Genesis 21 (BOLCB2)

1 Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye. 2 Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye. 3 Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. » 4 Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye. 5 Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki. 6 Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. » 7 Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. » 8 Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene. 9 Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ; 10 ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. » 11 Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye. 12 Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. 13 Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. » 14 Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba. 15 Tango mayi oyo ezalaki na mbeki esilaki, Agari asundolaki mwana na se ya nzete moko ya moke. 16 Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. 17 Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye. 18 Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. » 19 Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana. 20 Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo. 21 Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito. 22 Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami :— Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala. 23 Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo. 24 Abrayami azongisaki :— Nalapi ndayi ! 25 Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi. 26 Abimeleki azongisaki :— Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo. 27 Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki ; bongo bango mibale basalaki boyokani. 28 Abrayami atiaki pembeni bana meme sambo oyo azwaki kati na etonga. 29 Abimeleki atunaki Abrayami :— Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini ? 30 Azongisaki :— Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango. 31 Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi. 32 Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia. 33 Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko. 34 Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia.

In Other Versions

Genesis 21 in the ANGEFD

Genesis 21 in the ANTPNG2D

Genesis 21 in the AS21

Genesis 21 in the BAGH

Genesis 21 in the BBPNG

Genesis 21 in the BBT1E

Genesis 21 in the BDS

Genesis 21 in the BEV

Genesis 21 in the BHAD

Genesis 21 in the BIB

Genesis 21 in the BLPT

Genesis 21 in the BNT

Genesis 21 in the BNTABOOT

Genesis 21 in the BNTLV

Genesis 21 in the BOATCB

Genesis 21 in the BOATCB2

Genesis 21 in the BOBCV

Genesis 21 in the BOCNT

Genesis 21 in the BOECS

Genesis 21 in the BOGWICC

Genesis 21 in the BOHCB

Genesis 21 in the BOHCV

Genesis 21 in the BOHLNT

Genesis 21 in the BOHNTLTAL

Genesis 21 in the BOICB

Genesis 21 in the BOILNTAP

Genesis 21 in the BOITCV

Genesis 21 in the BOKCV

Genesis 21 in the BOKCV2

Genesis 21 in the BOKHWOG

Genesis 21 in the BOKSSV

Genesis 21 in the BOLCB

Genesis 21 in the BOMCV

Genesis 21 in the BONAV

Genesis 21 in the BONCB

Genesis 21 in the BONLT

Genesis 21 in the BONUT2

Genesis 21 in the BOPLNT

Genesis 21 in the BOSCB

Genesis 21 in the BOSNC

Genesis 21 in the BOTLNT

Genesis 21 in the BOVCB

Genesis 21 in the BOYCB

Genesis 21 in the BPBB

Genesis 21 in the BPH

Genesis 21 in the BSB

Genesis 21 in the CCB

Genesis 21 in the CUV

Genesis 21 in the CUVS

Genesis 21 in the DBT

Genesis 21 in the DGDNT

Genesis 21 in the DHNT

Genesis 21 in the DNT

Genesis 21 in the ELBE

Genesis 21 in the EMTV

Genesis 21 in the ESV

Genesis 21 in the FBV

Genesis 21 in the FEB

Genesis 21 in the GGMNT

Genesis 21 in the GNT

Genesis 21 in the HARY

Genesis 21 in the HNT

Genesis 21 in the IRVA

Genesis 21 in the IRVB

Genesis 21 in the IRVG

Genesis 21 in the IRVH

Genesis 21 in the IRVK

Genesis 21 in the IRVM

Genesis 21 in the IRVM2

Genesis 21 in the IRVO

Genesis 21 in the IRVP

Genesis 21 in the IRVT

Genesis 21 in the IRVT2

Genesis 21 in the IRVU

Genesis 21 in the ISVN

Genesis 21 in the JSNT

Genesis 21 in the KAPI

Genesis 21 in the KBT1ETNIK

Genesis 21 in the KBV

Genesis 21 in the KJV

Genesis 21 in the KNFD

Genesis 21 in the LBA

Genesis 21 in the LBLA

Genesis 21 in the LNT

Genesis 21 in the LSV

Genesis 21 in the MAAL

Genesis 21 in the MBV

Genesis 21 in the MBV2

Genesis 21 in the MHNT

Genesis 21 in the MKNFD

Genesis 21 in the MNG

Genesis 21 in the MNT

Genesis 21 in the MNT2

Genesis 21 in the MRS1T

Genesis 21 in the NAA

Genesis 21 in the NASB

Genesis 21 in the NBLA

Genesis 21 in the NBS

Genesis 21 in the NBVTP

Genesis 21 in the NET2

Genesis 21 in the NIV11

Genesis 21 in the NNT

Genesis 21 in the NNT2

Genesis 21 in the NNT3

Genesis 21 in the PDDPT

Genesis 21 in the PFNT

Genesis 21 in the RMNT

Genesis 21 in the SBIAS

Genesis 21 in the SBIBS

Genesis 21 in the SBIBS2

Genesis 21 in the SBICS

Genesis 21 in the SBIDS

Genesis 21 in the SBIGS

Genesis 21 in the SBIHS

Genesis 21 in the SBIIS

Genesis 21 in the SBIIS2

Genesis 21 in the SBIIS3

Genesis 21 in the SBIKS

Genesis 21 in the SBIKS2

Genesis 21 in the SBIMS

Genesis 21 in the SBIOS

Genesis 21 in the SBIPS

Genesis 21 in the SBISS

Genesis 21 in the SBITS

Genesis 21 in the SBITS2

Genesis 21 in the SBITS3

Genesis 21 in the SBITS4

Genesis 21 in the SBIUS

Genesis 21 in the SBIVS

Genesis 21 in the SBT

Genesis 21 in the SBT1E

Genesis 21 in the SCHL

Genesis 21 in the SNT

Genesis 21 in the SUSU

Genesis 21 in the SUSU2

Genesis 21 in the SYNO

Genesis 21 in the TBIAOTANT

Genesis 21 in the TBT1E

Genesis 21 in the TBT1E2

Genesis 21 in the TFTIP

Genesis 21 in the TFTU

Genesis 21 in the TGNTATF3T

Genesis 21 in the THAI

Genesis 21 in the TNFD

Genesis 21 in the TNT

Genesis 21 in the TNTIK

Genesis 21 in the TNTIL

Genesis 21 in the TNTIN

Genesis 21 in the TNTIP

Genesis 21 in the TNTIZ

Genesis 21 in the TOMA

Genesis 21 in the TTENT

Genesis 21 in the UBG

Genesis 21 in the UGV

Genesis 21 in the UGV2

Genesis 21 in the UGV3

Genesis 21 in the VBL

Genesis 21 in the VDCC

Genesis 21 in the YALU

Genesis 21 in the YAPE

Genesis 21 in the YBVTP

Genesis 21 in the ZBP