Ezekiel 43 (BOLCB2)

1 Moto yango amemaki ngai kino na ekuke oyo etala na ngambo ya este, 2 mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye. 3 Emoniseli oyo namonaki ezalaki ndenge moko na oyo namonaki tango ayaki kobebisa engumba, mpe ndenge moko na oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye, nakweyaki elongi kino na mabele. 4 Nkembo na Yawe ekotaki kati na Tempelo na nzela ya ekuke oyo etala na ngambo ya este. 5 Bongo, Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na lopango ya kati, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo. 6 Tango moto yango atelemaki pene na ngai, nayokaki mongongo ya moto koloba na ngai wuta na kati ya Tempelo. 7 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba. 8 Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai. 9 Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela. 10 Mwana na moto, lakisa epai ya libota ya Isalaele ndenge Tempelo ezali mpo ete bayoka soni mpo na masumu na bango ; mpe tika ete bameka molayi mpe mokuse na yango. 11 Soki bayoki penza soni mpo na makambo nyonso oyo basalaki, lakisa bango ndenge nini Tempelo ezali : ndenge basalela yango, bikuke mpe bikotelo na yango, ndenge batambolisaka yango, mibeko nini balandaka mpe ndenge nini basalaka losambo ; koma yango, na miso na bango, mpo ete bakoka kolandela yango mpe kotia yango na misala. 12 Tala mobeko oyo etali Tempelo : bisika nyonso oyo ezali zingazinga ya likolo ya ngomba ekozala bule koleka. Yango nde mobeko oyo etali Tempelo. 13 Tala molayi mpe mokuse ya etumbelo na bametele : zingazinga ya se ya etumbelo ezalaki na libulu moko ya bozindo ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ndenge moko na mokuse na yango ; bazingelaki yango na eloko moko evimba ya basantimetele pene mwambe. Etumbelo ezalaki, 14 longwa na se ya mabele kino na moboko, na metele pene moko na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse ; kobanda na moboko ya moke kino na moboko ya monene, bametele pene mibale na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse. 15 Etumbelo ezalaki na bametele pene mibale na bosanda, mpe maseke minei ezalaki likolo na yango. 16 Likolo ya etumbelo ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso : bametele pene motoba. 17 Moboko ya monene ezalaki ekokana na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso : bametele pene sambo. Eloko moko evimba ya basantimetele pene tuku mibale na mitano ezalaki zingazinga na yango. Mpe libulu moko ya basantimetele pene tuku mitano na bozindo ezalaki zingazinga na yango ; mpe binyatelo ya etumbelo ezalaki na ngambo ya este. » 18 Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila. 19 Okopesa mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi ya libota ya Tsadoki mpe babelemaka liboso na Ngai mpo na kosalela Ngai, elobi Nkolo Yawe ; 20 okokamata ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na maseke minei ya etumbelo mpe na basonge minei ya moboko ya likolo mpe zingazinga ya eloko oyo evimba. Na bongo, okopetola etumbelo mpe okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yango. 21 Okokamata ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu mpe okotumba yango na esika oyo babongisa na Tempelo mpo na yango, na libanda ya Esika ya bule. 22 Na mokolo ya mibale, okobonza ntaba moko ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka ya masumu ; boye, etumbelo ekokoma peto ndenge ekomaki peto na nzela ya ngombe ya mobali. 23 Tango okosilisa kopetola yango, okobonza mwana ngombe ya mobali mpe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele. 24 Okobonza yango liboso ya Yawe ; bongo, Banganga-Nzambe bakobwakela yango mungwa mpe bakobonza yango lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. 25 Mikolo sambo, okobanda kobonza, mokolo na mokolo, ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu ; okobonza lisusu mwana ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele. 26 Bakosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo mpe kopetola yango mikolo sambo ; bongo nde bakopetola mpe bakobulisa yango. 27 Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. »

In Other Versions

Ezekiel 43 in the ANGEFD

Ezekiel 43 in the ANTPNG2D

Ezekiel 43 in the AS21

Ezekiel 43 in the BAGH

Ezekiel 43 in the BBPNG

Ezekiel 43 in the BBT1E

Ezekiel 43 in the BDS

Ezekiel 43 in the BEV

Ezekiel 43 in the BHAD

Ezekiel 43 in the BIB

Ezekiel 43 in the BLPT

Ezekiel 43 in the BNT

Ezekiel 43 in the BNTABOOT

Ezekiel 43 in the BNTLV

Ezekiel 43 in the BOATCB

Ezekiel 43 in the BOATCB2

Ezekiel 43 in the BOBCV

Ezekiel 43 in the BOCNT

Ezekiel 43 in the BOECS

Ezekiel 43 in the BOGWICC

Ezekiel 43 in the BOHCB

Ezekiel 43 in the BOHCV

Ezekiel 43 in the BOHLNT

Ezekiel 43 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 43 in the BOICB

Ezekiel 43 in the BOILNTAP

Ezekiel 43 in the BOITCV

Ezekiel 43 in the BOKCV

Ezekiel 43 in the BOKCV2

Ezekiel 43 in the BOKHWOG

Ezekiel 43 in the BOKSSV

Ezekiel 43 in the BOLCB

Ezekiel 43 in the BOMCV

Ezekiel 43 in the BONAV

Ezekiel 43 in the BONCB

Ezekiel 43 in the BONLT

Ezekiel 43 in the BONUT2

Ezekiel 43 in the BOPLNT

Ezekiel 43 in the BOSCB

Ezekiel 43 in the BOSNC

Ezekiel 43 in the BOTLNT

Ezekiel 43 in the BOVCB

Ezekiel 43 in the BOYCB

Ezekiel 43 in the BPBB

Ezekiel 43 in the BPH

Ezekiel 43 in the BSB

Ezekiel 43 in the CCB

Ezekiel 43 in the CUV

Ezekiel 43 in the CUVS

Ezekiel 43 in the DBT

Ezekiel 43 in the DGDNT

Ezekiel 43 in the DHNT

Ezekiel 43 in the DNT

Ezekiel 43 in the ELBE

Ezekiel 43 in the EMTV

Ezekiel 43 in the ESV

Ezekiel 43 in the FBV

Ezekiel 43 in the FEB

Ezekiel 43 in the GGMNT

Ezekiel 43 in the GNT

Ezekiel 43 in the HARY

Ezekiel 43 in the HNT

Ezekiel 43 in the IRVA

Ezekiel 43 in the IRVB

Ezekiel 43 in the IRVG

Ezekiel 43 in the IRVH

Ezekiel 43 in the IRVK

Ezekiel 43 in the IRVM

Ezekiel 43 in the IRVM2

Ezekiel 43 in the IRVO

Ezekiel 43 in the IRVP

Ezekiel 43 in the IRVT

Ezekiel 43 in the IRVT2

Ezekiel 43 in the IRVU

Ezekiel 43 in the ISVN

Ezekiel 43 in the JSNT

Ezekiel 43 in the KAPI

Ezekiel 43 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 43 in the KBV

Ezekiel 43 in the KJV

Ezekiel 43 in the KNFD

Ezekiel 43 in the LBA

Ezekiel 43 in the LBLA

Ezekiel 43 in the LNT

Ezekiel 43 in the LSV

Ezekiel 43 in the MAAL

Ezekiel 43 in the MBV

Ezekiel 43 in the MBV2

Ezekiel 43 in the MHNT

Ezekiel 43 in the MKNFD

Ezekiel 43 in the MNG

Ezekiel 43 in the MNT

Ezekiel 43 in the MNT2

Ezekiel 43 in the MRS1T

Ezekiel 43 in the NAA

Ezekiel 43 in the NASB

Ezekiel 43 in the NBLA

Ezekiel 43 in the NBS

Ezekiel 43 in the NBVTP

Ezekiel 43 in the NET2

Ezekiel 43 in the NIV11

Ezekiel 43 in the NNT

Ezekiel 43 in the NNT2

Ezekiel 43 in the NNT3

Ezekiel 43 in the PDDPT

Ezekiel 43 in the PFNT

Ezekiel 43 in the RMNT

Ezekiel 43 in the SBIAS

Ezekiel 43 in the SBIBS

Ezekiel 43 in the SBIBS2

Ezekiel 43 in the SBICS

Ezekiel 43 in the SBIDS

Ezekiel 43 in the SBIGS

Ezekiel 43 in the SBIHS

Ezekiel 43 in the SBIIS

Ezekiel 43 in the SBIIS2

Ezekiel 43 in the SBIIS3

Ezekiel 43 in the SBIKS

Ezekiel 43 in the SBIKS2

Ezekiel 43 in the SBIMS

Ezekiel 43 in the SBIOS

Ezekiel 43 in the SBIPS

Ezekiel 43 in the SBISS

Ezekiel 43 in the SBITS

Ezekiel 43 in the SBITS2

Ezekiel 43 in the SBITS3

Ezekiel 43 in the SBITS4

Ezekiel 43 in the SBIUS

Ezekiel 43 in the SBIVS

Ezekiel 43 in the SBT

Ezekiel 43 in the SBT1E

Ezekiel 43 in the SCHL

Ezekiel 43 in the SNT

Ezekiel 43 in the SUSU

Ezekiel 43 in the SUSU2

Ezekiel 43 in the SYNO

Ezekiel 43 in the TBIAOTANT

Ezekiel 43 in the TBT1E

Ezekiel 43 in the TBT1E2

Ezekiel 43 in the TFTIP

Ezekiel 43 in the TFTU

Ezekiel 43 in the TGNTATF3T

Ezekiel 43 in the THAI

Ezekiel 43 in the TNFD

Ezekiel 43 in the TNT

Ezekiel 43 in the TNTIK

Ezekiel 43 in the TNTIL

Ezekiel 43 in the TNTIN

Ezekiel 43 in the TNTIP

Ezekiel 43 in the TNTIZ

Ezekiel 43 in the TOMA

Ezekiel 43 in the TTENT

Ezekiel 43 in the UBG

Ezekiel 43 in the UGV

Ezekiel 43 in the UGV2

Ezekiel 43 in the UGV3

Ezekiel 43 in the VBL

Ezekiel 43 in the VDCC

Ezekiel 43 in the YALU

Ezekiel 43 in the YAPE

Ezekiel 43 in the YBVTP

Ezekiel 43 in the ZBP