Exodus 36 (BOLCB2)

1 Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. 2 Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango. 3 Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. 4 Boye bato oyo bazalaki kosala misala ya kotonga Mongombo batikaki misala na bango 5 mpe bayaki koloba na Moyize :— Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki. 6 Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele :— Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo !Boye bato batikaki komema makabo, 7 pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema : ezalaki kutu ya koleka. 8 Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. 9 Tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ezalaki ndenge moko na mokuse mpe na molayi. 10 Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu. 11 Batiaki basinga ya langi ya ble, na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale. 12 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango etalanaki. 13 Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko. 14 Basalaki batapi zomi na moko, na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo. 15 Molayi ya tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na mitano mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. 16 Bakangisaki batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu. 17 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale. 18 Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko. 19 Basalelaki baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe babakisaki na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale. 20 Basalaki bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe batelemisaki yango. 21 Ezingelo moko na moko ezalaki na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse. 22 Babetaki banzete mibale-mibale na ezingelo moko na moko ; basalaki bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo. 23 Batiaki bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ya Mongombo, 24 mpe makolo tuku minei ya palata, na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ; 25 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor, 26 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ; 27 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste, 28 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo. 29 Bizingelo yango ezalaki ya kofungwama na se, kasi esalaki songe na likolo mpe ekotaki na lopete ya liboso : nyonso mibale ezalaki ndenge moko mpe elendisaki Mongombo. 30 Boye, bizingelo ezalaki mwambe elongo na makolo na yango ya palata zomi na motoba : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko. 31 Sima, basalaki, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo, 32 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ezalaki na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste. 33 Libaya ya kati elekaki na kati-kati ya bizingelo, elekaki ngambo na ngambo. 34 Babambaki wolo na bizingelo, basalaki bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe babambaki mabaya wolo. 35 Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango. 36 Batiaki yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; bakangisaki yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe batelemisaki yango na makolo minei ya palata. 37 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, asalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. 38 Basalaki na wolo bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido, mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; basalaki makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango.

In Other Versions

Exodus 36 in the ANGEFD

Exodus 36 in the ANTPNG2D

Exodus 36 in the AS21

Exodus 36 in the BAGH

Exodus 36 in the BBPNG

Exodus 36 in the BBT1E

Exodus 36 in the BDS

Exodus 36 in the BEV

Exodus 36 in the BHAD

Exodus 36 in the BIB

Exodus 36 in the BLPT

Exodus 36 in the BNT

Exodus 36 in the BNTABOOT

Exodus 36 in the BNTLV

Exodus 36 in the BOATCB

Exodus 36 in the BOATCB2

Exodus 36 in the BOBCV

Exodus 36 in the BOCNT

Exodus 36 in the BOECS

Exodus 36 in the BOGWICC

Exodus 36 in the BOHCB

Exodus 36 in the BOHCV

Exodus 36 in the BOHLNT

Exodus 36 in the BOHNTLTAL

Exodus 36 in the BOICB

Exodus 36 in the BOILNTAP

Exodus 36 in the BOITCV

Exodus 36 in the BOKCV

Exodus 36 in the BOKCV2

Exodus 36 in the BOKHWOG

Exodus 36 in the BOKSSV

Exodus 36 in the BOLCB

Exodus 36 in the BOMCV

Exodus 36 in the BONAV

Exodus 36 in the BONCB

Exodus 36 in the BONLT

Exodus 36 in the BONUT2

Exodus 36 in the BOPLNT

Exodus 36 in the BOSCB

Exodus 36 in the BOSNC

Exodus 36 in the BOTLNT

Exodus 36 in the BOVCB

Exodus 36 in the BOYCB

Exodus 36 in the BPBB

Exodus 36 in the BPH

Exodus 36 in the BSB

Exodus 36 in the CCB

Exodus 36 in the CUV

Exodus 36 in the CUVS

Exodus 36 in the DBT

Exodus 36 in the DGDNT

Exodus 36 in the DHNT

Exodus 36 in the DNT

Exodus 36 in the ELBE

Exodus 36 in the EMTV

Exodus 36 in the ESV

Exodus 36 in the FBV

Exodus 36 in the FEB

Exodus 36 in the GGMNT

Exodus 36 in the GNT

Exodus 36 in the HARY

Exodus 36 in the HNT

Exodus 36 in the IRVA

Exodus 36 in the IRVB

Exodus 36 in the IRVG

Exodus 36 in the IRVH

Exodus 36 in the IRVK

Exodus 36 in the IRVM

Exodus 36 in the IRVM2

Exodus 36 in the IRVO

Exodus 36 in the IRVP

Exodus 36 in the IRVT

Exodus 36 in the IRVT2

Exodus 36 in the IRVU

Exodus 36 in the ISVN

Exodus 36 in the JSNT

Exodus 36 in the KAPI

Exodus 36 in the KBT1ETNIK

Exodus 36 in the KBV

Exodus 36 in the KJV

Exodus 36 in the KNFD

Exodus 36 in the LBA

Exodus 36 in the LBLA

Exodus 36 in the LNT

Exodus 36 in the LSV

Exodus 36 in the MAAL

Exodus 36 in the MBV

Exodus 36 in the MBV2

Exodus 36 in the MHNT

Exodus 36 in the MKNFD

Exodus 36 in the MNG

Exodus 36 in the MNT

Exodus 36 in the MNT2

Exodus 36 in the MRS1T

Exodus 36 in the NAA

Exodus 36 in the NASB

Exodus 36 in the NBLA

Exodus 36 in the NBS

Exodus 36 in the NBVTP

Exodus 36 in the NET2

Exodus 36 in the NIV11

Exodus 36 in the NNT

Exodus 36 in the NNT2

Exodus 36 in the NNT3

Exodus 36 in the PDDPT

Exodus 36 in the PFNT

Exodus 36 in the RMNT

Exodus 36 in the SBIAS

Exodus 36 in the SBIBS

Exodus 36 in the SBIBS2

Exodus 36 in the SBICS

Exodus 36 in the SBIDS

Exodus 36 in the SBIGS

Exodus 36 in the SBIHS

Exodus 36 in the SBIIS

Exodus 36 in the SBIIS2

Exodus 36 in the SBIIS3

Exodus 36 in the SBIKS

Exodus 36 in the SBIKS2

Exodus 36 in the SBIMS

Exodus 36 in the SBIOS

Exodus 36 in the SBIPS

Exodus 36 in the SBISS

Exodus 36 in the SBITS

Exodus 36 in the SBITS2

Exodus 36 in the SBITS3

Exodus 36 in the SBITS4

Exodus 36 in the SBIUS

Exodus 36 in the SBIVS

Exodus 36 in the SBT

Exodus 36 in the SBT1E

Exodus 36 in the SCHL

Exodus 36 in the SNT

Exodus 36 in the SUSU

Exodus 36 in the SUSU2

Exodus 36 in the SYNO

Exodus 36 in the TBIAOTANT

Exodus 36 in the TBT1E

Exodus 36 in the TBT1E2

Exodus 36 in the TFTIP

Exodus 36 in the TFTU

Exodus 36 in the TGNTATF3T

Exodus 36 in the THAI

Exodus 36 in the TNFD

Exodus 36 in the TNT

Exodus 36 in the TNTIK

Exodus 36 in the TNTIL

Exodus 36 in the TNTIN

Exodus 36 in the TNTIP

Exodus 36 in the TNTIZ

Exodus 36 in the TOMA

Exodus 36 in the TTENT

Exodus 36 in the UBG

Exodus 36 in the UGV

Exodus 36 in the UGV2

Exodus 36 in the UGV3

Exodus 36 in the VBL

Exodus 36 in the VDCC

Exodus 36 in the YALU

Exodus 36 in the YAPE

Exodus 36 in the YBVTP

Exodus 36 in the ZBP