Galatians 2 (BOLCB2)

1 Sima na mibu zomi na minei, nazongaki lisusu na Yelusalemi elongo na Barnabasi ; namemaki mpe Tito. 2 Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya. 3 Nzokande, ezala Tito oyo azalaki elongo na ngai, batindaki ye kutu te na makasi ete akatisa ngenga, atako azalaki Mogreki. 4 Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu. 5 Kasi totikelaki bango ata tango te mpo ete bosolo ya Sango Malamu etikala mpo na bino. 6 Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai ; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te. 7 Kutu, bamonaki penza ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya bato oyo bakatama ngenga te, ndenge apesaki na Petelo mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya Bayuda. 8 Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano. 9 Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko ; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga. 10 Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango. 11 Tango Petelo ayaki na Antioshe, natelemelaki ye makasi mpo ete azalaki kati na libunga. 12 Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano ; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda. 13 Bayuda mosusu basanganaki na ye kati na lokuta na ye kino Barnabasi mpe akotaki na lokuta na bango. 14 Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso : « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano ! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda ? 15 Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki. 16 Toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa maloba ya Mobeko, kasi kaka na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto. Yango wana biso mpe tondimelaki Yesu-Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima kati na Klisto, kasi na nzela te ya kotosa maloba ya Mobeko, pamba te moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa maloba ya mibeko. 17 Kasi soki, wana tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani lisusu ete biso moko Bayuda tozali mpe basumuki lokola Bapagano, boni, elingi koloba ete Klisto azali kotombola masumu ? Ata moke te ! 18 Soki ngai natomboli lisusu biloko oyo nasilaki kobebisa, wana nazali penza mobuki mibeko. 19 Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto ; 20 boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai. 21 Nazali kolongola te ngolu ya Nzambe, pamba te soki ezali na nzela ya kotosa Mobeko nde bato bakomaka sembo, wana Klisto akufaki mpo na pamba. »

In Other Versions

Galatians 2 in the ANGEFD

Galatians 2 in the ANTPNG2D

Galatians 2 in the AS21

Galatians 2 in the BAGH

Galatians 2 in the BBPNG

Galatians 2 in the BBT1E

Galatians 2 in the BDS

Galatians 2 in the BEV

Galatians 2 in the BHAD

Galatians 2 in the BIB

Galatians 2 in the BLPT

Galatians 2 in the BNT

Galatians 2 in the BNTABOOT

Galatians 2 in the BNTLV

Galatians 2 in the BOATCB

Galatians 2 in the BOATCB2

Galatians 2 in the BOBCV

Galatians 2 in the BOCNT

Galatians 2 in the BOECS

Galatians 2 in the BOGWICC

Galatians 2 in the BOHCB

Galatians 2 in the BOHCV

Galatians 2 in the BOHLNT

Galatians 2 in the BOHNTLTAL

Galatians 2 in the BOICB

Galatians 2 in the BOILNTAP

Galatians 2 in the BOITCV

Galatians 2 in the BOKCV

Galatians 2 in the BOKCV2

Galatians 2 in the BOKHWOG

Galatians 2 in the BOKSSV

Galatians 2 in the BOLCB

Galatians 2 in the BOMCV

Galatians 2 in the BONAV

Galatians 2 in the BONCB

Galatians 2 in the BONLT

Galatians 2 in the BONUT2

Galatians 2 in the BOPLNT

Galatians 2 in the BOSCB

Galatians 2 in the BOSNC

Galatians 2 in the BOTLNT

Galatians 2 in the BOVCB

Galatians 2 in the BOYCB

Galatians 2 in the BPBB

Galatians 2 in the BPH

Galatians 2 in the BSB

Galatians 2 in the CCB

Galatians 2 in the CUV

Galatians 2 in the CUVS

Galatians 2 in the DBT

Galatians 2 in the DGDNT

Galatians 2 in the DHNT

Galatians 2 in the DNT

Galatians 2 in the ELBE

Galatians 2 in the EMTV

Galatians 2 in the ESV

Galatians 2 in the FBV

Galatians 2 in the FEB

Galatians 2 in the GGMNT

Galatians 2 in the GNT

Galatians 2 in the HARY

Galatians 2 in the HNT

Galatians 2 in the IRVA

Galatians 2 in the IRVB

Galatians 2 in the IRVG

Galatians 2 in the IRVH

Galatians 2 in the IRVK

Galatians 2 in the IRVM

Galatians 2 in the IRVM2

Galatians 2 in the IRVO

Galatians 2 in the IRVP

Galatians 2 in the IRVT

Galatians 2 in the IRVT2

Galatians 2 in the IRVU

Galatians 2 in the ISVN

Galatians 2 in the JSNT

Galatians 2 in the KAPI

Galatians 2 in the KBT1ETNIK

Galatians 2 in the KBV

Galatians 2 in the KJV

Galatians 2 in the KNFD

Galatians 2 in the LBA

Galatians 2 in the LBLA

Galatians 2 in the LNT

Galatians 2 in the LSV

Galatians 2 in the MAAL

Galatians 2 in the MBV

Galatians 2 in the MBV2

Galatians 2 in the MHNT

Galatians 2 in the MKNFD

Galatians 2 in the MNG

Galatians 2 in the MNT

Galatians 2 in the MNT2

Galatians 2 in the MRS1T

Galatians 2 in the NAA

Galatians 2 in the NASB

Galatians 2 in the NBLA

Galatians 2 in the NBS

Galatians 2 in the NBVTP

Galatians 2 in the NET2

Galatians 2 in the NIV11

Galatians 2 in the NNT

Galatians 2 in the NNT2

Galatians 2 in the NNT3

Galatians 2 in the PDDPT

Galatians 2 in the PFNT

Galatians 2 in the RMNT

Galatians 2 in the SBIAS

Galatians 2 in the SBIBS

Galatians 2 in the SBIBS2

Galatians 2 in the SBICS

Galatians 2 in the SBIDS

Galatians 2 in the SBIGS

Galatians 2 in the SBIHS

Galatians 2 in the SBIIS

Galatians 2 in the SBIIS2

Galatians 2 in the SBIIS3

Galatians 2 in the SBIKS

Galatians 2 in the SBIKS2

Galatians 2 in the SBIMS

Galatians 2 in the SBIOS

Galatians 2 in the SBIPS

Galatians 2 in the SBISS

Galatians 2 in the SBITS

Galatians 2 in the SBITS2

Galatians 2 in the SBITS3

Galatians 2 in the SBITS4

Galatians 2 in the SBIUS

Galatians 2 in the SBIVS

Galatians 2 in the SBT

Galatians 2 in the SBT1E

Galatians 2 in the SCHL

Galatians 2 in the SNT

Galatians 2 in the SUSU

Galatians 2 in the SUSU2

Galatians 2 in the SYNO

Galatians 2 in the TBIAOTANT

Galatians 2 in the TBT1E

Galatians 2 in the TBT1E2

Galatians 2 in the TFTIP

Galatians 2 in the TFTU

Galatians 2 in the TGNTATF3T

Galatians 2 in the THAI

Galatians 2 in the TNFD

Galatians 2 in the TNT

Galatians 2 in the TNTIK

Galatians 2 in the TNTIL

Galatians 2 in the TNTIN

Galatians 2 in the TNTIP

Galatians 2 in the TNTIZ

Galatians 2 in the TOMA

Galatians 2 in the TTENT

Galatians 2 in the UBG

Galatians 2 in the UGV

Galatians 2 in the UGV2

Galatians 2 in the UGV3

Galatians 2 in the VBL

Galatians 2 in the VDCC

Galatians 2 in the YALU

Galatians 2 in the YAPE

Galatians 2 in the YBVTP

Galatians 2 in the ZBP