Galatians 4 (BOLCB2)

1 Tala ndimbola ya makambo oyo nazali koloba : soki mokitani ya libula azali nanu mwana moke, akeseni te na mowumbu, atako ye nde azali nkolo ya biloko nyonso. 2 Akozala na se ya bokonzi ya babokoli mpe ya babateli bomengo kino tango akokokisa mibu oyo tata na ye akataki. 3 Ezali mpe ndenge moko mpo na biso : wana tozalaki nanu bana mike, tozalaki bawumbu ya makambo oyo etambolisaka mokili. 4 Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko, 5 mpo na kosikola bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpe mpo na kopesa biso makoki ya kokoma bana na Nzambe. 6 Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka : « Aba, » elingi koloba : « Tata ! » 7 Boye, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe mpo ete ozali mwana, Nzambe okomisi yo mokitani ya libula na Ye. 8 Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te. 9 Kasi awa boyebi sik’oyo Nzambe to lokola sik’oyo Nzambe ayebi bino, ndenge nini bozongeli lisusu makambo oyo etambolisaka mokili, makambo oyo ezanga nguya mpe tina ? Bolingi lisusu komizongisa na se ya bowumbu na yango ? 10 Bozali kotosa mikolo, basanza, bileko mpe mibu ! 11 Ah ! Nazali penza kobanga ete pasi oyo namiyokisaki mpo na bino ekende pamba. 12 Nabondeli bino bandeko na ngai : Bozala lokola ngai, pamba te ngai mpe namikomisaki lokola bino. Bosalaki ngai mabe moko te. 13 Boyebi malamu ete ezali bokono na ngai nde epesaki ngai libaku ya koteya bino Sango Malamu mpo na mbala ya liboso. 14 Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai ; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko. 15 Esengo na bino ekeyi wapi ? Nakoki ata kopesa litatoli oyo na tina na bino : Soki ekokaki kosalema, bolingaki ata kolongola miso na bino mpo na kopesa ngai yango. 16 Boni, nakomi sik’oyo monguna na bino mpo ete nazali koloba na bino solo ? 17 Bato wana balingi bino makasi, kasi makanisi na bango ezali ya malamu te ; bazali na posa ya kokabola bino na ngai mpo ete bokangama na bango. 18 Ezali malamu kozalaka tango nyonso na bolingo eleka ndelo mpo na likambo ya malamu, kasi ezala kaka te tango nazali elongo na bino. 19 Bana na ngai, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali lisusu koyoka pasi mpo na bino, kino tango Klisto akosalema kati na bino. 20 Nazali na posa makasi ya kozala sik’oyo elongo na bino mpe koloba na bino na lolenge mosusu, pamba te nayebi lisusu te eloko ya kosala mpo na bino ! 21 Bino oyo bolingi kozala na se ya bokonzi ya Mobeko, boyebisa ngai nanu, bososolaka na bino te makambo oyo Mobeko elobaka ? 22 Ekomama kati na yango ete Abrayami azalaki na bana mibali mibale : mwasi mowumbu abotelaki ye mwana moko, mpe mwasi nsomi abotelaki ye mwana moko. 23 Mwana oyo mwasi mowumbu abotelaki Abrayami abotamaki na lolenge ya bomoto, kasi mwana oyo mwasi nsomi abotelaki ye abotamaki kolanda elaka ya Nzambe. 24 Makambo oyo epesami lokola ndakisa : Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu ; yango nde Agari azali kotalisa. 25 Agari azali ngomba Sinai kati na Arabi, akokani na Yelusalemi ya sik’oyo, pamba te ezali kati na bowumbu elongo na bana na yango. 26 Kasi Yelusalemi ya Likolo ezali nsomi, mpe yango nde ezali mama na biso ; 27 pamba te ekomama :« Sepela, mwasi ekomba,yo oyo obotaka te !Sepela makasi mpe ganga na esengo,yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te !Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebelekoleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. » 28 Nzokande bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka, lokola Izaki. 29 Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo. 30 Nzokande Makomi ezali koloba nini ? « Bengana mwasi mowumbu elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu akoki te kokabola libula elongo na mwana mobali ya mwasi nsomi. » 31 Yango wana bandeko na ngai, biso tozali bana ya mwasi mowumbu te, kasi bana ya mwasi nsomi.

In Other Versions

Galatians 4 in the ANGEFD

Galatians 4 in the ANTPNG2D

Galatians 4 in the AS21

Galatians 4 in the BAGH

Galatians 4 in the BBPNG

Galatians 4 in the BBT1E

Galatians 4 in the BDS

Galatians 4 in the BEV

Galatians 4 in the BHAD

Galatians 4 in the BIB

Galatians 4 in the BLPT

Galatians 4 in the BNT

Galatians 4 in the BNTABOOT

Galatians 4 in the BNTLV

Galatians 4 in the BOATCB

Galatians 4 in the BOATCB2

Galatians 4 in the BOBCV

Galatians 4 in the BOCNT

Galatians 4 in the BOECS

Galatians 4 in the BOGWICC

Galatians 4 in the BOHCB

Galatians 4 in the BOHCV

Galatians 4 in the BOHLNT

Galatians 4 in the BOHNTLTAL

Galatians 4 in the BOICB

Galatians 4 in the BOILNTAP

Galatians 4 in the BOITCV

Galatians 4 in the BOKCV

Galatians 4 in the BOKCV2

Galatians 4 in the BOKHWOG

Galatians 4 in the BOKSSV

Galatians 4 in the BOLCB

Galatians 4 in the BOMCV

Galatians 4 in the BONAV

Galatians 4 in the BONCB

Galatians 4 in the BONLT

Galatians 4 in the BONUT2

Galatians 4 in the BOPLNT

Galatians 4 in the BOSCB

Galatians 4 in the BOSNC

Galatians 4 in the BOTLNT

Galatians 4 in the BOVCB

Galatians 4 in the BOYCB

Galatians 4 in the BPBB

Galatians 4 in the BPH

Galatians 4 in the BSB

Galatians 4 in the CCB

Galatians 4 in the CUV

Galatians 4 in the CUVS

Galatians 4 in the DBT

Galatians 4 in the DGDNT

Galatians 4 in the DHNT

Galatians 4 in the DNT

Galatians 4 in the ELBE

Galatians 4 in the EMTV

Galatians 4 in the ESV

Galatians 4 in the FBV

Galatians 4 in the FEB

Galatians 4 in the GGMNT

Galatians 4 in the GNT

Galatians 4 in the HARY

Galatians 4 in the HNT

Galatians 4 in the IRVA

Galatians 4 in the IRVB

Galatians 4 in the IRVG

Galatians 4 in the IRVH

Galatians 4 in the IRVK

Galatians 4 in the IRVM

Galatians 4 in the IRVM2

Galatians 4 in the IRVO

Galatians 4 in the IRVP

Galatians 4 in the IRVT

Galatians 4 in the IRVT2

Galatians 4 in the IRVU

Galatians 4 in the ISVN

Galatians 4 in the JSNT

Galatians 4 in the KAPI

Galatians 4 in the KBT1ETNIK

Galatians 4 in the KBV

Galatians 4 in the KJV

Galatians 4 in the KNFD

Galatians 4 in the LBA

Galatians 4 in the LBLA

Galatians 4 in the LNT

Galatians 4 in the LSV

Galatians 4 in the MAAL

Galatians 4 in the MBV

Galatians 4 in the MBV2

Galatians 4 in the MHNT

Galatians 4 in the MKNFD

Galatians 4 in the MNG

Galatians 4 in the MNT

Galatians 4 in the MNT2

Galatians 4 in the MRS1T

Galatians 4 in the NAA

Galatians 4 in the NASB

Galatians 4 in the NBLA

Galatians 4 in the NBS

Galatians 4 in the NBVTP

Galatians 4 in the NET2

Galatians 4 in the NIV11

Galatians 4 in the NNT

Galatians 4 in the NNT2

Galatians 4 in the NNT3

Galatians 4 in the PDDPT

Galatians 4 in the PFNT

Galatians 4 in the RMNT

Galatians 4 in the SBIAS

Galatians 4 in the SBIBS

Galatians 4 in the SBIBS2

Galatians 4 in the SBICS

Galatians 4 in the SBIDS

Galatians 4 in the SBIGS

Galatians 4 in the SBIHS

Galatians 4 in the SBIIS

Galatians 4 in the SBIIS2

Galatians 4 in the SBIIS3

Galatians 4 in the SBIKS

Galatians 4 in the SBIKS2

Galatians 4 in the SBIMS

Galatians 4 in the SBIOS

Galatians 4 in the SBIPS

Galatians 4 in the SBISS

Galatians 4 in the SBITS

Galatians 4 in the SBITS2

Galatians 4 in the SBITS3

Galatians 4 in the SBITS4

Galatians 4 in the SBIUS

Galatians 4 in the SBIVS

Galatians 4 in the SBT

Galatians 4 in the SBT1E

Galatians 4 in the SCHL

Galatians 4 in the SNT

Galatians 4 in the SUSU

Galatians 4 in the SUSU2

Galatians 4 in the SYNO

Galatians 4 in the TBIAOTANT

Galatians 4 in the TBT1E

Galatians 4 in the TBT1E2

Galatians 4 in the TFTIP

Galatians 4 in the TFTU

Galatians 4 in the TGNTATF3T

Galatians 4 in the THAI

Galatians 4 in the TNFD

Galatians 4 in the TNT

Galatians 4 in the TNTIK

Galatians 4 in the TNTIL

Galatians 4 in the TNTIN

Galatians 4 in the TNTIP

Galatians 4 in the TNTIZ

Galatians 4 in the TOMA

Galatians 4 in the TTENT

Galatians 4 in the UBG

Galatians 4 in the UGV

Galatians 4 in the UGV2

Galatians 4 in the UGV3

Galatians 4 in the VBL

Galatians 4 in the VDCC

Galatians 4 in the YALU

Galatians 4 in the YAPE

Galatians 4 in the YBVTP

Galatians 4 in the ZBP