Exodus 18 (BOLCB2)

1 Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito. 2 Jetro amemaki Sefora, mwasi ya Moyize, oyo ye Moyize azongisaki nanu epai ya baboti na ye, 3 elongo na bana mibali mibale oyo Sefora abotelaki Moyize. Mwana ya liboso, kombo na ye ezalaki « Gerishomi, » pamba te Moyize amilobelaki : « Nakomaki mopaya kati na mokili ya mopaya ; » 4 mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri, » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. » 5 Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe. 6 Jetro atindelaki Moyize maloba oyo :— Ngai Jetro, bokilo na yo, nazali koya epai na yo elongo na mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya mibali. 7 Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo. 8 Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango. 9 Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito. 10 Jetro alobaki :— Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito. 11 Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele. 12 Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe. 13 Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa. 14 Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki :— Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ? 15 Moyize azongiselaki ye :— Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe. 16 Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe. 17 Bokilo ya Moyize alobaki na ye :— Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te. 18 Okolemba noki elongo na bato oyo bazali koya epai na yo. Mosala oyo eleki makasi mpo na yo ; okolonga kosala yango yo moko te. 19 Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe 20 mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala. 21 Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. 22 Okopesa bango mosala ya kosambisa bato tango nyonso mpe ndingisa ya kokata bango moko makambo ya mike ; kasi babanda komemela yo kaka makambo ya minene. Soki osali bongo, okozala lisusu na mokumba ya makasi te ; pamba te okokabola yango elongo na bango. 23 Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango. 24 Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki. 25 Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. 26 Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize. 27 Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye.

In Other Versions

Exodus 18 in the ANGEFD

Exodus 18 in the ANTPNG2D

Exodus 18 in the AS21

Exodus 18 in the BAGH

Exodus 18 in the BBPNG

Exodus 18 in the BBT1E

Exodus 18 in the BDS

Exodus 18 in the BEV

Exodus 18 in the BHAD

Exodus 18 in the BIB

Exodus 18 in the BLPT

Exodus 18 in the BNT

Exodus 18 in the BNTABOOT

Exodus 18 in the BNTLV

Exodus 18 in the BOATCB

Exodus 18 in the BOATCB2

Exodus 18 in the BOBCV

Exodus 18 in the BOCNT

Exodus 18 in the BOECS

Exodus 18 in the BOGWICC

Exodus 18 in the BOHCB

Exodus 18 in the BOHCV

Exodus 18 in the BOHLNT

Exodus 18 in the BOHNTLTAL

Exodus 18 in the BOICB

Exodus 18 in the BOILNTAP

Exodus 18 in the BOITCV

Exodus 18 in the BOKCV

Exodus 18 in the BOKCV2

Exodus 18 in the BOKHWOG

Exodus 18 in the BOKSSV

Exodus 18 in the BOLCB

Exodus 18 in the BOMCV

Exodus 18 in the BONAV

Exodus 18 in the BONCB

Exodus 18 in the BONLT

Exodus 18 in the BONUT2

Exodus 18 in the BOPLNT

Exodus 18 in the BOSCB

Exodus 18 in the BOSNC

Exodus 18 in the BOTLNT

Exodus 18 in the BOVCB

Exodus 18 in the BOYCB

Exodus 18 in the BPBB

Exodus 18 in the BPH

Exodus 18 in the BSB

Exodus 18 in the CCB

Exodus 18 in the CUV

Exodus 18 in the CUVS

Exodus 18 in the DBT

Exodus 18 in the DGDNT

Exodus 18 in the DHNT

Exodus 18 in the DNT

Exodus 18 in the ELBE

Exodus 18 in the EMTV

Exodus 18 in the ESV

Exodus 18 in the FBV

Exodus 18 in the FEB

Exodus 18 in the GGMNT

Exodus 18 in the GNT

Exodus 18 in the HARY

Exodus 18 in the HNT

Exodus 18 in the IRVA

Exodus 18 in the IRVB

Exodus 18 in the IRVG

Exodus 18 in the IRVH

Exodus 18 in the IRVK

Exodus 18 in the IRVM

Exodus 18 in the IRVM2

Exodus 18 in the IRVO

Exodus 18 in the IRVP

Exodus 18 in the IRVT

Exodus 18 in the IRVT2

Exodus 18 in the IRVU

Exodus 18 in the ISVN

Exodus 18 in the JSNT

Exodus 18 in the KAPI

Exodus 18 in the KBT1ETNIK

Exodus 18 in the KBV

Exodus 18 in the KJV

Exodus 18 in the KNFD

Exodus 18 in the LBA

Exodus 18 in the LBLA

Exodus 18 in the LNT

Exodus 18 in the LSV

Exodus 18 in the MAAL

Exodus 18 in the MBV

Exodus 18 in the MBV2

Exodus 18 in the MHNT

Exodus 18 in the MKNFD

Exodus 18 in the MNG

Exodus 18 in the MNT

Exodus 18 in the MNT2

Exodus 18 in the MRS1T

Exodus 18 in the NAA

Exodus 18 in the NASB

Exodus 18 in the NBLA

Exodus 18 in the NBS

Exodus 18 in the NBVTP

Exodus 18 in the NET2

Exodus 18 in the NIV11

Exodus 18 in the NNT

Exodus 18 in the NNT2

Exodus 18 in the NNT3

Exodus 18 in the PDDPT

Exodus 18 in the PFNT

Exodus 18 in the RMNT

Exodus 18 in the SBIAS

Exodus 18 in the SBIBS

Exodus 18 in the SBIBS2

Exodus 18 in the SBICS

Exodus 18 in the SBIDS

Exodus 18 in the SBIGS

Exodus 18 in the SBIHS

Exodus 18 in the SBIIS

Exodus 18 in the SBIIS2

Exodus 18 in the SBIIS3

Exodus 18 in the SBIKS

Exodus 18 in the SBIKS2

Exodus 18 in the SBIMS

Exodus 18 in the SBIOS

Exodus 18 in the SBIPS

Exodus 18 in the SBISS

Exodus 18 in the SBITS

Exodus 18 in the SBITS2

Exodus 18 in the SBITS3

Exodus 18 in the SBITS4

Exodus 18 in the SBIUS

Exodus 18 in the SBIVS

Exodus 18 in the SBT

Exodus 18 in the SBT1E

Exodus 18 in the SCHL

Exodus 18 in the SNT

Exodus 18 in the SUSU

Exodus 18 in the SUSU2

Exodus 18 in the SYNO

Exodus 18 in the TBIAOTANT

Exodus 18 in the TBT1E

Exodus 18 in the TBT1E2

Exodus 18 in the TFTIP

Exodus 18 in the TFTU

Exodus 18 in the TGNTATF3T

Exodus 18 in the THAI

Exodus 18 in the TNFD

Exodus 18 in the TNT

Exodus 18 in the TNTIK

Exodus 18 in the TNTIL

Exodus 18 in the TNTIN

Exodus 18 in the TNTIP

Exodus 18 in the TNTIZ

Exodus 18 in the TOMA

Exodus 18 in the TTENT

Exodus 18 in the UBG

Exodus 18 in the UGV

Exodus 18 in the UGV2

Exodus 18 in the UGV3

Exodus 18 in the VBL

Exodus 18 in the VDCC

Exodus 18 in the YALU

Exodus 18 in the YAPE

Exodus 18 in the YBVTP

Exodus 18 in the ZBP