Ephesians 6 (BOLCB2)
1 Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. 2 Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu 3 mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili. 4 Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo. 5 Bino bawumbu, botosaka bankolo na bino ya mokili, na limemia, na kobanga mpe na bosembo ya mitema, lokola nde bozali kotosa Klisto ; 6 na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango. 7 Bosalaka na esengo lokola bawumbu ya Nkolo, kasi lokola bawumbu ya bato te, 8 pamba te boyebi malamu ete Nkolo akofuta moto nyonso mpo na bolamu nyonso oyo asalaka, azala mowumbu to monsomi. 9 Bongo mpo na bino bankolo, bosalaka mpe ndenge wana epai ya bawumbu na bino. Bobangisaka bango te, lokola boyebi malamu ete Nkolo na bango, oyo azali kati na Likolo azali mpe Nkolo na bino mpe aponaka bilongi te. 10 Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene. 11 Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana. 12 Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo. 13 Yango wana, bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kolonga na mokolo mabe ya Satana mpe kotelema ngwi kino na suka sima na bino kobunda. 14 Boye botelema ngwi, bolataka solo lokola mokaba na loketo, bosembo lokola ebombelo ya tolo, 15 molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino. 16 Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola nguba oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka. 17 Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo. 18 Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso. 19 Bobondelaka mpe mpo na ngai mpo ete, tango nyonso nakozala koteya, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli kotatola mpo na kosakola mabombami ya Sango Malamu, na kozanga bobangi. 20 Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango. 21 Tishike oyo, kati na Nkolo, azali ndeko molingami mpe mosali ya sembo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe boyeba ndenge nini nazali mpe makambo nini nazali kosala. 22 Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na ngai mpe alendisa bino. 23 Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu-Klisto bapesa na bandeko nyonso kimia, bolingo mpe kondima ! 24 Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te !
In Other Versions
Ephesians 6 in the ANGEFD
Ephesians 6 in the ANTPNG2D
Ephesians 6 in the AS21
Ephesians 6 in the BAGH
Ephesians 6 in the BBPNG
Ephesians 6 in the BBT1E
Ephesians 6 in the BDS
Ephesians 6 in the BEV
Ephesians 6 in the BHAD
Ephesians 6 in the BIB
Ephesians 6 in the BLPT
Ephesians 6 in the BNT
Ephesians 6 in the BNTABOOT
Ephesians 6 in the BNTLV
Ephesians 6 in the BOATCB
Ephesians 6 in the BOATCB2
Ephesians 6 in the BOBCV
Ephesians 6 in the BOCNT
Ephesians 6 in the BOECS
Ephesians 6 in the BOGWICC
Ephesians 6 in the BOHCB
Ephesians 6 in the BOHCV
Ephesians 6 in the BOHLNT
Ephesians 6 in the BOHNTLTAL
Ephesians 6 in the BOICB
Ephesians 6 in the BOILNTAP
Ephesians 6 in the BOITCV
Ephesians 6 in the BOKCV
Ephesians 6 in the BOKCV2
Ephesians 6 in the BOKHWOG
Ephesians 6 in the BOKSSV
Ephesians 6 in the BOLCB
Ephesians 6 in the BOMCV
Ephesians 6 in the BONAV
Ephesians 6 in the BONCB
Ephesians 6 in the BONLT
Ephesians 6 in the BONUT2
Ephesians 6 in the BOPLNT
Ephesians 6 in the BOSCB
Ephesians 6 in the BOSNC
Ephesians 6 in the BOTLNT
Ephesians 6 in the BOVCB
Ephesians 6 in the BOYCB
Ephesians 6 in the BPBB
Ephesians 6 in the BPH
Ephesians 6 in the BSB
Ephesians 6 in the CCB
Ephesians 6 in the CUV
Ephesians 6 in the CUVS
Ephesians 6 in the DBT
Ephesians 6 in the DGDNT
Ephesians 6 in the DHNT
Ephesians 6 in the DNT
Ephesians 6 in the ELBE
Ephesians 6 in the EMTV
Ephesians 6 in the ESV
Ephesians 6 in the FBV
Ephesians 6 in the FEB
Ephesians 6 in the GGMNT
Ephesians 6 in the GNT
Ephesians 6 in the HARY
Ephesians 6 in the HNT
Ephesians 6 in the IRVA
Ephesians 6 in the IRVB
Ephesians 6 in the IRVG
Ephesians 6 in the IRVH
Ephesians 6 in the IRVK
Ephesians 6 in the IRVM
Ephesians 6 in the IRVM2
Ephesians 6 in the IRVO
Ephesians 6 in the IRVP
Ephesians 6 in the IRVT
Ephesians 6 in the IRVT2
Ephesians 6 in the IRVU
Ephesians 6 in the ISVN
Ephesians 6 in the JSNT
Ephesians 6 in the KAPI
Ephesians 6 in the KBT1ETNIK
Ephesians 6 in the KBV
Ephesians 6 in the KJV
Ephesians 6 in the KNFD
Ephesians 6 in the LBA
Ephesians 6 in the LBLA
Ephesians 6 in the LNT
Ephesians 6 in the LSV
Ephesians 6 in the MAAL
Ephesians 6 in the MBV
Ephesians 6 in the MBV2
Ephesians 6 in the MHNT
Ephesians 6 in the MKNFD
Ephesians 6 in the MNG
Ephesians 6 in the MNT
Ephesians 6 in the MNT2
Ephesians 6 in the MRS1T
Ephesians 6 in the NAA
Ephesians 6 in the NASB
Ephesians 6 in the NBLA
Ephesians 6 in the NBS
Ephesians 6 in the NBVTP
Ephesians 6 in the NET2
Ephesians 6 in the NIV11
Ephesians 6 in the NNT
Ephesians 6 in the NNT2
Ephesians 6 in the NNT3
Ephesians 6 in the PDDPT
Ephesians 6 in the PFNT
Ephesians 6 in the RMNT
Ephesians 6 in the SBIAS
Ephesians 6 in the SBIBS
Ephesians 6 in the SBIBS2
Ephesians 6 in the SBICS
Ephesians 6 in the SBIDS
Ephesians 6 in the SBIGS
Ephesians 6 in the SBIHS
Ephesians 6 in the SBIIS
Ephesians 6 in the SBIIS2
Ephesians 6 in the SBIIS3
Ephesians 6 in the SBIKS
Ephesians 6 in the SBIKS2
Ephesians 6 in the SBIMS
Ephesians 6 in the SBIOS
Ephesians 6 in the SBIPS
Ephesians 6 in the SBISS
Ephesians 6 in the SBITS
Ephesians 6 in the SBITS2
Ephesians 6 in the SBITS3
Ephesians 6 in the SBITS4
Ephesians 6 in the SBIUS
Ephesians 6 in the SBIVS
Ephesians 6 in the SBT
Ephesians 6 in the SBT1E
Ephesians 6 in the SCHL
Ephesians 6 in the SNT
Ephesians 6 in the SUSU
Ephesians 6 in the SUSU2
Ephesians 6 in the SYNO
Ephesians 6 in the TBIAOTANT
Ephesians 6 in the TBT1E
Ephesians 6 in the TBT1E2
Ephesians 6 in the TFTIP
Ephesians 6 in the TFTU
Ephesians 6 in the TGNTATF3T
Ephesians 6 in the THAI
Ephesians 6 in the TNFD
Ephesians 6 in the TNT
Ephesians 6 in the TNTIK
Ephesians 6 in the TNTIL
Ephesians 6 in the TNTIN
Ephesians 6 in the TNTIP
Ephesians 6 in the TNTIZ
Ephesians 6 in the TOMA
Ephesians 6 in the TTENT
Ephesians 6 in the UBG
Ephesians 6 in the UGV
Ephesians 6 in the UGV2
Ephesians 6 in the UGV3
Ephesians 6 in the VBL
Ephesians 6 in the VDCC
Ephesians 6 in the YALU
Ephesians 6 in the YAPE
Ephesians 6 in the YBVTP
Ephesians 6 in the ZBP