James 4 (BOLCB2)

1 Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino ? 2 Bozali kolula biloko, kasi bozali kozwa yango te ; bokomi kino koboma bato. Botondi na zuwa, kasi bozali kolonga te kozwa oyo bozali koluka ; bokomi koswana mpe kobunda bitumba. Bozwaka te biloko oyo bozalaka na yango posa, pamba te bosengaka yango epai ya Nzambe te. 3 Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko. 4 Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe. 5 Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? » 6 Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. » 7 Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino. 8 Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino ! 9 Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa ! 10 Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino. 11 Bandeko na ngai, botonganaka te bino na bino. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye asambwisaka mibeko mpe abukaka yango. Nzokande, soki ozali kosambwisa mibeko, elakisi ete ozali kotosa yango te, kasi ozali nde mosambisi na yango. 12 Pamba te Ye oyo apesa mibeko azali kaka Ye moko Mosambisi, Ye nde azali na makoki ya kobikisa mpe ya kobebisa. Bongo yo, ozali nani mpo ete osambisa moninga na yo ? 13 Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka : « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. » 14 Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ? 15 Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. » 16 Kasi bino, bozali nde komikumisa na monene ya mabongisi na bino ! Boyeba malamu ete lolendo ya ndenge wana ezali mabe. 17 Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.

In Other Versions

James 4 in the ANGEFD

James 4 in the ANTPNG2D

James 4 in the AS21

James 4 in the BAGH

James 4 in the BBPNG

James 4 in the BBT1E

James 4 in the BDS

James 4 in the BEV

James 4 in the BHAD

James 4 in the BIB

James 4 in the BLPT

James 4 in the BNT

James 4 in the BNTABOOT

James 4 in the BNTLV

James 4 in the BOATCB

James 4 in the BOATCB2

James 4 in the BOBCV

James 4 in the BOCNT

James 4 in the BOECS

James 4 in the BOGWICC

James 4 in the BOHCB

James 4 in the BOHCV

James 4 in the BOHLNT

James 4 in the BOHNTLTAL

James 4 in the BOICB

James 4 in the BOILNTAP

James 4 in the BOITCV

James 4 in the BOKCV

James 4 in the BOKCV2

James 4 in the BOKHWOG

James 4 in the BOKSSV

James 4 in the BOLCB

James 4 in the BOMCV

James 4 in the BONAV

James 4 in the BONCB

James 4 in the BONLT

James 4 in the BONUT2

James 4 in the BOPLNT

James 4 in the BOSCB

James 4 in the BOSNC

James 4 in the BOTLNT

James 4 in the BOVCB

James 4 in the BOYCB

James 4 in the BPBB

James 4 in the BPH

James 4 in the BSB

James 4 in the CCB

James 4 in the CUV

James 4 in the CUVS

James 4 in the DBT

James 4 in the DGDNT

James 4 in the DHNT

James 4 in the DNT

James 4 in the ELBE

James 4 in the EMTV

James 4 in the ESV

James 4 in the FBV

James 4 in the FEB

James 4 in the GGMNT

James 4 in the GNT

James 4 in the HARY

James 4 in the HNT

James 4 in the IRVA

James 4 in the IRVB

James 4 in the IRVG

James 4 in the IRVH

James 4 in the IRVK

James 4 in the IRVM

James 4 in the IRVM2

James 4 in the IRVO

James 4 in the IRVP

James 4 in the IRVT

James 4 in the IRVT2

James 4 in the IRVU

James 4 in the ISVN

James 4 in the JSNT

James 4 in the KAPI

James 4 in the KBT1ETNIK

James 4 in the KBV

James 4 in the KJV

James 4 in the KNFD

James 4 in the LBA

James 4 in the LBLA

James 4 in the LNT

James 4 in the LSV

James 4 in the MAAL

James 4 in the MBV

James 4 in the MBV2

James 4 in the MHNT

James 4 in the MKNFD

James 4 in the MNG

James 4 in the MNT

James 4 in the MNT2

James 4 in the MRS1T

James 4 in the NAA

James 4 in the NASB

James 4 in the NBLA

James 4 in the NBS

James 4 in the NBVTP

James 4 in the NET2

James 4 in the NIV11

James 4 in the NNT

James 4 in the NNT2

James 4 in the NNT3

James 4 in the PDDPT

James 4 in the PFNT

James 4 in the RMNT

James 4 in the SBIAS

James 4 in the SBIBS

James 4 in the SBIBS2

James 4 in the SBICS

James 4 in the SBIDS

James 4 in the SBIGS

James 4 in the SBIHS

James 4 in the SBIIS

James 4 in the SBIIS2

James 4 in the SBIIS3

James 4 in the SBIKS

James 4 in the SBIKS2

James 4 in the SBIMS

James 4 in the SBIOS

James 4 in the SBIPS

James 4 in the SBISS

James 4 in the SBITS

James 4 in the SBITS2

James 4 in the SBITS3

James 4 in the SBITS4

James 4 in the SBIUS

James 4 in the SBIVS

James 4 in the SBT

James 4 in the SBT1E

James 4 in the SCHL

James 4 in the SNT

James 4 in the SUSU

James 4 in the SUSU2

James 4 in the SYNO

James 4 in the TBIAOTANT

James 4 in the TBT1E

James 4 in the TBT1E2

James 4 in the TFTIP

James 4 in the TFTU

James 4 in the TGNTATF3T

James 4 in the THAI

James 4 in the TNFD

James 4 in the TNT

James 4 in the TNTIK

James 4 in the TNTIL

James 4 in the TNTIN

James 4 in the TNTIP

James 4 in the TNTIZ

James 4 in the TOMA

James 4 in the TTENT

James 4 in the UBG

James 4 in the UGV

James 4 in the UGV2

James 4 in the UGV3

James 4 in the VBL

James 4 in the VDCC

James 4 in the YALU

James 4 in the YAPE

James 4 in the YBVTP

James 4 in the ZBP