Ezekiel 31 (BOLCB2)

1 Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso :‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu ? 3 Tala mokili ya Asiri malamu !Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani :bitape na yango ezalaki kitokompe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa piokoleka banzete nyonso ya zamba ;elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi,songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata. 4 Mayi ezalaki kokolisa yango,mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi ;ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yangompe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba. 5 Boye, nzete yango ekomaki molayi makasikoleka banzete nyonso ya zamba ;bitape na yango ekomaki milayi,mpe makasa na yango ekomaki ebele,pamba te ezalaki kozwa mayi ebele. 6 Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koyakotonga bazala na bitape na yango,banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango.Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango. 7 Ezalaki kitoko na monene na yangompe na molayi ya bitape na yango,pamba te misisa na yango ezalaki ekitakino na mayi minene. 8 Kati na elanga ya Nzambe,nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango,nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape,nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa :nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanakina yango na kitoko. 9 Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele ;bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe,ezalaki kolula yango. 10 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata ; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango, 11 nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango ; 12 mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango ; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango ; bongo etikalaki yango moko. 13 Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango. 14 Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata ; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa. 15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki ; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. 16 Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. 17 Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo. 18 Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu ? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele ; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga.Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › »

In Other Versions

Ezekiel 31 in the ANGEFD

Ezekiel 31 in the ANTPNG2D

Ezekiel 31 in the AS21

Ezekiel 31 in the BAGH

Ezekiel 31 in the BBPNG

Ezekiel 31 in the BBT1E

Ezekiel 31 in the BDS

Ezekiel 31 in the BEV

Ezekiel 31 in the BHAD

Ezekiel 31 in the BIB

Ezekiel 31 in the BLPT

Ezekiel 31 in the BNT

Ezekiel 31 in the BNTABOOT

Ezekiel 31 in the BNTLV

Ezekiel 31 in the BOATCB

Ezekiel 31 in the BOATCB2

Ezekiel 31 in the BOBCV

Ezekiel 31 in the BOCNT

Ezekiel 31 in the BOECS

Ezekiel 31 in the BOGWICC

Ezekiel 31 in the BOHCB

Ezekiel 31 in the BOHCV

Ezekiel 31 in the BOHLNT

Ezekiel 31 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 31 in the BOICB

Ezekiel 31 in the BOILNTAP

Ezekiel 31 in the BOITCV

Ezekiel 31 in the BOKCV

Ezekiel 31 in the BOKCV2

Ezekiel 31 in the BOKHWOG

Ezekiel 31 in the BOKSSV

Ezekiel 31 in the BOLCB

Ezekiel 31 in the BOMCV

Ezekiel 31 in the BONAV

Ezekiel 31 in the BONCB

Ezekiel 31 in the BONLT

Ezekiel 31 in the BONUT2

Ezekiel 31 in the BOPLNT

Ezekiel 31 in the BOSCB

Ezekiel 31 in the BOSNC

Ezekiel 31 in the BOTLNT

Ezekiel 31 in the BOVCB

Ezekiel 31 in the BOYCB

Ezekiel 31 in the BPBB

Ezekiel 31 in the BPH

Ezekiel 31 in the BSB

Ezekiel 31 in the CCB

Ezekiel 31 in the CUV

Ezekiel 31 in the CUVS

Ezekiel 31 in the DBT

Ezekiel 31 in the DGDNT

Ezekiel 31 in the DHNT

Ezekiel 31 in the DNT

Ezekiel 31 in the ELBE

Ezekiel 31 in the EMTV

Ezekiel 31 in the ESV

Ezekiel 31 in the FBV

Ezekiel 31 in the FEB

Ezekiel 31 in the GGMNT

Ezekiel 31 in the GNT

Ezekiel 31 in the HARY

Ezekiel 31 in the HNT

Ezekiel 31 in the IRVA

Ezekiel 31 in the IRVB

Ezekiel 31 in the IRVG

Ezekiel 31 in the IRVH

Ezekiel 31 in the IRVK

Ezekiel 31 in the IRVM

Ezekiel 31 in the IRVM2

Ezekiel 31 in the IRVO

Ezekiel 31 in the IRVP

Ezekiel 31 in the IRVT

Ezekiel 31 in the IRVT2

Ezekiel 31 in the IRVU

Ezekiel 31 in the ISVN

Ezekiel 31 in the JSNT

Ezekiel 31 in the KAPI

Ezekiel 31 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 31 in the KBV

Ezekiel 31 in the KJV

Ezekiel 31 in the KNFD

Ezekiel 31 in the LBA

Ezekiel 31 in the LBLA

Ezekiel 31 in the LNT

Ezekiel 31 in the LSV

Ezekiel 31 in the MAAL

Ezekiel 31 in the MBV

Ezekiel 31 in the MBV2

Ezekiel 31 in the MHNT

Ezekiel 31 in the MKNFD

Ezekiel 31 in the MNG

Ezekiel 31 in the MNT

Ezekiel 31 in the MNT2

Ezekiel 31 in the MRS1T

Ezekiel 31 in the NAA

Ezekiel 31 in the NASB

Ezekiel 31 in the NBLA

Ezekiel 31 in the NBS

Ezekiel 31 in the NBVTP

Ezekiel 31 in the NET2

Ezekiel 31 in the NIV11

Ezekiel 31 in the NNT

Ezekiel 31 in the NNT2

Ezekiel 31 in the NNT3

Ezekiel 31 in the PDDPT

Ezekiel 31 in the PFNT

Ezekiel 31 in the RMNT

Ezekiel 31 in the SBIAS

Ezekiel 31 in the SBIBS

Ezekiel 31 in the SBIBS2

Ezekiel 31 in the SBICS

Ezekiel 31 in the SBIDS

Ezekiel 31 in the SBIGS

Ezekiel 31 in the SBIHS

Ezekiel 31 in the SBIIS

Ezekiel 31 in the SBIIS2

Ezekiel 31 in the SBIIS3

Ezekiel 31 in the SBIKS

Ezekiel 31 in the SBIKS2

Ezekiel 31 in the SBIMS

Ezekiel 31 in the SBIOS

Ezekiel 31 in the SBIPS

Ezekiel 31 in the SBISS

Ezekiel 31 in the SBITS

Ezekiel 31 in the SBITS2

Ezekiel 31 in the SBITS3

Ezekiel 31 in the SBITS4

Ezekiel 31 in the SBIUS

Ezekiel 31 in the SBIVS

Ezekiel 31 in the SBT

Ezekiel 31 in the SBT1E

Ezekiel 31 in the SCHL

Ezekiel 31 in the SNT

Ezekiel 31 in the SUSU

Ezekiel 31 in the SUSU2

Ezekiel 31 in the SYNO

Ezekiel 31 in the TBIAOTANT

Ezekiel 31 in the TBT1E

Ezekiel 31 in the TBT1E2

Ezekiel 31 in the TFTIP

Ezekiel 31 in the TFTU

Ezekiel 31 in the TGNTATF3T

Ezekiel 31 in the THAI

Ezekiel 31 in the TNFD

Ezekiel 31 in the TNT

Ezekiel 31 in the TNTIK

Ezekiel 31 in the TNTIL

Ezekiel 31 in the TNTIN

Ezekiel 31 in the TNTIP

Ezekiel 31 in the TNTIZ

Ezekiel 31 in the TOMA

Ezekiel 31 in the TTENT

Ezekiel 31 in the UBG

Ezekiel 31 in the UGV

Ezekiel 31 in the UGV2

Ezekiel 31 in the UGV3

Ezekiel 31 in the VBL

Ezekiel 31 in the VDCC

Ezekiel 31 in the YALU

Ezekiel 31 in the YAPE

Ezekiel 31 in the YBVTP

Ezekiel 31 in the ZBP