Ezekiel 29 (BOLCB2)
1 Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi, Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, sakola mpo na kotelemela ye mpe mokili mobimba ya Ejipito ! 3 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo !Yo dalagona monene oyo ovandakakati na bibale na yo,yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ;mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’ 4 Nakokanga yo bibende na mbanga,nakosala ete mbisi ya ebale na yoekangama yo na poso ya nzoto ;nakobimisa yo na libanda ya bibale na yoelongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto. 5 Nakobwaka yo na esobe,yo mpe mbisi ya bibale na yo.Okokweya na mabele ya elanga ya polele ;bakolokota yo te, bakokunda yo te ;mpe nakokomisa yo bilei ya banyama ya mokilimpe ya bandeke ya likolo. 6 Boye, bavandi nyonso ya Ejipito bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.Ozalaki na yo kaka lokola eyekamelooyo basala na nzete oyo ebotaka na mayi,mpo na libota ya Isalaele. 7 Tango maboko na bango esimbaki yo,obukanaki mpe ozokisaki mapeka na bango ;tango balalelaki yo,obukanaki mpe olembisaki mikongo na bango. 8 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango. 9 Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.Lokola ozalaki koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; kasi ngai, ngai moko nde namisala, ’ 10 natombokeli yo mpe bibale na yo ; mpe lisusu, nakobebisa mokili ya Ejipito, nakokomisa yango esobe kobanda na Migidoli kino na Siene, kino na bandelo ya mokili ya Kushi. 11 Ata litambe moko ya moto to ya nyama ekolekela lisusu wana te : moto moko te akovanda lisusu kuna mibu tuku minei. 12 Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu. 13 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Sima na mibu tuku minei, nakosangisa bato ya Ejipito wuta na bikolo epai wapi bapalanganaki, 14 nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango ; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke. 15 Ejipito ekokoma mokili moko moke koleka mikili mosusu, ekomikumisa lisusu te liboso ya bikolo mosusu ; nakokomisa yango moke penza mpo ete ezala lisusu na makoki te ya kokonza bikolo mosusu. 16 Mokili ya Ejipito ekozala lisusu mpo na bana ya Isalaele mokili ya kotiela motema te, kasi ekokoma lokola ekaniseli ya masumu oyo bato na Ngai bazalaki kosala tango bazalaki koluka lisungi epai na yango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › » 17 Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, na mobu ya tuku mibale na sambo, Yawe alobaki na ngai : 18 « Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri ; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri. 19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokaba Ejipito na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; mpe ye, akobotola bomengo na yango, akozwa bomengo ya bitumba mpe akobebisa yango nyonso penza. 20 Napesi epai ya Nabukodonozori mokili ya Ejipito lokola lifuti mpo na misala na ye, pamba te ye mpe mampinga na ye basalaki mpo na Ngai, elobi Nkolo Yawe. 21 Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
In Other Versions
Ezekiel 29 in the ANGEFD
Ezekiel 29 in the ANTPNG2D
Ezekiel 29 in the AS21
Ezekiel 29 in the BAGH
Ezekiel 29 in the BBPNG
Ezekiel 29 in the BBT1E
Ezekiel 29 in the BDS
Ezekiel 29 in the BEV
Ezekiel 29 in the BHAD
Ezekiel 29 in the BIB
Ezekiel 29 in the BLPT
Ezekiel 29 in the BNT
Ezekiel 29 in the BNTABOOT
Ezekiel 29 in the BNTLV
Ezekiel 29 in the BOATCB
Ezekiel 29 in the BOATCB2
Ezekiel 29 in the BOBCV
Ezekiel 29 in the BOCNT
Ezekiel 29 in the BOECS
Ezekiel 29 in the BOGWICC
Ezekiel 29 in the BOHCB
Ezekiel 29 in the BOHCV
Ezekiel 29 in the BOHLNT
Ezekiel 29 in the BOHNTLTAL
Ezekiel 29 in the BOICB
Ezekiel 29 in the BOILNTAP
Ezekiel 29 in the BOITCV
Ezekiel 29 in the BOKCV
Ezekiel 29 in the BOKCV2
Ezekiel 29 in the BOKHWOG
Ezekiel 29 in the BOKSSV
Ezekiel 29 in the BOLCB
Ezekiel 29 in the BOMCV
Ezekiel 29 in the BONAV
Ezekiel 29 in the BONCB
Ezekiel 29 in the BONLT
Ezekiel 29 in the BONUT2
Ezekiel 29 in the BOPLNT
Ezekiel 29 in the BOSCB
Ezekiel 29 in the BOSNC
Ezekiel 29 in the BOTLNT
Ezekiel 29 in the BOVCB
Ezekiel 29 in the BOYCB
Ezekiel 29 in the BPBB
Ezekiel 29 in the BPH
Ezekiel 29 in the BSB
Ezekiel 29 in the CCB
Ezekiel 29 in the CUV
Ezekiel 29 in the CUVS
Ezekiel 29 in the DBT
Ezekiel 29 in the DGDNT
Ezekiel 29 in the DHNT
Ezekiel 29 in the DNT
Ezekiel 29 in the ELBE
Ezekiel 29 in the EMTV
Ezekiel 29 in the ESV
Ezekiel 29 in the FBV
Ezekiel 29 in the FEB
Ezekiel 29 in the GGMNT
Ezekiel 29 in the GNT
Ezekiel 29 in the HARY
Ezekiel 29 in the HNT
Ezekiel 29 in the IRVA
Ezekiel 29 in the IRVB
Ezekiel 29 in the IRVG
Ezekiel 29 in the IRVH
Ezekiel 29 in the IRVK
Ezekiel 29 in the IRVM
Ezekiel 29 in the IRVM2
Ezekiel 29 in the IRVO
Ezekiel 29 in the IRVP
Ezekiel 29 in the IRVT
Ezekiel 29 in the IRVT2
Ezekiel 29 in the IRVU
Ezekiel 29 in the ISVN
Ezekiel 29 in the JSNT
Ezekiel 29 in the KAPI
Ezekiel 29 in the KBT1ETNIK
Ezekiel 29 in the KBV
Ezekiel 29 in the KJV
Ezekiel 29 in the KNFD
Ezekiel 29 in the LBA
Ezekiel 29 in the LBLA
Ezekiel 29 in the LNT
Ezekiel 29 in the LSV
Ezekiel 29 in the MAAL
Ezekiel 29 in the MBV
Ezekiel 29 in the MBV2
Ezekiel 29 in the MHNT
Ezekiel 29 in the MKNFD
Ezekiel 29 in the MNG
Ezekiel 29 in the MNT
Ezekiel 29 in the MNT2
Ezekiel 29 in the MRS1T
Ezekiel 29 in the NAA
Ezekiel 29 in the NASB
Ezekiel 29 in the NBLA
Ezekiel 29 in the NBS
Ezekiel 29 in the NBVTP
Ezekiel 29 in the NET2
Ezekiel 29 in the NIV11
Ezekiel 29 in the NNT
Ezekiel 29 in the NNT2
Ezekiel 29 in the NNT3
Ezekiel 29 in the PDDPT
Ezekiel 29 in the PFNT
Ezekiel 29 in the RMNT
Ezekiel 29 in the SBIAS
Ezekiel 29 in the SBIBS
Ezekiel 29 in the SBIBS2
Ezekiel 29 in the SBICS
Ezekiel 29 in the SBIDS
Ezekiel 29 in the SBIGS
Ezekiel 29 in the SBIHS
Ezekiel 29 in the SBIIS
Ezekiel 29 in the SBIIS2
Ezekiel 29 in the SBIIS3
Ezekiel 29 in the SBIKS
Ezekiel 29 in the SBIKS2
Ezekiel 29 in the SBIMS
Ezekiel 29 in the SBIOS
Ezekiel 29 in the SBIPS
Ezekiel 29 in the SBISS
Ezekiel 29 in the SBITS
Ezekiel 29 in the SBITS2
Ezekiel 29 in the SBITS3
Ezekiel 29 in the SBITS4
Ezekiel 29 in the SBIUS
Ezekiel 29 in the SBIVS
Ezekiel 29 in the SBT
Ezekiel 29 in the SBT1E
Ezekiel 29 in the SCHL
Ezekiel 29 in the SNT
Ezekiel 29 in the SUSU
Ezekiel 29 in the SUSU2
Ezekiel 29 in the SYNO
Ezekiel 29 in the TBIAOTANT
Ezekiel 29 in the TBT1E
Ezekiel 29 in the TBT1E2
Ezekiel 29 in the TFTIP
Ezekiel 29 in the TFTU
Ezekiel 29 in the TGNTATF3T
Ezekiel 29 in the THAI
Ezekiel 29 in the TNFD
Ezekiel 29 in the TNT
Ezekiel 29 in the TNTIK
Ezekiel 29 in the TNTIL
Ezekiel 29 in the TNTIN
Ezekiel 29 in the TNTIP
Ezekiel 29 in the TNTIZ
Ezekiel 29 in the TOMA
Ezekiel 29 in the TTENT
Ezekiel 29 in the UBG
Ezekiel 29 in the UGV
Ezekiel 29 in the UGV2
Ezekiel 29 in the UGV3
Ezekiel 29 in the VBL
Ezekiel 29 in the VDCC
Ezekiel 29 in the YALU
Ezekiel 29 in the YAPE
Ezekiel 29 in the YBVTP
Ezekiel 29 in the ZBP