Haggai 2 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na moko ya sanza ya sambo : 2 « Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali : 3 ‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ? 4 Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 5 ‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. › 6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele ; 7 nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 8 ‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. 9 ‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. » 10 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa : 11 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko : 12 — Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule ? › »Banganga-Nzambe bazongisaki :— Te, ekokoma bule te ! 13 Mosakoli Aje alobaki :— Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ?Banganga-Nzambe bazongisaki :— Iyo, ekokoma mbindo. 14 Mosakoli Aje alobaki lisusu : « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo. 15 Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe. 16 Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale. 17 Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe. 18 « Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka. 19 Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma.Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. » 20 Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa : 21 « Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele, 22 nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga. 23 Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

In Other Versions

Haggai 2 in the ANGEFD

Haggai 2 in the ANTPNG2D

Haggai 2 in the AS21

Haggai 2 in the BAGH

Haggai 2 in the BBPNG

Haggai 2 in the BBT1E

Haggai 2 in the BDS

Haggai 2 in the BEV

Haggai 2 in the BHAD

Haggai 2 in the BIB

Haggai 2 in the BLPT

Haggai 2 in the BNT

Haggai 2 in the BNTABOOT

Haggai 2 in the BNTLV

Haggai 2 in the BOATCB

Haggai 2 in the BOATCB2

Haggai 2 in the BOBCV

Haggai 2 in the BOCNT

Haggai 2 in the BOECS

Haggai 2 in the BOGWICC

Haggai 2 in the BOHCB

Haggai 2 in the BOHCV

Haggai 2 in the BOHLNT

Haggai 2 in the BOHNTLTAL

Haggai 2 in the BOICB

Haggai 2 in the BOILNTAP

Haggai 2 in the BOITCV

Haggai 2 in the BOKCV

Haggai 2 in the BOKCV2

Haggai 2 in the BOKHWOG

Haggai 2 in the BOKSSV

Haggai 2 in the BOLCB

Haggai 2 in the BOMCV

Haggai 2 in the BONAV

Haggai 2 in the BONCB

Haggai 2 in the BONLT

Haggai 2 in the BONUT2

Haggai 2 in the BOPLNT

Haggai 2 in the BOSCB

Haggai 2 in the BOSNC

Haggai 2 in the BOTLNT

Haggai 2 in the BOVCB

Haggai 2 in the BOYCB

Haggai 2 in the BPBB

Haggai 2 in the BPH

Haggai 2 in the BSB

Haggai 2 in the CCB

Haggai 2 in the CUV

Haggai 2 in the CUVS

Haggai 2 in the DBT

Haggai 2 in the DGDNT

Haggai 2 in the DHNT

Haggai 2 in the DNT

Haggai 2 in the ELBE

Haggai 2 in the EMTV

Haggai 2 in the ESV

Haggai 2 in the FBV

Haggai 2 in the FEB

Haggai 2 in the GGMNT

Haggai 2 in the GNT

Haggai 2 in the HARY

Haggai 2 in the HNT

Haggai 2 in the IRVA

Haggai 2 in the IRVB

Haggai 2 in the IRVG

Haggai 2 in the IRVH

Haggai 2 in the IRVK

Haggai 2 in the IRVM

Haggai 2 in the IRVM2

Haggai 2 in the IRVO

Haggai 2 in the IRVP

Haggai 2 in the IRVT

Haggai 2 in the IRVT2

Haggai 2 in the IRVU

Haggai 2 in the ISVN

Haggai 2 in the JSNT

Haggai 2 in the KAPI

Haggai 2 in the KBT1ETNIK

Haggai 2 in the KBV

Haggai 2 in the KJV

Haggai 2 in the KNFD

Haggai 2 in the LBA

Haggai 2 in the LBLA

Haggai 2 in the LNT

Haggai 2 in the LSV

Haggai 2 in the MAAL

Haggai 2 in the MBV

Haggai 2 in the MBV2

Haggai 2 in the MHNT

Haggai 2 in the MKNFD

Haggai 2 in the MNG

Haggai 2 in the MNT

Haggai 2 in the MNT2

Haggai 2 in the MRS1T

Haggai 2 in the NAA

Haggai 2 in the NASB

Haggai 2 in the NBLA

Haggai 2 in the NBS

Haggai 2 in the NBVTP

Haggai 2 in the NET2

Haggai 2 in the NIV11

Haggai 2 in the NNT

Haggai 2 in the NNT2

Haggai 2 in the NNT3

Haggai 2 in the PDDPT

Haggai 2 in the PFNT

Haggai 2 in the RMNT

Haggai 2 in the SBIAS

Haggai 2 in the SBIBS

Haggai 2 in the SBIBS2

Haggai 2 in the SBICS

Haggai 2 in the SBIDS

Haggai 2 in the SBIGS

Haggai 2 in the SBIHS

Haggai 2 in the SBIIS

Haggai 2 in the SBIIS2

Haggai 2 in the SBIIS3

Haggai 2 in the SBIKS

Haggai 2 in the SBIKS2

Haggai 2 in the SBIMS

Haggai 2 in the SBIOS

Haggai 2 in the SBIPS

Haggai 2 in the SBISS

Haggai 2 in the SBITS

Haggai 2 in the SBITS2

Haggai 2 in the SBITS3

Haggai 2 in the SBITS4

Haggai 2 in the SBIUS

Haggai 2 in the SBIVS

Haggai 2 in the SBT

Haggai 2 in the SBT1E

Haggai 2 in the SCHL

Haggai 2 in the SNT

Haggai 2 in the SUSU

Haggai 2 in the SUSU2

Haggai 2 in the SYNO

Haggai 2 in the TBIAOTANT

Haggai 2 in the TBT1E

Haggai 2 in the TBT1E2

Haggai 2 in the TFTIP

Haggai 2 in the TFTU

Haggai 2 in the TGNTATF3T

Haggai 2 in the THAI

Haggai 2 in the TNFD

Haggai 2 in the TNT

Haggai 2 in the TNTIK

Haggai 2 in the TNTIL

Haggai 2 in the TNTIN

Haggai 2 in the TNTIP

Haggai 2 in the TNTIZ

Haggai 2 in the TOMA

Haggai 2 in the TTENT

Haggai 2 in the UBG

Haggai 2 in the UGV

Haggai 2 in the UGV2

Haggai 2 in the UGV3

Haggai 2 in the VBL

Haggai 2 in the VDCC

Haggai 2 in the YALU

Haggai 2 in the YAPE

Haggai 2 in the YBVTP

Haggai 2 in the ZBP