Genesis 36 (BOLCB2)

1 Tala libota ya Ezawu oyo azali Edomi. 2 Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ; 3 mpe Basimati, mwana mwasi ya Isimaeli mpe ndeko mwasi ya Nebayoti. 4 Ada abotelaki Ezawu Elifazi ; mpe Basimati abotelaki ye Reweli. 5 Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana. 6 Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi. 7 Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango. 8 Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri. 9 Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri : 10 Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu :Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu~; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu. 11 Bana mibali ya Elifazi :Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi. 12 Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki.Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu. 13 Bana mibali ya Reweli :Naati, Zera, Shama mpe Miza.Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. 14 Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu :Yewushi, Yaelami mpe Kora. 15 Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu :Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu~:mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi, 16 mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Ada. 17 Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu :mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi~; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. 18 Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu :mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu. 19 Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi. 20 Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango :Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, 21 Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi. 22 Bana mibali ya Lotani :Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani. 23 Bana mibali ya Shobali :Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami. 24 Bana mibali ya Tsibeoni :Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye. 25 Bana ya Ana :Dishoni, mwana na ye ya mobali~; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi. 26 Bana mibali ya Dishoni :Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani. 27 Tala bana mibali ya Etseri :Bilani, Zavani mpe Akani. 28 Bana mibali ya Dishani :Utsi mpe Arani. 29 Tala bakonzi ya mabota ya Ori :mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana, 30 mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani.Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri. 31 Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi : 32 Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. » 33 Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi. 34 Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi. 35 Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti. 36 Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi. 37 Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi. 38 Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi. 39 Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi. 40 Tala bato oyo bazalaki bakonzi ya mabota ya Ezawu kolanda mabota ya botata, bisika oyo bazalaki kovanda mpe bakombo na bango :Timina, Aliva, Yeteti, 41 Olibama, Ela, Pinoni, 42 Kenazi, Temani, Mibitsari, 43 Magidieli mpe Irami.Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda. Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi.

In Other Versions

Genesis 36 in the ANGEFD

Genesis 36 in the ANTPNG2D

Genesis 36 in the AS21

Genesis 36 in the BAGH

Genesis 36 in the BBPNG

Genesis 36 in the BBT1E

Genesis 36 in the BDS

Genesis 36 in the BEV

Genesis 36 in the BHAD

Genesis 36 in the BIB

Genesis 36 in the BLPT

Genesis 36 in the BNT

Genesis 36 in the BNTABOOT

Genesis 36 in the BNTLV

Genesis 36 in the BOATCB

Genesis 36 in the BOATCB2

Genesis 36 in the BOBCV

Genesis 36 in the BOCNT

Genesis 36 in the BOECS

Genesis 36 in the BOGWICC

Genesis 36 in the BOHCB

Genesis 36 in the BOHCV

Genesis 36 in the BOHLNT

Genesis 36 in the BOHNTLTAL

Genesis 36 in the BOICB

Genesis 36 in the BOILNTAP

Genesis 36 in the BOITCV

Genesis 36 in the BOKCV

Genesis 36 in the BOKCV2

Genesis 36 in the BOKHWOG

Genesis 36 in the BOKSSV

Genesis 36 in the BOLCB

Genesis 36 in the BOMCV

Genesis 36 in the BONAV

Genesis 36 in the BONCB

Genesis 36 in the BONLT

Genesis 36 in the BONUT2

Genesis 36 in the BOPLNT

Genesis 36 in the BOSCB

Genesis 36 in the BOSNC

Genesis 36 in the BOTLNT

Genesis 36 in the BOVCB

Genesis 36 in the BOYCB

Genesis 36 in the BPBB

Genesis 36 in the BPH

Genesis 36 in the BSB

Genesis 36 in the CCB

Genesis 36 in the CUV

Genesis 36 in the CUVS

Genesis 36 in the DBT

Genesis 36 in the DGDNT

Genesis 36 in the DHNT

Genesis 36 in the DNT

Genesis 36 in the ELBE

Genesis 36 in the EMTV

Genesis 36 in the ESV

Genesis 36 in the FBV

Genesis 36 in the FEB

Genesis 36 in the GGMNT

Genesis 36 in the GNT

Genesis 36 in the HARY

Genesis 36 in the HNT

Genesis 36 in the IRVA

Genesis 36 in the IRVB

Genesis 36 in the IRVG

Genesis 36 in the IRVH

Genesis 36 in the IRVK

Genesis 36 in the IRVM

Genesis 36 in the IRVM2

Genesis 36 in the IRVO

Genesis 36 in the IRVP

Genesis 36 in the IRVT

Genesis 36 in the IRVT2

Genesis 36 in the IRVU

Genesis 36 in the ISVN

Genesis 36 in the JSNT

Genesis 36 in the KAPI

Genesis 36 in the KBT1ETNIK

Genesis 36 in the KBV

Genesis 36 in the KJV

Genesis 36 in the KNFD

Genesis 36 in the LBA

Genesis 36 in the LBLA

Genesis 36 in the LNT

Genesis 36 in the LSV

Genesis 36 in the MAAL

Genesis 36 in the MBV

Genesis 36 in the MBV2

Genesis 36 in the MHNT

Genesis 36 in the MKNFD

Genesis 36 in the MNG

Genesis 36 in the MNT

Genesis 36 in the MNT2

Genesis 36 in the MRS1T

Genesis 36 in the NAA

Genesis 36 in the NASB

Genesis 36 in the NBLA

Genesis 36 in the NBS

Genesis 36 in the NBVTP

Genesis 36 in the NET2

Genesis 36 in the NIV11

Genesis 36 in the NNT

Genesis 36 in the NNT2

Genesis 36 in the NNT3

Genesis 36 in the PDDPT

Genesis 36 in the PFNT

Genesis 36 in the RMNT

Genesis 36 in the SBIAS

Genesis 36 in the SBIBS

Genesis 36 in the SBIBS2

Genesis 36 in the SBICS

Genesis 36 in the SBIDS

Genesis 36 in the SBIGS

Genesis 36 in the SBIHS

Genesis 36 in the SBIIS

Genesis 36 in the SBIIS2

Genesis 36 in the SBIIS3

Genesis 36 in the SBIKS

Genesis 36 in the SBIKS2

Genesis 36 in the SBIMS

Genesis 36 in the SBIOS

Genesis 36 in the SBIPS

Genesis 36 in the SBISS

Genesis 36 in the SBITS

Genesis 36 in the SBITS2

Genesis 36 in the SBITS3

Genesis 36 in the SBITS4

Genesis 36 in the SBIUS

Genesis 36 in the SBIVS

Genesis 36 in the SBT

Genesis 36 in the SBT1E

Genesis 36 in the SCHL

Genesis 36 in the SNT

Genesis 36 in the SUSU

Genesis 36 in the SUSU2

Genesis 36 in the SYNO

Genesis 36 in the TBIAOTANT

Genesis 36 in the TBT1E

Genesis 36 in the TBT1E2

Genesis 36 in the TFTIP

Genesis 36 in the TFTU

Genesis 36 in the TGNTATF3T

Genesis 36 in the THAI

Genesis 36 in the TNFD

Genesis 36 in the TNT

Genesis 36 in the TNTIK

Genesis 36 in the TNTIL

Genesis 36 in the TNTIN

Genesis 36 in the TNTIP

Genesis 36 in the TNTIZ

Genesis 36 in the TOMA

Genesis 36 in the TTENT

Genesis 36 in the UBG

Genesis 36 in the UGV

Genesis 36 in the UGV2

Genesis 36 in the UGV3

Genesis 36 in the VBL

Genesis 36 in the VDCC

Genesis 36 in the YALU

Genesis 36 in the YAPE

Genesis 36 in the YBVTP

Genesis 36 in the ZBP