Exodus 28 (BOLCB2)

1 Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai. 2 Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu. 3 Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai. 4 Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai. 5 Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko. 6 Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. 7 Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba ekoleka likolo ya mapeka. 8 Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. 9 Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele 10 kolanda ndenge babotama : bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale. 11 Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo. 12 Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango. 13 Okotia bikangelo ya wolo 14 mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te ; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga. 15 Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. 16 Soki bagumbi yango na biteni mibale, molayi mpe mokuse esengeli kozala ndenge moko : basantimetele pene tuku mibale na mitano. 17 Okotia na likolo na yango milongo minei ya mabanga ya talo. Na molongo ya liboso, okotia libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode ; 18 na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama ; 19 na molongo ya misato, okotia libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ; 20 mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo. 21 Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe. 22 Okosala basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; okosala yango ndenge bakangaka suki ya maboko. 23 Okosala bapete mibale ya wolo mpo na elamba ya tolo mpe okokangisa yango na basonge mibale ya elamba yango. 24 Okolekisa basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo ezali na basonge ya elamba ya tolo, 25 mpe okokangisa basonge mibale mosusu ya basheneti yango, na bikangelo nyonso mibale ; mpe okokangisa yango na bankamba ya efode ; bankamba yango ekoleka na liboso. 26 Okosala bapete mibale ya wolo oyo okotia na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode. 27 Okosala bapete mosusu mibale ya wolo oyo okotia na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode. 28 Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. 29 Boye tango Aron akokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule, akomema na motema na ye, na elamba ya tolo ya kokata makambo, bakombo ya bana mibali ya Isalaele lokola ekaniseli liboso ya Yawe mpo na libela. 30 Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela. 31 Okosala mobimba ya nzambala oyo ekozala na se ya efode na langi ya ble. 32 Nzambala esengeli kozala na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto ; bakotonga pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te. 33 Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi ; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade. 34 Ekolandana boye : ngonga moko ya moke ya wolo, mbuma moko ya grenade, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala. 35 Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima ; wana ekolakisa ete akufi te. 36 Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe :abulisama mpo na Yawe. 37 Okokangisa yango na singa ya ble, mpe ekozala na likolo ya kitendi ya kokanga na moto, na mbunzu. 38 Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango. 39 Okotongela Aron nzambala ya lino mpe kitendi ya lino mpo na moto ; okosalela ye mpe mokaba oyo bato oyo batongaka bililingi na bilamba bakoyeba kotia bililingi. 40 Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo. 41 Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. 42 Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango : bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende. 43 Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te.Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye.

In Other Versions

Exodus 28 in the ANGEFD

Exodus 28 in the ANTPNG2D

Exodus 28 in the AS21

Exodus 28 in the BAGH

Exodus 28 in the BBPNG

Exodus 28 in the BBT1E

Exodus 28 in the BDS

Exodus 28 in the BEV

Exodus 28 in the BHAD

Exodus 28 in the BIB

Exodus 28 in the BLPT

Exodus 28 in the BNT

Exodus 28 in the BNTABOOT

Exodus 28 in the BNTLV

Exodus 28 in the BOATCB

Exodus 28 in the BOATCB2

Exodus 28 in the BOBCV

Exodus 28 in the BOCNT

Exodus 28 in the BOECS

Exodus 28 in the BOGWICC

Exodus 28 in the BOHCB

Exodus 28 in the BOHCV

Exodus 28 in the BOHLNT

Exodus 28 in the BOHNTLTAL

Exodus 28 in the BOICB

Exodus 28 in the BOILNTAP

Exodus 28 in the BOITCV

Exodus 28 in the BOKCV

Exodus 28 in the BOKCV2

Exodus 28 in the BOKHWOG

Exodus 28 in the BOKSSV

Exodus 28 in the BOLCB

Exodus 28 in the BOMCV

Exodus 28 in the BONAV

Exodus 28 in the BONCB

Exodus 28 in the BONLT

Exodus 28 in the BONUT2

Exodus 28 in the BOPLNT

Exodus 28 in the BOSCB

Exodus 28 in the BOSNC

Exodus 28 in the BOTLNT

Exodus 28 in the BOVCB

Exodus 28 in the BOYCB

Exodus 28 in the BPBB

Exodus 28 in the BPH

Exodus 28 in the BSB

Exodus 28 in the CCB

Exodus 28 in the CUV

Exodus 28 in the CUVS

Exodus 28 in the DBT

Exodus 28 in the DGDNT

Exodus 28 in the DHNT

Exodus 28 in the DNT

Exodus 28 in the ELBE

Exodus 28 in the EMTV

Exodus 28 in the ESV

Exodus 28 in the FBV

Exodus 28 in the FEB

Exodus 28 in the GGMNT

Exodus 28 in the GNT

Exodus 28 in the HARY

Exodus 28 in the HNT

Exodus 28 in the IRVA

Exodus 28 in the IRVB

Exodus 28 in the IRVG

Exodus 28 in the IRVH

Exodus 28 in the IRVK

Exodus 28 in the IRVM

Exodus 28 in the IRVM2

Exodus 28 in the IRVO

Exodus 28 in the IRVP

Exodus 28 in the IRVT

Exodus 28 in the IRVT2

Exodus 28 in the IRVU

Exodus 28 in the ISVN

Exodus 28 in the JSNT

Exodus 28 in the KAPI

Exodus 28 in the KBT1ETNIK

Exodus 28 in the KBV

Exodus 28 in the KJV

Exodus 28 in the KNFD

Exodus 28 in the LBA

Exodus 28 in the LBLA

Exodus 28 in the LNT

Exodus 28 in the LSV

Exodus 28 in the MAAL

Exodus 28 in the MBV

Exodus 28 in the MBV2

Exodus 28 in the MHNT

Exodus 28 in the MKNFD

Exodus 28 in the MNG

Exodus 28 in the MNT

Exodus 28 in the MNT2

Exodus 28 in the MRS1T

Exodus 28 in the NAA

Exodus 28 in the NASB

Exodus 28 in the NBLA

Exodus 28 in the NBS

Exodus 28 in the NBVTP

Exodus 28 in the NET2

Exodus 28 in the NIV11

Exodus 28 in the NNT

Exodus 28 in the NNT2

Exodus 28 in the NNT3

Exodus 28 in the PDDPT

Exodus 28 in the PFNT

Exodus 28 in the RMNT

Exodus 28 in the SBIAS

Exodus 28 in the SBIBS

Exodus 28 in the SBIBS2

Exodus 28 in the SBICS

Exodus 28 in the SBIDS

Exodus 28 in the SBIGS

Exodus 28 in the SBIHS

Exodus 28 in the SBIIS

Exodus 28 in the SBIIS2

Exodus 28 in the SBIIS3

Exodus 28 in the SBIKS

Exodus 28 in the SBIKS2

Exodus 28 in the SBIMS

Exodus 28 in the SBIOS

Exodus 28 in the SBIPS

Exodus 28 in the SBISS

Exodus 28 in the SBITS

Exodus 28 in the SBITS2

Exodus 28 in the SBITS3

Exodus 28 in the SBITS4

Exodus 28 in the SBIUS

Exodus 28 in the SBIVS

Exodus 28 in the SBT

Exodus 28 in the SBT1E

Exodus 28 in the SCHL

Exodus 28 in the SNT

Exodus 28 in the SUSU

Exodus 28 in the SUSU2

Exodus 28 in the SYNO

Exodus 28 in the TBIAOTANT

Exodus 28 in the TBT1E

Exodus 28 in the TBT1E2

Exodus 28 in the TFTIP

Exodus 28 in the TFTU

Exodus 28 in the TGNTATF3T

Exodus 28 in the THAI

Exodus 28 in the TNFD

Exodus 28 in the TNT

Exodus 28 in the TNTIK

Exodus 28 in the TNTIL

Exodus 28 in the TNTIN

Exodus 28 in the TNTIP

Exodus 28 in the TNTIZ

Exodus 28 in the TOMA

Exodus 28 in the TTENT

Exodus 28 in the UBG

Exodus 28 in the UGV

Exodus 28 in the UGV2

Exodus 28 in the UGV3

Exodus 28 in the VBL

Exodus 28 in the VDCC

Exodus 28 in the YALU

Exodus 28 in the YAPE

Exodus 28 in the YBVTP

Exodus 28 in the ZBP