 9 in the SBISS

Deuteronomy 9 in the SBITS

Deuteronomy 9 in the SBITS2

Deuteronomy 9 in the SBITS3

Deuteronomy 9 in the SBITS4

Deuteronomy 9 in the SBIUS

Deuteronomy 9 in the SBIVS

Deuteronomy 9 in the SBT

Deuteronomy 9 in the SBT1E

Deuteronomy 9 in the SCHL

Deuteronomy 9 in the SNT

Deuteronomy 9 in the SUSU

Deuteronomy 9 in the SUSU2

Deuteronomy 9 in the SYNO

Deuteronomy 9 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 9 in the TBT1E

Deuteronomy 9 in the TBT1E2

Deuteronomy 9 in the TFTIP

Deuteronomy 9 in the TFTU

Deuteronomy 9 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 9 in the THAI

Deuteronomy 9 in the TNFD

Deuteronomy 9 in the TNT

Deuteronomy 9 in the TNTIK

Deuteronomy 9 in the TNTIL

Deuteronomy 9 in the TNTIN

Deuteronomy 9 in the TNTIP

Deuteronomy 9 in the TNTIZ

Deuteronomy 9 in the TOMA

Deuteronomy 9 in the TTENT

Deuteronomy 9 in the UBG

Deuteronomy 9 in the UGV

Deuteronomy 9 in the UGV2

Deuteronomy 9 in the UGV3

Deuteronomy 9 in the VBL

Deuteronomy 9 in the VDCC

Deuteronomy 9 in the YALU

Deuteronomy 9 in the YAPE

Deuteronomy 9 in the YBVTP

Deuteronomy 9 in the ZBP