Ephesians 2 (BOLCB2)

1 Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino, 2 oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe. 3 Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso. 4 Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene, 5 atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu… 6 Kati na Yesu-Klisto, Nzambe asekwisaki biso elongo na Klisto mpe avandisaki biso elongo na Ye na bisika ya Likolo 7 mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso. 8 Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe— 9 ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa. 10 Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango. 11 Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato. 12 Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili. 13 Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto. 14 Solo, azali Ye moko kimia na biso : atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango, 15 alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia, 16 mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango. 17 Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene. 18 Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko. 19 Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe. 20 Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba. 21 Kati na Yesu-Klisto, ndako mobimba esangani malamu mpe ezali kokola mpo ete ekoma Tempelo ya bule kati na Nkolo. 22 Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye.

In Other Versions

Ephesians 2 in the ANGEFD

Ephesians 2 in the ANTPNG2D

Ephesians 2 in the AS21

Ephesians 2 in the BAGH

Ephesians 2 in the BBPNG

Ephesians 2 in the BBT1E

Ephesians 2 in the BDS

Ephesians 2 in the BEV

Ephesians 2 in the BHAD

Ephesians 2 in the BIB

Ephesians 2 in the BLPT

Ephesians 2 in the BNT

Ephesians 2 in the BNTABOOT

Ephesians 2 in the BNTLV

Ephesians 2 in the BOATCB

Ephesians 2 in the BOATCB2

Ephesians 2 in the BOBCV

Ephesians 2 in the BOCNT

Ephesians 2 in the BOECS

Ephesians 2 in the BOGWICC

Ephesians 2 in the BOHCB

Ephesians 2 in the BOHCV

Ephesians 2 in the BOHLNT

Ephesians 2 in the BOHNTLTAL

Ephesians 2 in the BOICB

Ephesians 2 in the BOILNTAP

Ephesians 2 in the BOITCV

Ephesians 2 in the BOKCV

Ephesians 2 in the BOKCV2

Ephesians 2 in the BOKHWOG

Ephesians 2 in the BOKSSV

Ephesians 2 in the BOLCB

Ephesians 2 in the BOMCV

Ephesians 2 in the BONAV

Ephesians 2 in the BONCB

Ephesians 2 in the BONLT

Ephesians 2 in the BONUT2

Ephesians 2 in the BOPLNT

Ephesians 2 in the BOSCB

Ephesians 2 in the BOSNC

Ephesians 2 in the BOTLNT

Ephesians 2 in the BOVCB

Ephesians 2 in the BOYCB

Ephesians 2 in the BPBB

Ephesians 2 in the BPH

Ephesians 2 in the BSB

Ephesians 2 in the CCB

Ephesians 2 in the CUV

Ephesians 2 in the CUVS

Ephesians 2 in the DBT

Ephesians 2 in the DGDNT

Ephesians 2 in the DHNT

Ephesians 2 in the DNT

Ephesians 2 in the ELBE

Ephesians 2 in the EMTV

Ephesians 2 in the ESV

Ephesians 2 in the FBV

Ephesians 2 in the FEB

Ephesians 2 in the GGMNT

Ephesians 2 in the GNT

Ephesians 2 in the HARY

Ephesians 2 in the HNT

Ephesians 2 in the IRVA

Ephesians 2 in the IRVB

Ephesians 2 in the IRVG

Ephesians 2 in the IRVH

Ephesians 2 in the IRVK

Ephesians 2 in the IRVM

Ephesians 2 in the IRVM2

Ephesians 2 in the IRVO

Ephesians 2 in the IRVP

Ephesians 2 in the IRVT

Ephesians 2 in the IRVT2

Ephesians 2 in the IRVU

Ephesians 2 in the ISVN

Ephesians 2 in the JSNT

Ephesians 2 in the KAPI

Ephesians 2 in the KBT1ETNIK

Ephesians 2 in the KBV

Ephesians 2 in the KJV

Ephesians 2 in the KNFD

Ephesians 2 in the LBA

Ephesians 2 in the LBLA

Ephesians 2 in the LNT

Ephesians 2 in the LSV

Ephesians 2 in the MAAL

Ephesians 2 in the MBV

Ephesians 2 in the MBV2

Ephesians 2 in the MHNT

Ephesians 2 in the MKNFD

Ephesians 2 in the MNG

Ephesians 2 in the MNT

Ephesians 2 in the MNT2

Ephesians 2 in the MRS1T

Ephesians 2 in the NAA

Ephesians 2 in the NASB

Ephesians 2 in the NBLA

Ephesians 2 in the NBS

Ephesians 2 in the NBVTP

Ephesians 2 in the NET2

Ephesians 2 in the NIV11

Ephesians 2 in the NNT

Ephesians 2 in the NNT2

Ephesians 2 in the NNT3

Ephesians 2 in the PDDPT

Ephesians 2 in the PFNT

Ephesians 2 in the RMNT

Ephesians 2 in the SBIAS

Ephesians 2 in the SBIBS

Ephesians 2 in the SBIBS2

Ephesians 2 in the SBICS

Ephesians 2 in the SBIDS

Ephesians 2 in the SBIGS

Ephesians 2 in the SBIHS

Ephesians 2 in the SBIIS

Ephesians 2 in the SBIIS2

Ephesians 2 in the SBIIS3

Ephesians 2 in the SBIKS

Ephesians 2 in the SBIKS2

Ephesians 2 in the SBIMS

Ephesians 2 in the SBIOS

Ephesians 2 in the SBIPS

Ephesians 2 in the SBISS

Ephesians 2 in the SBITS

Ephesians 2 in the SBITS2

Ephesians 2 in the SBITS3

Ephesians 2 in the SBITS4

Ephesians 2 in the SBIUS

Ephesians 2 in the SBIVS

Ephesians 2 in the SBT

Ephesians 2 in the SBT1E

Ephesians 2 in the SCHL

Ephesians 2 in the SNT

Ephesians 2 in the SUSU

Ephesians 2 in the SUSU2

Ephesians 2 in the SYNO

Ephesians 2 in the TBIAOTANT

Ephesians 2 in the TBT1E

Ephesians 2 in the TBT1E2

Ephesians 2 in the TFTIP

Ephesians 2 in the TFTU

Ephesians 2 in the TGNTATF3T

Ephesians 2 in the THAI

Ephesians 2 in the TNFD

Ephesians 2 in the TNT

Ephesians 2 in the TNTIK

Ephesians 2 in the TNTIL

Ephesians 2 in the TNTIN

Ephesians 2 in the TNTIP

Ephesians 2 in the TNTIZ

Ephesians 2 in the TOMA

Ephesians 2 in the TTENT

Ephesians 2 in the UBG

Ephesians 2 in the UGV

Ephesians 2 in the UGV2

Ephesians 2 in the UGV3

Ephesians 2 in the VBL

Ephesians 2 in the VDCC

Ephesians 2 in the YALU

Ephesians 2 in the YAPE

Ephesians 2 in the YBVTP

Ephesians 2 in the ZBP