Ezekiel 17 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele. 3 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :Mpongo moko ya moneneoyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami,na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge,ekendeki kotelema na Libani.Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele, 4 ebukaki etape moko ya mokeoyo ezalaki na songe ya nzete yangompe ememaki yango na mokili ya bato ya mombongo,epai wapi elonaki yango kati na engumba ya bateki. 5 Ekamataki ndambo ya milona ya mokili wana,ekendeki kolona yango na mabele ya malamu,lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi. 6 Nkona yango ekolaki mpe ekomaki nzete ya vino ;ezalaki penza mokuse,kasi bitape na yango ezalaki efungwamampe etala na ngambo ya mpongo.Bongo misisa na yango ezalaki kakaetikala na se na yango.Ekomaki nzete ya vino,ebotaki bitape mpe ebimisaki makasa ebele. 7 Kasi ezalaki lisusu na mpongo mosusu ya moneneoyo ezalaki na mapapu ya milayi mpe basala ebele.Nzokande, nzete ya vino wana ebimisakimisisa na yango na ngambo ya mpongo wana,longwa na esika oyo balonelaki yangompe epanzaki bitape na yango kino epai na mpongo wana,mpo na kosopela yango mayi. 8 Balonaki yango na mabele ya malamu,lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi,pene ya mayi ebele mpo ete ebota bitape mpe bambuma,mpe ekoma nzete monene ya vino. › 9 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :Boni, ekokoma solo monene ?Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango tempo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka ?Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka ;ekoluka na yango makasi mingi tempe bato ebele te mpo na kopikola yango. 10 Ata soki bakei kolona yango esika mosusu,okanisi ete ekokola ?Ekokawuka nyonso tango mopepe ya esteekoya kobeta yango ;solo ekokawuka ata na esika oyo ezalaki kokola malamu. › » 11 Bongo Yawe alobaki na ngai : 12 « Loba na ndako ya batomboki oyo : ‹ Boni, bozali solo koyeba soki makambo oyo elakisi nini ? › Loba na bango : ‹ Mokonzi ya Babiloni ayaki na Yelusalemi, akangaki mokonzi elongo na bakalaka na yango mpe amemaki bango na mokili na ye, elingi koloba na Babiloni. 13 Akamataki moko kati na libota ya bokonzi, asalaki boyokani elongo na ye mpe alapisaki ye ndayi ; mpe amemaki lisusu bankumu ya mokili 14 mpo ete bokonzi ekweya, ekoka lisusu kotelema te mpe ewumela kobika kaka na kobatela mibeko ya boyokani na ye. 15 Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo ? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo ? Boni, abuka solo boyokani mpe abika ? 16 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi ; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye. 17 Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba ; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele. 18 Atosaki te ndayi oyo alapaki mpe abukaki boyokani. Lokola atombolaki loboko na ye na ndayi mpe asali makambo ya boye, akobika te ! 19 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, nakomemisa ye ngambo ya ndayi na Ngai, oyo atioli mpe ya boyokani na Ngai, oyo abuki. 20 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai ; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai. 21 Basoda na ye nyonso ya mpiko bakokufa na mopanga mpe bato oyo bakotikala na bomoi bakopanzana bisika nyonso. Na bongo, bokoyeba solo ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki. 22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ngai moko nakokamata etape ya songe ya nzete ya sedele mpe nakolona yango ; nakobuka na songe ya etape yango moto ya nzete moko, oyo nakolona na likolo ya ngomba oyo eleki molayi. 23 Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango. 24 Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »

In Other Versions

Ezekiel 17 in the ANGEFD

Ezekiel 17 in the ANTPNG2D

Ezekiel 17 in the AS21

Ezekiel 17 in the BAGH

Ezekiel 17 in the BBPNG

Ezekiel 17 in the BBT1E

Ezekiel 17 in the BDS

Ezekiel 17 in the BEV

Ezekiel 17 in the BHAD

Ezekiel 17 in the BIB

Ezekiel 17 in the BLPT

Ezekiel 17 in the BNT

Ezekiel 17 in the BNTABOOT

Ezekiel 17 in the BNTLV

Ezekiel 17 in the BOATCB

Ezekiel 17 in the BOATCB2

Ezekiel 17 in the BOBCV

Ezekiel 17 in the BOCNT

Ezekiel 17 in the BOECS

Ezekiel 17 in the BOGWICC

Ezekiel 17 in the BOHCB

Ezekiel 17 in the BOHCV

Ezekiel 17 in the BOHLNT

Ezekiel 17 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 17 in the BOICB

Ezekiel 17 in the BOILNTAP

Ezekiel 17 in the BOITCV

Ezekiel 17 in the BOKCV

Ezekiel 17 in the BOKCV2

Ezekiel 17 in the BOKHWOG

Ezekiel 17 in the BOKSSV

Ezekiel 17 in the BOLCB

Ezekiel 17 in the BOMCV

Ezekiel 17 in the BONAV

Ezekiel 17 in the BONCB

Ezekiel 17 in the BONLT

Ezekiel 17 in the BONUT2

Ezekiel 17 in the BOPLNT

Ezekiel 17 in the BOSCB

Ezekiel 17 in the BOSNC

Ezekiel 17 in the BOTLNT

Ezekiel 17 in the BOVCB

Ezekiel 17 in the BOYCB

Ezekiel 17 in the BPBB

Ezekiel 17 in the BPH

Ezekiel 17 in the BSB

Ezekiel 17 in the CCB

Ezekiel 17 in the CUV

Ezekiel 17 in the CUVS

Ezekiel 17 in the DBT

Ezekiel 17 in the DGDNT

Ezekiel 17 in the DHNT

Ezekiel 17 in the DNT

Ezekiel 17 in the ELBE

Ezekiel 17 in the EMTV

Ezekiel 17 in the ESV

Ezekiel 17 in the FBV

Ezekiel 17 in the FEB

Ezekiel 17 in the GGMNT

Ezekiel 17 in the GNT

Ezekiel 17 in the HARY

Ezekiel 17 in the HNT

Ezekiel 17 in the IRVA

Ezekiel 17 in the IRVB

Ezekiel 17 in the IRVG

Ezekiel 17 in the IRVH

Ezekiel 17 in the IRVK

Ezekiel 17 in the IRVM

Ezekiel 17 in the IRVM2

Ezekiel 17 in the IRVO

Ezekiel 17 in the IRVP

Ezekiel 17 in the IRVT

Ezekiel 17 in the IRVT2

Ezekiel 17 in the IRVU

Ezekiel 17 in the ISVN

Ezekiel 17 in the JSNT

Ezekiel 17 in the KAPI

Ezekiel 17 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 17 in the KBV

Ezekiel 17 in the KJV

Ezekiel 17 in the KNFD

Ezekiel 17 in the LBA

Ezekiel 17 in the LBLA

Ezekiel 17 in the LNT

Ezekiel 17 in the LSV

Ezekiel 17 in the MAAL

Ezekiel 17 in the MBV

Ezekiel 17 in the MBV2

Ezekiel 17 in the MHNT

Ezekiel 17 in the MKNFD

Ezekiel 17 in the MNG

Ezekiel 17 in the MNT

Ezekiel 17 in the MNT2

Ezekiel 17 in the MRS1T

Ezekiel 17 in the NAA

Ezekiel 17 in the NASB

Ezekiel 17 in the NBLA

Ezekiel 17 in the NBS

Ezekiel 17 in the NBVTP

Ezekiel 17 in the NET2

Ezekiel 17 in the NIV11

Ezekiel 17 in the NNT

Ezekiel 17 in the NNT2

Ezekiel 17 in the NNT3

Ezekiel 17 in the PDDPT

Ezekiel 17 in the PFNT

Ezekiel 17 in the RMNT

Ezekiel 17 in the SBIAS

Ezekiel 17 in the SBIBS

Ezekiel 17 in the SBIBS2

Ezekiel 17 in the SBICS

Ezekiel 17 in the SBIDS

Ezekiel 17 in the SBIGS

Ezekiel 17 in the SBIHS

Ezekiel 17 in the SBIIS

Ezekiel 17 in the SBIIS2

Ezekiel 17 in the SBIIS3

Ezekiel 17 in the SBIKS

Ezekiel 17 in the SBIKS2

Ezekiel 17 in the SBIMS

Ezekiel 17 in the SBIOS

Ezekiel 17 in the SBIPS

Ezekiel 17 in the SBISS

Ezekiel 17 in the SBITS

Ezekiel 17 in the SBITS2

Ezekiel 17 in the SBITS3

Ezekiel 17 in the SBITS4

Ezekiel 17 in the SBIUS

Ezekiel 17 in the SBIVS

Ezekiel 17 in the SBT

Ezekiel 17 in the SBT1E

Ezekiel 17 in the SCHL

Ezekiel 17 in the SNT

Ezekiel 17 in the SUSU

Ezekiel 17 in the SUSU2

Ezekiel 17 in the SYNO

Ezekiel 17 in the TBIAOTANT

Ezekiel 17 in the TBT1E

Ezekiel 17 in the TBT1E2

Ezekiel 17 in the TFTIP

Ezekiel 17 in the TFTU

Ezekiel 17 in the TGNTATF3T

Ezekiel 17 in the THAI

Ezekiel 17 in the TNFD

Ezekiel 17 in the TNT

Ezekiel 17 in the TNTIK

Ezekiel 17 in the TNTIL

Ezekiel 17 in the TNTIN

Ezekiel 17 in the TNTIP

Ezekiel 17 in the TNTIZ

Ezekiel 17 in the TOMA

Ezekiel 17 in the TTENT

Ezekiel 17 in the UBG

Ezekiel 17 in the UGV

Ezekiel 17 in the UGV2

Ezekiel 17 in the UGV3

Ezekiel 17 in the VBL

Ezekiel 17 in the VDCC

Ezekiel 17 in the YALU

Ezekiel 17 in the YAPE

Ezekiel 17 in the YBVTP

Ezekiel 17 in the ZBP