Exodus 2 (BOLCB2)

1 Mobali moko ya libota ya Levi abalaki mwasi kati na libota ya Levi. 2 Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato. 3 Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo ; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili. 4 Ndeko mwasi ya mwana yango atelemaki mosika mpo na kotala likambo oyo ekokaki kokomela ye. 5 Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale ; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango. 6 Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki : « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. » 7 Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon :— Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo ? 8 Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye :— Iyo, kende !Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango. 9 Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango : « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. »Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele. 10 Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. » 11 Mokolo moko, wana Moyize akomaki mokolo, akendeki na esika oyo bandeko na ye bazalaki mpe amonaki bango kosala misala makasi oyo bapesaki bango mpo na konyokola bango. Amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moko kati na bato na ye Ba-Ebre. 12 Atalaki ngambo na ngambo mpe amonaki moto te ; bongo abomaki moto ya Ejipito mpe akundaki ye na zelo. 13 Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe :— Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo ? 14 Moto wana azongisaki :— Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito ?Moyize abangaki mpe amilobelaki : « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. » 15 Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize ; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani. 16 Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango. 17 Kasi babateli bibwele bayaki mpe babenganaki bango. Moyize atelemaki, akotelaki bango mpe amelisaki bibwele na bango mayi. 18 Tango bana basi bazongaki epai ya tata na bango Reweli, atunaki bango :— Mpo na nini lelo bozongi noki ? 19 Bango bazongisaki :— Moto moko ya Ejipito abundelaki biso liboso ya babateli bibwele, atokelaki biso mayi mpe amelisaki bibwele. 20 Reweli atunaki bana na ye ya basi :— Moto yango ya Ejipito azali wapi ? Mpo na nini botiki ye kuna ? Bobenga ye mpo ete aya kolia. 21 Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli ; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize. 22 Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki : « Nazali mopaya na mboka mopaya. » 23 Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe. 24 Nzambe ayokaki koganga na bango mpe akanisaki boyokani na Ye oyo asalaki elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. 25 Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.

In Other Versions

Exodus 2 in the ANGEFD

Exodus 2 in the ANTPNG2D

Exodus 2 in the AS21

Exodus 2 in the BAGH

Exodus 2 in the BBPNG

Exodus 2 in the BBT1E

Exodus 2 in the BDS

Exodus 2 in the BEV

Exodus 2 in the BHAD

Exodus 2 in the BIB

Exodus 2 in the BLPT

Exodus 2 in the BNT

Exodus 2 in the BNTABOOT

Exodus 2 in the BNTLV

Exodus 2 in the BOATCB

Exodus 2 in the BOATCB2

Exodus 2 in the BOBCV

Exodus 2 in the BOCNT

Exodus 2 in the BOECS

Exodus 2 in the BOGWICC

Exodus 2 in the BOHCB

Exodus 2 in the BOHCV

Exodus 2 in the BOHLNT

Exodus 2 in the BOHNTLTAL

Exodus 2 in the BOICB

Exodus 2 in the BOILNTAP

Exodus 2 in the BOITCV

Exodus 2 in the BOKCV

Exodus 2 in the BOKCV2

Exodus 2 in the BOKHWOG

Exodus 2 in the BOKSSV

Exodus 2 in the BOLCB

Exodus 2 in the BOMCV

Exodus 2 in the BONAV

Exodus 2 in the BONCB

Exodus 2 in the BONLT

Exodus 2 in the BONUT2

Exodus 2 in the BOPLNT

Exodus 2 in the BOSCB

Exodus 2 in the BOSNC

Exodus 2 in the BOTLNT

Exodus 2 in the BOVCB

Exodus 2 in the BOYCB

Exodus 2 in the BPBB

Exodus 2 in the BPH

Exodus 2 in the BSB

Exodus 2 in the CCB

Exodus 2 in the CUV

Exodus 2 in the CUVS

Exodus 2 in the DBT

Exodus 2 in the DGDNT

Exodus 2 in the DHNT

Exodus 2 in the DNT

Exodus 2 in the ELBE

Exodus 2 in the EMTV

Exodus 2 in the ESV

Exodus 2 in the FBV

Exodus 2 in the FEB

Exodus 2 in the GGMNT

Exodus 2 in the GNT

Exodus 2 in the HARY

Exodus 2 in the HNT

Exodus 2 in the IRVA

Exodus 2 in the IRVB

Exodus 2 in the IRVG

Exodus 2 in the IRVH

Exodus 2 in the IRVK

Exodus 2 in the IRVM

Exodus 2 in the IRVM2

Exodus 2 in the IRVO

Exodus 2 in the IRVP

Exodus 2 in the IRVT

Exodus 2 in the IRVT2

Exodus 2 in the IRVU

Exodus 2 in the ISVN

Exodus 2 in the JSNT

Exodus 2 in the KAPI

Exodus 2 in the KBT1ETNIK

Exodus 2 in the KBV

Exodus 2 in the KJV

Exodus 2 in the KNFD

Exodus 2 in the LBA

Exodus 2 in the LBLA

Exodus 2 in the LNT

Exodus 2 in the LSV

Exodus 2 in the MAAL

Exodus 2 in the MBV

Exodus 2 in the MBV2

Exodus 2 in the MHNT

Exodus 2 in the MKNFD

Exodus 2 in the MNG

Exodus 2 in the MNT

Exodus 2 in the MNT2

Exodus 2 in the MRS1T

Exodus 2 in the NAA

Exodus 2 in the NASB

Exodus 2 in the NBLA

Exodus 2 in the NBS

Exodus 2 in the NBVTP

Exodus 2 in the NET2

Exodus 2 in the NIV11

Exodus 2 in the NNT

Exodus 2 in the NNT2

Exodus 2 in the NNT3

Exodus 2 in the PDDPT

Exodus 2 in the PFNT

Exodus 2 in the RMNT

Exodus 2 in the SBIAS

Exodus 2 in the SBIBS

Exodus 2 in the SBIBS2

Exodus 2 in the SBICS

Exodus 2 in the SBIDS

Exodus 2 in the SBIGS

Exodus 2 in the SBIHS

Exodus 2 in the SBIIS

Exodus 2 in the SBIIS2

Exodus 2 in the SBIIS3

Exodus 2 in the SBIKS

Exodus 2 in the SBIKS2

Exodus 2 in the SBIMS

Exodus 2 in the SBIOS

Exodus 2 in the SBIPS

Exodus 2 in the SBISS

Exodus 2 in the SBITS

Exodus 2 in the SBITS2

Exodus 2 in the SBITS3

Exodus 2 in the SBITS4

Exodus 2 in the SBIUS

Exodus 2 in the SBIVS

Exodus 2 in the SBT

Exodus 2 in the SBT1E

Exodus 2 in the SCHL

Exodus 2 in the SNT

Exodus 2 in the SUSU

Exodus 2 in the SUSU2

Exodus 2 in the SYNO

Exodus 2 in the TBIAOTANT

Exodus 2 in the TBT1E

Exodus 2 in the TBT1E2

Exodus 2 in the TFTIP

Exodus 2 in the TFTU

Exodus 2 in the TGNTATF3T

Exodus 2 in the THAI

Exodus 2 in the TNFD

Exodus 2 in the TNT

Exodus 2 in the TNTIK

Exodus 2 in the TNTIL

Exodus 2 in the TNTIN

Exodus 2 in the TNTIP

Exodus 2 in the TNTIZ

Exodus 2 in the TOMA

Exodus 2 in the TTENT

Exodus 2 in the UBG

Exodus 2 in the UGV

Exodus 2 in the UGV2

Exodus 2 in the UGV3

Exodus 2 in the VBL

Exodus 2 in the VDCC

Exodus 2 in the YALU

Exodus 2 in the YAPE

Exodus 2 in the YBVTP

Exodus 2 in the ZBP