James 5 (BOLCB2)

1 Boyoka sik’oyo, bino bazwi : Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino. 2 Bomengo na bino esili kopola, mpe mpese esili kolia bilamba na bino ; 3 wolo mpe palata na bino esili kobeba ; mpe libebi na yango ekotatola mabe na bino mpe ekolia banzoto na bino lokola moto. Bozali kobakisa se kobakisa bomengo ! Boyebi te ete tokomi na mikolo ya suka ? 4 Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga. 5 Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma. 6 Bozali kokatela bato ya sembo etumbu mpe koboma bango, nzokande batelemeli bino te. 7 Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma. 8 Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene. 9 Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke. 10 Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na pasi, bozwa ndakisa ya basakoli oyo basakolaki na Kombo ya Nkolo. 11 Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa. 12 Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo, » mpe « te » na bino etikala « te, » mpo ete bakatela bino etumbu te. 13 Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela ; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe ; 14 soki mpe mosusu kati na bino azali kobela, tika ete abenga bakambi ya Lingomba mpo ete babondela mpo na ye mpe bapakola ye mafuta na Kombo ya Nkolo, 15 pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye. 16 Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa. 17 Eliya azalaki moto lokola biso, abondelaki na molende nyonso mpo ete mvula enoka te, mpe mvula enokaki te na mabele mibu misato na basanza motoba ; 18 abondelaki lisusu, mpe Likolo epesaki lisusu mvula, mpe mabele ebotaki bambuma. 19 Bandeko na ngai, soki moko kati na bino apengwi mosika ya bosolo mpe moto mosusu azongisi ye kati na yango, 20 boyeba ete moto oyo azongisi mopengwi longwa na libunga abikisi ye na kufa mpe asali ete masumu ebele elimbisama.

In Other Versions

James 5 in the ANGEFD

James 5 in the ANTPNG2D

James 5 in the AS21

James 5 in the BAGH

James 5 in the BBPNG

James 5 in the BBT1E

James 5 in the BDS

James 5 in the BEV

James 5 in the BHAD

James 5 in the BIB

James 5 in the BLPT

James 5 in the BNT

James 5 in the BNTABOOT

James 5 in the BNTLV

James 5 in the BOATCB

James 5 in the BOATCB2

James 5 in the BOBCV

James 5 in the BOCNT

James 5 in the BOECS

James 5 in the BOGWICC

James 5 in the BOHCB

James 5 in the BOHCV

James 5 in the BOHLNT

James 5 in the BOHNTLTAL

James 5 in the BOICB

James 5 in the BOILNTAP

James 5 in the BOITCV

James 5 in the BOKCV

James 5 in the BOKCV2

James 5 in the BOKHWOG

James 5 in the BOKSSV

James 5 in the BOLCB

James 5 in the BOMCV

James 5 in the BONAV

James 5 in the BONCB

James 5 in the BONLT

James 5 in the BONUT2

James 5 in the BOPLNT

James 5 in the BOSCB

James 5 in the BOSNC

James 5 in the BOTLNT

James 5 in the BOVCB

James 5 in the BOYCB

James 5 in the BPBB

James 5 in the BPH

James 5 in the BSB

James 5 in the CCB

James 5 in the CUV

James 5 in the CUVS

James 5 in the DBT

James 5 in the DGDNT

James 5 in the DHNT

James 5 in the DNT

James 5 in the ELBE

James 5 in the EMTV

James 5 in the ESV

James 5 in the FBV

James 5 in the FEB

James 5 in the GGMNT

James 5 in the GNT

James 5 in the HARY

James 5 in the HNT

James 5 in the IRVA

James 5 in the IRVB

James 5 in the IRVG

James 5 in the IRVH

James 5 in the IRVK

James 5 in the IRVM

James 5 in the IRVM2

James 5 in the IRVO

James 5 in the IRVP

James 5 in the IRVT

James 5 in the IRVT2

James 5 in the IRVU

James 5 in the ISVN

James 5 in the JSNT

James 5 in the KAPI

James 5 in the KBT1ETNIK

James 5 in the KBV

James 5 in the KJV

James 5 in the KNFD

James 5 in the LBA

James 5 in the LBLA

James 5 in the LNT

James 5 in the LSV

James 5 in the MAAL

James 5 in the MBV

James 5 in the MBV2

James 5 in the MHNT

James 5 in the MKNFD

James 5 in the MNG

James 5 in the MNT

James 5 in the MNT2

James 5 in the MRS1T

James 5 in the NAA

James 5 in the NASB

James 5 in the NBLA

James 5 in the NBS

James 5 in the NBVTP

James 5 in the NET2

James 5 in the NIV11

James 5 in the NNT

James 5 in the NNT2

James 5 in the NNT3

James 5 in the PDDPT

James 5 in the PFNT

James 5 in the RMNT

James 5 in the SBIAS

James 5 in the SBIBS

James 5 in the SBIBS2

James 5 in the SBICS

James 5 in the SBIDS

James 5 in the SBIGS

James 5 in the SBIHS

James 5 in the SBIIS

James 5 in the SBIIS2

James 5 in the SBIIS3

James 5 in the SBIKS

James 5 in the SBIKS2

James 5 in the SBIMS

James 5 in the SBIOS

James 5 in the SBIPS

James 5 in the SBISS

James 5 in the SBITS

James 5 in the SBITS2

James 5 in the SBITS3

James 5 in the SBITS4

James 5 in the SBIUS

James 5 in the SBIVS

James 5 in the SBT

James 5 in the SBT1E

James 5 in the SCHL

James 5 in the SNT

James 5 in the SUSU

James 5 in the SUSU2

James 5 in the SYNO

James 5 in the TBIAOTANT

James 5 in the TBT1E

James 5 in the TBT1E2

James 5 in the TFTIP

James 5 in the TFTU

James 5 in the TGNTATF3T

James 5 in the THAI

James 5 in the TNFD

James 5 in the TNT

James 5 in the TNTIK

James 5 in the TNTIL

James 5 in the TNTIN

James 5 in the TNTIP

James 5 in the TNTIZ

James 5 in the TOMA

James 5 in the TTENT

James 5 in the UBG

James 5 in the UGV

James 5 in the UGV2

James 5 in the UGV3

James 5 in the VBL

James 5 in the VDCC

James 5 in the YALU

James 5 in the YAPE

James 5 in the YBVTP

James 5 in the ZBP