Genesis 18 (BOLCB2)

1 Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi. 2 Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele. 3 Alobaki :— Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te. 4 Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo. 5 Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino.Bazongisaki :— Ezali malamu, sala ndenge olobi. 6 Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. » 7 Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki. 8 Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia. 9 Sima, batunaki ye :— Wapi Sara, mwasi na yo ?Abrayami azongisaki :— Azali na ndako. 10 Bongo moko kati na bango alobaki :— Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali.Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami. 11 Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota. 12 Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! » 13 Yawe alobaki na Abrayami :— Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? » 14 Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali. 15 Sara abangaki ; boye awanganaki :— Naseki te.Kasi Yawe alobaki :— Ezali ya solo, oseki. 16 Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela. 17 Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ? 18 Solo, Abrayami akokoma ekolo monene mpe ya nguya, mpe bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na ye. 19 Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. » 20 Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza. 21 Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. » 22 Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe. 23 Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki :— Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ? 24 Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ? 25 Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ? 26 Yawe azongisaki :— Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango. 27 Abrayami alobaki lisusu :— Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai. 28 Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano ? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi ?Yawe azongisaki :— Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te. 29 Abrayami alobaki na Ye lisusu :— Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei ?Azongisaki :— Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te. 30 Bongo Abrayami alobaki :— Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ?Azongisaki :— Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te. 31 Abrayami alobaki :—Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ?Azongisaki :— Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te. 32 Bongo Abrayami alobaki :— Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ?Azongisaki :— Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te. 33 Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki ; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye.

In Other Versions

Genesis 18 in the ANGEFD

Genesis 18 in the ANTPNG2D

Genesis 18 in the AS21

Genesis 18 in the BAGH

Genesis 18 in the BBPNG

Genesis 18 in the BBT1E

Genesis 18 in the BDS

Genesis 18 in the BEV

Genesis 18 in the BHAD

Genesis 18 in the BIB

Genesis 18 in the BLPT

Genesis 18 in the BNT

Genesis 18 in the BNTABOOT

Genesis 18 in the BNTLV

Genesis 18 in the BOATCB

Genesis 18 in the BOATCB2

Genesis 18 in the BOBCV

Genesis 18 in the BOCNT

Genesis 18 in the BOECS

Genesis 18 in the BOGWICC

Genesis 18 in the BOHCB

Genesis 18 in the BOHCV

Genesis 18 in the BOHLNT

Genesis 18 in the BOHNTLTAL

Genesis 18 in the BOICB

Genesis 18 in the BOILNTAP

Genesis 18 in the BOITCV

Genesis 18 in the BOKCV

Genesis 18 in the BOKCV2

Genesis 18 in the BOKHWOG

Genesis 18 in the BOKSSV

Genesis 18 in the BOLCB

Genesis 18 in the BOMCV

Genesis 18 in the BONAV

Genesis 18 in the BONCB

Genesis 18 in the BONLT

Genesis 18 in the BONUT2

Genesis 18 in the BOPLNT

Genesis 18 in the BOSCB

Genesis 18 in the BOSNC

Genesis 18 in the BOTLNT

Genesis 18 in the BOVCB

Genesis 18 in the BOYCB

Genesis 18 in the BPBB

Genesis 18 in the BPH

Genesis 18 in the BSB

Genesis 18 in the CCB

Genesis 18 in the CUV

Genesis 18 in the CUVS

Genesis 18 in the DBT

Genesis 18 in the DGDNT

Genesis 18 in the DHNT

Genesis 18 in the DNT

Genesis 18 in the ELBE

Genesis 18 in the EMTV

Genesis 18 in the ESV

Genesis 18 in the FBV

Genesis 18 in the FEB

Genesis 18 in the GGMNT

Genesis 18 in the GNT

Genesis 18 in the HARY

Genesis 18 in the HNT

Genesis 18 in the IRVA

Genesis 18 in the IRVB

Genesis 18 in the IRVG

Genesis 18 in the IRVH

Genesis 18 in the IRVK

Genesis 18 in the IRVM

Genesis 18 in the IRVM2

Genesis 18 in the IRVO

Genesis 18 in the IRVP

Genesis 18 in the IRVT

Genesis 18 in the IRVT2

Genesis 18 in the IRVU

Genesis 18 in the ISVN

Genesis 18 in the JSNT

Genesis 18 in the KAPI

Genesis 18 in the KBT1ETNIK

Genesis 18 in the KBV

Genesis 18 in the KJV

Genesis 18 in the KNFD

Genesis 18 in the LBA

Genesis 18 in the LBLA

Genesis 18 in the LNT

Genesis 18 in the LSV

Genesis 18 in the MAAL

Genesis 18 in the MBV

Genesis 18 in the MBV2

Genesis 18 in the MHNT

Genesis 18 in the MKNFD

Genesis 18 in the MNG

Genesis 18 in the MNT

Genesis 18 in the MNT2

Genesis 18 in the MRS1T

Genesis 18 in the NAA

Genesis 18 in the NASB

Genesis 18 in the NBLA

Genesis 18 in the NBS

Genesis 18 in the NBVTP

Genesis 18 in the NET2

Genesis 18 in the NIV11

Genesis 18 in the NNT

Genesis 18 in the NNT2

Genesis 18 in the NNT3

Genesis 18 in the PDDPT

Genesis 18 in the PFNT

Genesis 18 in the RMNT

Genesis 18 in the SBIAS

Genesis 18 in the SBIBS

Genesis 18 in the SBIBS2

Genesis 18 in the SBICS

Genesis 18 in the SBIDS

Genesis 18 in the SBIGS

Genesis 18 in the SBIHS

Genesis 18 in the SBIIS

Genesis 18 in the SBIIS2

Genesis 18 in the SBIIS3

Genesis 18 in the SBIKS

Genesis 18 in the SBIKS2

Genesis 18 in the SBIMS

Genesis 18 in the SBIOS

Genesis 18 in the SBIPS

Genesis 18 in the SBISS

Genesis 18 in the SBITS

Genesis 18 in the SBITS2

Genesis 18 in the SBITS3

Genesis 18 in the SBITS4

Genesis 18 in the SBIUS

Genesis 18 in the SBIVS

Genesis 18 in the SBT

Genesis 18 in the SBT1E

Genesis 18 in the SCHL

Genesis 18 in the SNT

Genesis 18 in the SUSU

Genesis 18 in the SUSU2

Genesis 18 in the SYNO

Genesis 18 in the TBIAOTANT

Genesis 18 in the TBT1E

Genesis 18 in the TBT1E2

Genesis 18 in the TFTIP

Genesis 18 in the TFTU

Genesis 18 in the TGNTATF3T

Genesis 18 in the THAI

Genesis 18 in the TNFD

Genesis 18 in the TNT

Genesis 18 in the TNTIK

Genesis 18 in the TNTIL

Genesis 18 in the TNTIN

Genesis 18 in the TNTIP

Genesis 18 in the TNTIZ

Genesis 18 in the TOMA

Genesis 18 in the TTENT

Genesis 18 in the UBG

Genesis 18 in the UGV

Genesis 18 in the UGV2

Genesis 18 in the UGV3

Genesis 18 in the VBL

Genesis 18 in the VDCC

Genesis 18 in the YALU

Genesis 18 in the YAPE

Genesis 18 in the YBVTP

Genesis 18 in the ZBP