Ezekiel 13 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo ; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko : ‹ Boyoka Liloba na Yawe ! 3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko ! Nzokande bamonaki eloko moko te. 4 Oh Isalaele, basakoli na yo bazali lokola bambwa ya zamba kati na bisika oyo etonda na biloko ebeba. 5 Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe. 6 Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama ! 7 Boni, bimoniseli na bino ezalaka ya pamba te, mpe masakoli na bino ezalaka ya lokuta te, atako bolobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai nalobi na bino ata liloba moko te ? 8 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpo ete bolobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta, Ngai moko natelemeli bino, elobi Nkolo Yawe. 9 Loboko na Ngai ekobeta basakoli oyo balobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta : bakozala na esika te kati na lisanga ya bato na Ngai, bakombo na bango ekokomama te kati na buku ya libota ya Isalaele, bakokoma te kino na mokili ya Isalaele. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. 10 Boye, lokola bapengwisaka bato na Ngai tango balobaka : ‘ Kimia, ’ na tango kimia ezali te ; lokola bapakolaka potopoto ya pembe na mir oyo bato na Ngai basili kotonga, 11 yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka. 12 Tango mir yango ekokweya, bato bakotuna bino : ‘ Mosala nini penza potopoto ya pembe esali ? ’ 13 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye. 14 Nakokweyisa mir oyo bopakolaki potopoto ya pembe mpe nakolalisa yango kino na se, mpo ete miboko na yango emonana. Tango mir yango ekokweya, ekoboma bino ; mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 15 Nakokweyisela mir mpe bato oyo bapakolaki yango potopoto ya pembe kanda na Ngai ; nakoloba na bino : ‘ Mir ezali lisusu te ! Bato oyo bazalaki kopakola yango potopoto ya pembe bazali lisusu te ; 16 basakoli ya Isalaele oyo bazalaki kosakola na tina na Yelusalemi mpe komona bimoniseli ya kimia mpo na yango, nzokande kimia ezali na yango te, bazali lisusu te, elobi Nkolo Yawe. ’ › 17 Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko ! Sakola mabe na tina na bango 18 mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basi oyo balataka basinga ya maji na maboko na bango mpe batongaka bitambala mpo na mito ya bato ya ndenge na ndenge mpo na kotiela bomoi na bango mitambo ! Bokanisi ete bokotiela bomoi ya bato na Ngai mitambo mpo ete botikala bino moko kaka na bomoi ? 19 Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi. 20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli basinga na bino ya maji, oyo bozali kosalela mpo na kotiela bato na Ngai mitambo lokola bandeke, nakokata-kata yango mpe nakolongola yango na maboko na bino ; mpe nakokangola bomoi ya bato oyo bokangaki na mitambo lokola bandeke. 21 Nakopasola bitambala na bino mpe nakokangola bato na Ngai na maboko na bino ; bakokweya lisusu te na se ya bokonzi na bino ! Mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. 22 Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te ; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te, 23 bokomona lisusu te bimoniseli na bino wana ya pamba mpe bokoloba lisusu masakoli te ; nakobikisa bato na Ngai na maboko na bino, mpe, na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »

In Other Versions

Ezekiel 13 in the ANGEFD

Ezekiel 13 in the ANTPNG2D

Ezekiel 13 in the AS21

Ezekiel 13 in the BAGH

Ezekiel 13 in the BBPNG

Ezekiel 13 in the BBT1E

Ezekiel 13 in the BDS

Ezekiel 13 in the BEV

Ezekiel 13 in the BHAD

Ezekiel 13 in the BIB

Ezekiel 13 in the BLPT

Ezekiel 13 in the BNT

Ezekiel 13 in the BNTABOOT

Ezekiel 13 in the BNTLV

Ezekiel 13 in the BOATCB

Ezekiel 13 in the BOATCB2

Ezekiel 13 in the BOBCV

Ezekiel 13 in the BOCNT

Ezekiel 13 in the BOECS

Ezekiel 13 in the BOGWICC

Ezekiel 13 in the BOHCB

Ezekiel 13 in the BOHCV

Ezekiel 13 in the BOHLNT

Ezekiel 13 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 13 in the BOICB

Ezekiel 13 in the BOILNTAP

Ezekiel 13 in the BOITCV

Ezekiel 13 in the BOKCV

Ezekiel 13 in the BOKCV2

Ezekiel 13 in the BOKHWOG

Ezekiel 13 in the BOKSSV

Ezekiel 13 in the BOLCB

Ezekiel 13 in the BOMCV

Ezekiel 13 in the BONAV

Ezekiel 13 in the BONCB

Ezekiel 13 in the BONLT

Ezekiel 13 in the BONUT2

Ezekiel 13 in the BOPLNT

Ezekiel 13 in the BOSCB

Ezekiel 13 in the BOSNC

Ezekiel 13 in the BOTLNT

Ezekiel 13 in the BOVCB

Ezekiel 13 in the BOYCB

Ezekiel 13 in the BPBB

Ezekiel 13 in the BPH

Ezekiel 13 in the BSB

Ezekiel 13 in the CCB

Ezekiel 13 in the CUV

Ezekiel 13 in the CUVS

Ezekiel 13 in the DBT

Ezekiel 13 in the DGDNT

Ezekiel 13 in the DHNT

Ezekiel 13 in the DNT

Ezekiel 13 in the ELBE

Ezekiel 13 in the EMTV

Ezekiel 13 in the ESV

Ezekiel 13 in the FBV

Ezekiel 13 in the FEB

Ezekiel 13 in the GGMNT

Ezekiel 13 in the GNT

Ezekiel 13 in the HARY

Ezekiel 13 in the HNT

Ezekiel 13 in the IRVA

Ezekiel 13 in the IRVB

Ezekiel 13 in the IRVG

Ezekiel 13 in the IRVH

Ezekiel 13 in the IRVK

Ezekiel 13 in the IRVM

Ezekiel 13 in the IRVM2

Ezekiel 13 in the IRVO

Ezekiel 13 in the IRVP

Ezekiel 13 in the IRVT

Ezekiel 13 in the IRVT2

Ezekiel 13 in the IRVU

Ezekiel 13 in the ISVN

Ezekiel 13 in the JSNT

Ezekiel 13 in the KAPI

Ezekiel 13 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 13 in the KBV

Ezekiel 13 in the KJV

Ezekiel 13 in the KNFD

Ezekiel 13 in the LBA

Ezekiel 13 in the LBLA

Ezekiel 13 in the LNT

Ezekiel 13 in the LSV

Ezekiel 13 in the MAAL

Ezekiel 13 in the MBV

Ezekiel 13 in the MBV2

Ezekiel 13 in the MHNT

Ezekiel 13 in the MKNFD

Ezekiel 13 in the MNG

Ezekiel 13 in the MNT

Ezekiel 13 in the MNT2

Ezekiel 13 in the MRS1T

Ezekiel 13 in the NAA

Ezekiel 13 in the NASB

Ezekiel 13 in the NBLA

Ezekiel 13 in the NBS

Ezekiel 13 in the NBVTP

Ezekiel 13 in the NET2

Ezekiel 13 in the NIV11

Ezekiel 13 in the NNT

Ezekiel 13 in the NNT2

Ezekiel 13 in the NNT3

Ezekiel 13 in the PDDPT

Ezekiel 13 in the PFNT

Ezekiel 13 in the RMNT

Ezekiel 13 in the SBIAS

Ezekiel 13 in the SBIBS

Ezekiel 13 in the SBIBS2

Ezekiel 13 in the SBICS

Ezekiel 13 in the SBIDS

Ezekiel 13 in the SBIGS

Ezekiel 13 in the SBIHS

Ezekiel 13 in the SBIIS

Ezekiel 13 in the SBIIS2

Ezekiel 13 in the SBIIS3

Ezekiel 13 in the SBIKS

Ezekiel 13 in the SBIKS2

Ezekiel 13 in the SBIMS

Ezekiel 13 in the SBIOS

Ezekiel 13 in the SBIPS

Ezekiel 13 in the SBISS

Ezekiel 13 in the SBITS

Ezekiel 13 in the SBITS2

Ezekiel 13 in the SBITS3

Ezekiel 13 in the SBITS4

Ezekiel 13 in the SBIUS

Ezekiel 13 in the SBIVS

Ezekiel 13 in the SBT

Ezekiel 13 in the SBT1E

Ezekiel 13 in the SCHL

Ezekiel 13 in the SNT

Ezekiel 13 in the SUSU

Ezekiel 13 in the SUSU2

Ezekiel 13 in the SYNO

Ezekiel 13 in the TBIAOTANT

Ezekiel 13 in the TBT1E

Ezekiel 13 in the TBT1E2

Ezekiel 13 in the TFTIP

Ezekiel 13 in the TFTU

Ezekiel 13 in the TGNTATF3T

Ezekiel 13 in the THAI

Ezekiel 13 in the TNFD

Ezekiel 13 in the TNT

Ezekiel 13 in the TNTIK

Ezekiel 13 in the TNTIL

Ezekiel 13 in the TNTIN

Ezekiel 13 in the TNTIP

Ezekiel 13 in the TNTIZ

Ezekiel 13 in the TOMA

Ezekiel 13 in the TTENT

Ezekiel 13 in the UBG

Ezekiel 13 in the UGV

Ezekiel 13 in the UGV2

Ezekiel 13 in the UGV3

Ezekiel 13 in the VBL

Ezekiel 13 in the VDCC

Ezekiel 13 in the YALU

Ezekiel 13 in the YAPE

Ezekiel 13 in the YBVTP

Ezekiel 13 in the ZBP