Judges 15 (BOLCB2)

1 Sima na mwa mikolo, na eleko oyo bakataka ble, Samison azwaki mwana ntaba mpe akendeki kotala mwasi na ye. Alobaki :— Nalingi kokota na shambre epai wapi mwasi na ngai alalaka.Kasi tata ya mwasi na ye apesaki ye nzela te. 2 Alobaki na Samison :— Nakanisaki penza ete olingaka ye te, yango wana nabalisaki ye epai ya moko kati na baninga na yo, oyo obengisaki na feti. Tala leki na ye ya mwasi, aleki ye na kitoko te ? Zwa ye kaka. 3 Samison alobaki na bango :— Ya mbala oyo, nakozala ata na ngambo moko te liboso ya bato ya mokili ya Filisitia ; nakeyi kosala bango mabe. 4 Samison abimaki mpe akangaki bambwa ya zamba nkama misato, akangisaki yango mibale-mibale na mikila mpe atiaki koni na kati-kati ya mikila mibale-mibale ya bambwa yango. 5 Apelisaki koni yango mpe atikaki bambwa ya zamba kati na bilanga ya ble ya bato ya Filisitia, oyo esili kokomela. Atumbaki maboke ya ble oyo batiaki na mipiku mpe ble oyo babukaki nanu te, banzete ya vino mpe banzete ya olive. 6 Bato ya Filisitia batunaki :— Nani asali boye ?Bazongiselaki bango :— Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina ; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti.Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki. 7 Samison alobaki na bango : « Lokola bosali boye, nakotika te kino nakozongisela bino mabe na mabe. » 8 Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami. 9 Bato ya Filisitia bayaki mpe batongaki molako na bango kati na etuka ya Yuda, bapanzanaki kino na etuka ya Leyi. 10 Bato ya Yuda batunaki :— Mpo na nini boyei kobundisa biso ?Bato ya Filisitia bazongiselaki bango :— Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso. 11 Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison :— Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso ? Likambo nini osali biso ?Samison azongisaki :— Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai. 12 Bato ya Yuda balobaki na Samison :— Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia.Samison alobaki na bango :— Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko. 13 Bato ya Yuda bazongisaki :— Iyo ! Tokoboma yo te. Tolingi kaka kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko na bango.Bongo bakangaki ye na basinga mibale ya sika mpe babimisaki ye na lidusu ya mabanga. 14 Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye. 15 Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko. 16 Samison alobaki :« Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane,nakangisi bango mipiku na mipiku ;na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane,nabomi bato nkoto moko. » 17 Tango asilisaki koloba, abwakaki mokuwa yango mosika mpe apesaki esika yango kombo « Ramati-Leyi. » 18 Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? » 19 Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore. 20 Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale, wana bato ya Filisitia bazalaki kokonza mokili.

In Other Versions

Judges 15 in the ANGEFD

Judges 15 in the ANTPNG2D

Judges 15 in the AS21

Judges 15 in the BAGH

Judges 15 in the BBPNG

Judges 15 in the BBT1E

Judges 15 in the BDS

Judges 15 in the BEV

Judges 15 in the BHAD

Judges 15 in the BIB

Judges 15 in the BLPT

Judges 15 in the BNT

Judges 15 in the BNTABOOT

Judges 15 in the BNTLV

Judges 15 in the BOATCB

Judges 15 in the BOATCB2

Judges 15 in the BOBCV

Judges 15 in the BOCNT

Judges 15 in the BOECS

Judges 15 in the BOGWICC

Judges 15 in the BOHCB

Judges 15 in the BOHCV

Judges 15 in the BOHLNT

Judges 15 in the BOHNTLTAL

Judges 15 in the BOICB

Judges 15 in the BOILNTAP

Judges 15 in the BOITCV

Judges 15 in the BOKCV

Judges 15 in the BOKCV2

Judges 15 in the BOKHWOG

Judges 15 in the BOKSSV

Judges 15 in the BOLCB

Judges 15 in the BOMCV

Judges 15 in the BONAV

Judges 15 in the BONCB

Judges 15 in the BONLT

Judges 15 in the BONUT2

Judges 15 in the BOPLNT

Judges 15 in the BOSCB

Judges 15 in the BOSNC

Judges 15 in the BOTLNT

Judges 15 in the BOVCB

Judges 15 in the BOYCB

Judges 15 in the BPBB

Judges 15 in the BPH

Judges 15 in the BSB

Judges 15 in the CCB

Judges 15 in the CUV

Judges 15 in the CUVS

Judges 15 in the DBT

Judges 15 in the DGDNT

Judges 15 in the DHNT

Judges 15 in the DNT

Judges 15 in the ELBE

Judges 15 in the EMTV

Judges 15 in the ESV

Judges 15 in the FBV

Judges 15 in the FEB

Judges 15 in the GGMNT

Judges 15 in the GNT

Judges 15 in the HARY

Judges 15 in the HNT

Judges 15 in the IRVA

Judges 15 in the IRVB

Judges 15 in the IRVG

Judges 15 in the IRVH

Judges 15 in the IRVK

Judges 15 in the IRVM

Judges 15 in the IRVM2

Judges 15 in the IRVO

Judges 15 in the IRVP

Judges 15 in the IRVT

Judges 15 in the IRVT2

Judges 15 in the IRVU

Judges 15 in the ISVN

Judges 15 in the JSNT

Judges 15 in the KAPI

Judges 15 in the KBT1ETNIK

Judges 15 in the KBV

Judges 15 in the KJV

Judges 15 in the KNFD

Judges 15 in the LBA

Judges 15 in the LBLA

Judges 15 in the LNT

Judges 15 in the LSV

Judges 15 in the MAAL

Judges 15 in the MBV

Judges 15 in the MBV2

Judges 15 in the MHNT

Judges 15 in the MKNFD

Judges 15 in the MNG

Judges 15 in the MNT

Judges 15 in the MNT2

Judges 15 in the MRS1T

Judges 15 in the NAA

Judges 15 in the NASB

Judges 15 in the NBLA

Judges 15 in the NBS

Judges 15 in the NBVTP

Judges 15 in the NET2

Judges 15 in the NIV11

Judges 15 in the NNT

Judges 15 in the NNT2

Judges 15 in the NNT3

Judges 15 in the PDDPT

Judges 15 in the PFNT

Judges 15 in the RMNT

Judges 15 in the SBIAS

Judges 15 in the SBIBS

Judges 15 in the SBIBS2

Judges 15 in the SBICS

Judges 15 in the SBIDS

Judges 15 in the SBIGS

Judges 15 in the SBIHS

Judges 15 in the SBIIS

Judges 15 in the SBIIS2

Judges 15 in the SBIIS3

Judges 15 in the SBIKS

Judges 15 in the SBIKS2

Judges 15 in the SBIMS

Judges 15 in the SBIOS

Judges 15 in the SBIPS

Judges 15 in the SBISS

Judges 15 in the SBITS

Judges 15 in the SBITS2

Judges 15 in the SBITS3

Judges 15 in the SBITS4

Judges 15 in the SBIUS

Judges 15 in the SBIVS

Judges 15 in the SBT

Judges 15 in the SBT1E

Judges 15 in the SCHL

Judges 15 in the SNT

Judges 15 in the SUSU

Judges 15 in the SUSU2

Judges 15 in the SYNO

Judges 15 in the TBIAOTANT

Judges 15 in the TBT1E

Judges 15 in the TBT1E2

Judges 15 in the TFTIP

Judges 15 in the TFTU

Judges 15 in the TGNTATF3T

Judges 15 in the THAI

Judges 15 in the TNFD

Judges 15 in the TNT

Judges 15 in the TNTIK

Judges 15 in the TNTIL

Judges 15 in the TNTIN

Judges 15 in the TNTIP

Judges 15 in the TNTIZ

Judges 15 in the TOMA

Judges 15 in the TTENT

Judges 15 in the UBG

Judges 15 in the UGV

Judges 15 in the UGV2

Judges 15 in the UGV3

Judges 15 in the VBL

Judges 15 in the VDCC

Judges 15 in the YALU

Judges 15 in the YAPE

Judges 15 in the YBVTP

Judges 15 in the ZBP