Ezekiel 38 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na ngai : 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Gogi, ya mokili ya Magogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali ! Sakola na tina ye mpo na kotelemela ye ! 3 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natombokeli yo, Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali ! 4 Nakokembisa yo, nakotia yo bibende na mbanga, nakobimisa yo elongo na basoda na yo nyonso, mpunda na yo elongo na basoda oyo babundaka likolo ya bampunda : bango nyonso balata kitoko mpe batondi ebele, bamemi banguba minene mpe ya mike mpe bayebi malamu kosalela mipanga. 5 Basoda ya Persi, ya Kushi mpe ya Puti, ba-oyo nyonso bamemaka banguba ya mike mpe balataka bikoti ya bibende, bakosangana na bango ; 6 Gomeri mpe mampinga na ye nyonso ya basoda ; libota ya Togarima, wuta na suka ya etuka ya nor, elongo na mampinga na ye nyonso ya basoda, ebele ya bato ya bikolo, bakosangana na yo mpo na kosunga yo. 7 Milengela malamu mpe bongama, yo elongo na mampinga nyonso oyo esangani na yo ! Yo nde okozala mokengeli na bango. 8 Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda ; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia. 9 Yo mpe mampinga na yo nyonso, elongo na bikolo ebele oyo esanganaki na yo, bokomata mpe bokopusana lokola mopepe makasi, lokola lipata oyo ezipi mokili. 10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe. 11 Okoloba : ‘ Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke ; 12 nakokende koyiba mpe kozwa na makasi bomengo ya bitumba. Okobalola loboko na yo mpo na kobundisa bisika oyo ebeba, bongo bato bakoma lisusu kovanda kuna, bato oyo basangisa wuta na bikolo, oyo batonda na bibwele mpe na biloko ebele, oyo bavandaka na kati-kati ya mokili oyo. ’ 13 Bato ya Seba, ya Dedani, bato ya mombongo ya Tarsisi, elongo na bamboka na yango nyonso ya mike bakoloba na yo : ‘ Boni, oyei solo mpo na kozwa na makasi bomengo ya bitumba ? Boni, osangisi mampinga na yo mpo na kobotola palata mpe komema wolo, mpo na kozwa bibwele mpe kobotola biloko to mpo na kozwa biloko ebele ? ’ › 14 Yango wana, mwana na moto, sakola ! Loba na Gogi : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, tango bato na Ngai, Isalaele, bakovanda na kimia, boni, okoyeba yango te ? 15 Okowuta na bisika na yo, mosika kuna na etuka ya nor, yo mpe bikolo ebele elongo na yo ; bango nyonso likolo ya bampunda, bato ebele, mampinga ya basoda ebele ya nguya. 16 Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango. 17 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai ? 18 Na mokolo yango, mokolo oyo Gogi akobundisa mabele ya Isalaele, tala makambo oyo ekosalema : kanda na Ngai ekopela makasi, elobi Nkolo Yawe. 19 Na zuwa mpe kanda na Ngai ya makasi, nalobi ete na tango wana, mabele ekoningana makasi kati na Isalaele. 20 Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai ; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele. 21 Nakobengisa mopanga mpo na kobundisa Gogi, na bangomba na Ngai nyonso, elobi Nkolo Yawe. Mopanga ya moto na moto ekoboma ndeko na ye. 22 Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu ; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto. 23 Na nzela wana, nakomonisa monene mpe bosantu na Ngai, mpe nakosala ete bato ya bikolo ebele bayeba Ngai ; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›

In Other Versions

Ezekiel 38 in the ANGEFD

Ezekiel 38 in the ANTPNG2D

Ezekiel 38 in the AS21

Ezekiel 38 in the BAGH

Ezekiel 38 in the BBPNG

Ezekiel 38 in the BBT1E

Ezekiel 38 in the BDS

Ezekiel 38 in the BEV

Ezekiel 38 in the BHAD

Ezekiel 38 in the BIB

Ezekiel 38 in the BLPT

Ezekiel 38 in the BNT

Ezekiel 38 in the BNTABOOT

Ezekiel 38 in the BNTLV

Ezekiel 38 in the BOATCB

Ezekiel 38 in the BOATCB2

Ezekiel 38 in the BOBCV

Ezekiel 38 in the BOCNT

Ezekiel 38 in the BOECS

Ezekiel 38 in the BOGWICC

Ezekiel 38 in the BOHCB

Ezekiel 38 in the BOHCV

Ezekiel 38 in the BOHLNT

Ezekiel 38 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 38 in the BOICB

Ezekiel 38 in the BOILNTAP

Ezekiel 38 in the BOITCV

Ezekiel 38 in the BOKCV

Ezekiel 38 in the BOKCV2

Ezekiel 38 in the BOKHWOG

Ezekiel 38 in the BOKSSV

Ezekiel 38 in the BOLCB

Ezekiel 38 in the BOMCV

Ezekiel 38 in the BONAV

Ezekiel 38 in the BONCB

Ezekiel 38 in the BONLT

Ezekiel 38 in the BONUT2

Ezekiel 38 in the BOPLNT

Ezekiel 38 in the BOSCB

Ezekiel 38 in the BOSNC

Ezekiel 38 in the BOTLNT

Ezekiel 38 in the BOVCB

Ezekiel 38 in the BOYCB

Ezekiel 38 in the BPBB

Ezekiel 38 in the BPH

Ezekiel 38 in the BSB

Ezekiel 38 in the CCB

Ezekiel 38 in the CUV

Ezekiel 38 in the CUVS

Ezekiel 38 in the DBT

Ezekiel 38 in the DGDNT

Ezekiel 38 in the DHNT

Ezekiel 38 in the DNT

Ezekiel 38 in the ELBE

Ezekiel 38 in the EMTV

Ezekiel 38 in the ESV

Ezekiel 38 in the FBV

Ezekiel 38 in the FEB

Ezekiel 38 in the GGMNT

Ezekiel 38 in the GNT

Ezekiel 38 in the HARY

Ezekiel 38 in the HNT

Ezekiel 38 in the IRVA

Ezekiel 38 in the IRVB

Ezekiel 38 in the IRVG

Ezekiel 38 in the IRVH

Ezekiel 38 in the IRVK

Ezekiel 38 in the IRVM

Ezekiel 38 in the IRVM2

Ezekiel 38 in the IRVO

Ezekiel 38 in the IRVP

Ezekiel 38 in the IRVT

Ezekiel 38 in the IRVT2

Ezekiel 38 in the IRVU

Ezekiel 38 in the ISVN

Ezekiel 38 in the JSNT

Ezekiel 38 in the KAPI

Ezekiel 38 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 38 in the KBV

Ezekiel 38 in the KJV

Ezekiel 38 in the KNFD

Ezekiel 38 in the LBA

Ezekiel 38 in the LBLA

Ezekiel 38 in the LNT

Ezekiel 38 in the LSV

Ezekiel 38 in the MAAL

Ezekiel 38 in the MBV

Ezekiel 38 in the MBV2

Ezekiel 38 in the MHNT

Ezekiel 38 in the MKNFD

Ezekiel 38 in the MNG

Ezekiel 38 in the MNT

Ezekiel 38 in the MNT2

Ezekiel 38 in the MRS1T

Ezekiel 38 in the NAA

Ezekiel 38 in the NASB

Ezekiel 38 in the NBLA

Ezekiel 38 in the NBS

Ezekiel 38 in the NBVTP

Ezekiel 38 in the NET2

Ezekiel 38 in the NIV11

Ezekiel 38 in the NNT

Ezekiel 38 in the NNT2

Ezekiel 38 in the NNT3

Ezekiel 38 in the PDDPT

Ezekiel 38 in the PFNT

Ezekiel 38 in the RMNT

Ezekiel 38 in the SBIAS

Ezekiel 38 in the SBIBS

Ezekiel 38 in the SBIBS2

Ezekiel 38 in the SBICS

Ezekiel 38 in the SBIDS

Ezekiel 38 in the SBIGS

Ezekiel 38 in the SBIHS

Ezekiel 38 in the SBIIS

Ezekiel 38 in the SBIIS2

Ezekiel 38 in the SBIIS3

Ezekiel 38 in the SBIKS

Ezekiel 38 in the SBIKS2

Ezekiel 38 in the SBIMS

Ezekiel 38 in the SBIOS

Ezekiel 38 in the SBIPS

Ezekiel 38 in the SBISS

Ezekiel 38 in the SBITS

Ezekiel 38 in the SBITS2

Ezekiel 38 in the SBITS3

Ezekiel 38 in the SBITS4

Ezekiel 38 in the SBIUS

Ezekiel 38 in the SBIVS

Ezekiel 38 in the SBT

Ezekiel 38 in the SBT1E

Ezekiel 38 in the SCHL

Ezekiel 38 in the SNT

Ezekiel 38 in the SUSU

Ezekiel 38 in the SUSU2

Ezekiel 38 in the SYNO

Ezekiel 38 in the TBIAOTANT

Ezekiel 38 in the TBT1E

Ezekiel 38 in the TBT1E2

Ezekiel 38 in the TFTIP

Ezekiel 38 in the TFTU

Ezekiel 38 in the TGNTATF3T

Ezekiel 38 in the THAI

Ezekiel 38 in the TNFD

Ezekiel 38 in the TNT

Ezekiel 38 in the TNTIK

Ezekiel 38 in the TNTIL

Ezekiel 38 in the TNTIN

Ezekiel 38 in the TNTIP

Ezekiel 38 in the TNTIZ

Ezekiel 38 in the TOMA

Ezekiel 38 in the TTENT

Ezekiel 38 in the UBG

Ezekiel 38 in the UGV

Ezekiel 38 in the UGV2

Ezekiel 38 in the UGV3

Ezekiel 38 in the VBL

Ezekiel 38 in the VDCC

Ezekiel 38 in the YALU

Ezekiel 38 in the YAPE

Ezekiel 38 in the YBVTP

Ezekiel 38 in the ZBP