Isaiah 41 (BOLCB2)

1 « Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai !Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango,tika ete bapusana mpe baloba :‹ Tokende elongo mpo na kosamba ! › 2 Nani abimisaki wuta na estemoto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango,oyo elonga elandaka matambe na Ye ?Nani akabaki bikolo na maboko na Yempe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ?Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu,mpe tolotolo na Ye ekomisaki bangolokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka. 3 Azali kolanda bango mpe koleka na kimiana nzela oyo matambe na Ye eleka nanu te. 4 Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo ?Nani abengaka bileko wuta na ebandeli ?Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso,mpe nakozala mpe kaka ndenge mokoelongo na bato ya suka. » 5 Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga,basuka ya mabele ezali kolenga.Bazali kopusana, bazali koya pene ; 6 moto na moto azali kosunga moninga na yempe koloba na ndeko na ye : « Sala makasi ! » 7 Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto,mosemboli bibende na marto azali kopesa makasina mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka ;alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende : « Ezali malamu ; »mpe alendisi nzambe ya ekeko na basetempo ete eningana te. 8 « Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai,Jakobi oyo naponaki,bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai, 9 yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele,oyo nabengaki wuta na basuka na yango,yo oyo epai ya nani nalobaki : ‹ Ozali mosali na Ngai, ›naponaki yo mpe nabwakaki yo te. 10 Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,loboko oyo elongisaka. 11 Bato nyonso oyo bazali kotombokela yobakokufa solo soni mpe bakosambwa ;bato oyo bazali kotelemela yo bakokomalokola biloko pamba mpe bakokufa. 12 Ata oluki bayini na yo,okomona bango te ;bato oyo bazali kobundisa yobakokoma biloko pamba. 13 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo,nasimbi makasi loboko na yo ya mobalimpe nazali koloba na yo :‹ Kobanga te, nakosunga yo. › 14 Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te,Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te,pamba te Ngai moko nakosunga yo, »elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele. 15 « Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble,oyo batia minu bapelisa makasi,lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi ;okopanza bangomba milayi,okokomisa yango putulu ;okokomisa bangomba ya mikuselokola matiti ya kokawuka, 16 okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango,mopepe makasi ekopanza yango.Kasi yo, okosepela kati na Yawe,okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele. 17 Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi,kasi na pamba : mayi ezali te ;balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi.Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ;Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te. 18 Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba,mpe bitima na kati-kati ya mabwaku ;nakobongola esobe liziba ya mayi,mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi ; 19 nakolona kati na esobe : banzete ya sedele,ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ;nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwiesika moko kati na mabele ya kokawuka, 20 mpo ete bato bamona mpe bayeba,batala mpe basosola elongoete loboko na Yawe nde esali makambo wana,ete Mosantu ya Isalaele nde akeli yango. » 21 « Botalisa likambo na bino, »elobi Yawe,« boluka komilongisa, »elobi Mokonzi ya Jakobi. 22 « Boya na banzambe na bino ya bikekompo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya.Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini,mpo ete toyekola yango malamumpe toyeba ndenge nini esukelaki.To boyebisa biso makambo oyo ekoya ; 23 boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima,mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe ;bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe,mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga. 24 Tala, bozali kaka pamba,mpe misala na bino ezali bobele se pamba ;moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele. 25 Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya,moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai.Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto,lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki. 26 Nani alobaki yango wuta na ebandelimpo ete biso tokoka koyeba,to wuta kala penza mpo ete tokoka koloba : ‹ Ezali sembo ? ›Te, moto moko te alobaki yango,moko te asalaki ete likambo yango eyokana,moko te ayokaki maloba na bino. 27 Nazalaki Moto ya liboso ya koloba na Siona :‹ Tala, tala bango oyo ! ›Mpe na Yelusalemi : ‹ Napesi momemi Sango Malamu ! › 28 Natalaki, kasi moto moko te azalaki,moko te kati na bango mpo na kopesa toli,moko te mpo na kopesa eyanosoki natuni bango motuna. 29 Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta !Misala na bango ezali se pamba,bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. »

In Other Versions

Isaiah 41 in the ANGEFD

Isaiah 41 in the ANTPNG2D

Isaiah 41 in the AS21

Isaiah 41 in the BAGH

Isaiah 41 in the BBPNG

Isaiah 41 in the BBT1E

Isaiah 41 in the BDS

Isaiah 41 in the BEV

Isaiah 41 in the BHAD

Isaiah 41 in the BIB

Isaiah 41 in the BLPT

Isaiah 41 in the BNT

Isaiah 41 in the BNTABOOT

Isaiah 41 in the BNTLV

Isaiah 41 in the BOATCB

Isaiah 41 in the BOATCB2

Isaiah 41 in the BOBCV

Isaiah 41 in the BOCNT

Isaiah 41 in the BOECS

Isaiah 41 in the BOGWICC

Isaiah 41 in the BOHCB

Isaiah 41 in the BOHCV

Isaiah 41 in the BOHLNT

Isaiah 41 in the BOHNTLTAL

Isaiah 41 in the BOICB

Isaiah 41 in the BOILNTAP

Isaiah 41 in the BOITCV

Isaiah 41 in the BOKCV

Isaiah 41 in the BOKCV2

Isaiah 41 in the BOKHWOG

Isaiah 41 in the BOKSSV

Isaiah 41 in the BOLCB

Isaiah 41 in the BOMCV

Isaiah 41 in the BONAV

Isaiah 41 in the BONCB

Isaiah 41 in the BONLT

Isaiah 41 in the BONUT2

Isaiah 41 in the BOPLNT

Isaiah 41 in the BOSCB

Isaiah 41 in the BOSNC

Isaiah 41 in the BOTLNT

Isaiah 41 in the BOVCB

Isaiah 41 in the BOYCB

Isaiah 41 in the BPBB

Isaiah 41 in the BPH

Isaiah 41 in the BSB

Isaiah 41 in the CCB

Isaiah 41 in the CUV

Isaiah 41 in the CUVS

Isaiah 41 in the DBT

Isaiah 41 in the DGDNT

Isaiah 41 in the DHNT

Isaiah 41 in the DNT

Isaiah 41 in the ELBE

Isaiah 41 in the EMTV

Isaiah 41 in the ESV

Isaiah 41 in the FBV

Isaiah 41 in the FEB

Isaiah 41 in the GGMNT

Isaiah 41 in the GNT

Isaiah 41 in the HARY

Isaiah 41 in the HNT

Isaiah 41 in the IRVA

Isaiah 41 in the IRVB

Isaiah 41 in the IRVG

Isaiah 41 in the IRVH

Isaiah 41 in the IRVK

Isaiah 41 in the IRVM

Isaiah 41 in the IRVM2

Isaiah 41 in the IRVO

Isaiah 41 in the IRVP

Isaiah 41 in the IRVT

Isaiah 41 in the IRVT2

Isaiah 41 in the IRVU

Isaiah 41 in the ISVN

Isaiah 41 in the JSNT

Isaiah 41 in the KAPI

Isaiah 41 in the KBT1ETNIK

Isaiah 41 in the KBV

Isaiah 41 in the KJV

Isaiah 41 in the KNFD

Isaiah 41 in the LBA

Isaiah 41 in the LBLA

Isaiah 41 in the LNT

Isaiah 41 in the LSV

Isaiah 41 in the MAAL

Isaiah 41 in the MBV

Isaiah 41 in the MBV2

Isaiah 41 in the MHNT

Isaiah 41 in the MKNFD

Isaiah 41 in the MNG

Isaiah 41 in the MNT

Isaiah 41 in the MNT2

Isaiah 41 in the MRS1T

Isaiah 41 in the NAA

Isaiah 41 in the NASB

Isaiah 41 in the NBLA

Isaiah 41 in the NBS

Isaiah 41 in the NBVTP

Isaiah 41 in the NET2

Isaiah 41 in the NIV11

Isaiah 41 in the NNT

Isaiah 41 in the NNT2

Isaiah 41 in the NNT3

Isaiah 41 in the PDDPT

Isaiah 41 in the PFNT

Isaiah 41 in the RMNT

Isaiah 41 in the SBIAS

Isaiah 41 in the SBIBS

Isaiah 41 in the SBIBS2

Isaiah 41 in the SBICS

Isaiah 41 in the SBIDS

Isaiah 41 in the SBIGS

Isaiah 41 in the SBIHS

Isaiah 41 in the SBIIS

Isaiah 41 in the SBIIS2

Isaiah 41 in the SBIIS3

Isaiah 41 in the SBIKS

Isaiah 41 in the SBIKS2

Isaiah 41 in the SBIMS

Isaiah 41 in the SBIOS

Isaiah 41 in the SBIPS

Isaiah 41 in the SBISS

Isaiah 41 in the SBITS

Isaiah 41 in the SBITS2

Isaiah 41 in the SBITS3

Isaiah 41 in the SBITS4

Isaiah 41 in the SBIUS

Isaiah 41 in the SBIVS

Isaiah 41 in the SBT

Isaiah 41 in the SBT1E

Isaiah 41 in the SCHL

Isaiah 41 in the SNT

Isaiah 41 in the SUSU

Isaiah 41 in the SUSU2

Isaiah 41 in the SYNO

Isaiah 41 in the TBIAOTANT

Isaiah 41 in the TBT1E

Isaiah 41 in the TBT1E2

Isaiah 41 in the TFTIP

Isaiah 41 in the TFTU

Isaiah 41 in the TGNTATF3T

Isaiah 41 in the THAI

Isaiah 41 in the TNFD

Isaiah 41 in the TNT

Isaiah 41 in the TNTIK

Isaiah 41 in the TNTIL

Isaiah 41 in the TNTIN

Isaiah 41 in the TNTIP

Isaiah 41 in the TNTIZ

Isaiah 41 in the TOMA

Isaiah 41 in the TTENT

Isaiah 41 in the UBG

Isaiah 41 in the UGV

Isaiah 41 in the UGV2

Isaiah 41 in the UGV3

Isaiah 41 in the VBL

Isaiah 41 in the VDCC

Isaiah 41 in the YALU

Isaiah 41 in the YAPE

Isaiah 41 in the YBVTP

Isaiah 41 in the ZBP