Jeremiah 46 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bikolo ya bapaya : 2 Na tina ya Ejipito : Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi : 3 « Bobongisa banguba na bino : ya minene mpe ya mike,mpe bokende bitumba ! 4 Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar !Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba !Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli ! 5 Nazali komona nini ?Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima ;balongi basoda na bango ya mpiko,bazali kopota mbangu makasimpe bazali ata kotala sima te :somo ekangi bango na bangambo nyonso, »elobi Yawe. 6 « Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te,mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te !Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweyapembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor. 7 Nani oyo azali koya lokola ebale Nili,lokola mayi ya bibale oyo etomboki ? 8 Mokili ya Ejipito ezali koya lokola ebale Nili,lokola mayi ya bibale oyo etomboki.Ejipito ezali koloba :‹ Nakoya mpe nakotondisa mokili,nakobebisa bingumba mpe bato na yango. › 9 Bino bampunda, bokende !Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar,botambolisa mbangu !Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti,oyo bomemaka banguba,mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo,bokende liboso ! 10 Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ;mokolo ya kozongisa mabe na mabe,mpo na kozongisela banguna na yo mabe.Mopanga ekoboma kino ekotonda,kino ekosilisa posa na yango ya makila ;pamba te ezali nde mbekampo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor. 11 Oh moseka Ejipito,kende kozwa malasi kati na Galadi !Ozali kobakisa na pamba bakisi likolo ya bakisi,okobika na yo te ! 12 Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo,makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele.Soda moko akotutana na soda mosusu,mpe bango mibale bakokweya nzela moko. » 13 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na koya ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo na kobundisa Ejipito : 14 « Loba makambo oyo na Ejipitompe tatola yango na Migidoli ;tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi :‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama,pamba te mopanga ezali koboma batooyo bazali zingazinga na yo. › 15 Mpo na nini bamemi basoda na yo ya mpiko ?Bakokaki kopika te,pamba te Yawe akweyisaki bango. 16 Tango nyonso, bazali se kobeta mabaku,bazali kokweya moko likolo ya mosusu.Bazali koloba : ‹ Tika ete totelemampe tozonga epai ya bato na biso mokompe na mokili na biso, epai babota biso,mpo ete tobika na mopanga oyo ezali koboma. › 17 Kuna, bakokoma koganga :‹ Faraon, mokonzi ya Ejipito, atiaka kaka makelele ya pamba,akoki na ye makambo te ! › 18 Lokola Ngai nazali na bomoi, »elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezaliYawe, Mokonzi ya mampinga ;« monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba,lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene,azali koya ! 19 Yo movandi ya Ejipito,kanga bisaka na yo mpo na kokende na bowumbu,pamba te Mefisi ekokoma esobe,ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ! 20 Mokili ya Ejipito ezali lokola mwana ngombe ya kitoko ya mwasi,kasi nzinzi ezali koya koswa yango kowuta na nor. 21 Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye,bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga.Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ;bakokoka kolonga te,pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango :ezali tango ya etumbu mpo na bango. 22 Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka,pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya ;bazali koya kobundisa yango na bipasolalokola bato oyo bakataka banzete. 23 Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, »elobi Yawe,« ata soki ezali na banzete ebele.Bazali ebele koleka mabanki,bakokoka kotanga motango na bango te. 24 Elenge mwasi ya Ejipito akoyokisama soni,akokweya na maboko ya bato ya nor. » 25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye. 26 Nakokaba bango na maboko ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya bakonzi ya basoda na ye. Mpe na sima na tango, Ejipito ekotonda lisusu na bato oyo bakovanda kuna, ndenge ezalaki na tango ya kala, » elobi Yawe. 27 « Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te !Oh Isalaele, kobanga te ;nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika,nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu.Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu,moto moko te akobangisa ye lisusu. 28 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ;pamba te nazali elongo na yo, »elobi Yawe,« ata soki nabebisi bikolo nyonsoepai wapi napanzaki bino,nakobebisa yo nyonso te.Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ;nakozanga te kopesa yo etumbu. »

In Other Versions

Jeremiah 46 in the ANGEFD

Jeremiah 46 in the ANTPNG2D

Jeremiah 46 in the AS21

Jeremiah 46 in the BAGH

Jeremiah 46 in the BBPNG

Jeremiah 46 in the BBT1E

Jeremiah 46 in the BDS

Jeremiah 46 in the BEV

Jeremiah 46 in the BHAD

Jeremiah 46 in the BIB

Jeremiah 46 in the BLPT

Jeremiah 46 in the BNT

Jeremiah 46 in the BNTABOOT

Jeremiah 46 in the BNTLV

Jeremiah 46 in the BOATCB

Jeremiah 46 in the BOATCB2

Jeremiah 46 in the BOBCV

Jeremiah 46 in the BOCNT

Jeremiah 46 in the BOECS

Jeremiah 46 in the BOGWICC

Jeremiah 46 in the BOHCB

Jeremiah 46 in the BOHCV

Jeremiah 46 in the BOHLNT

Jeremiah 46 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 46 in the BOICB

Jeremiah 46 in the BOILNTAP

Jeremiah 46 in the BOITCV

Jeremiah 46 in the BOKCV

Jeremiah 46 in the BOKCV2

Jeremiah 46 in the BOKHWOG

Jeremiah 46 in the BOKSSV

Jeremiah 46 in the BOLCB

Jeremiah 46 in the BOMCV

Jeremiah 46 in the BONAV

Jeremiah 46 in the BONCB

Jeremiah 46 in the BONLT

Jeremiah 46 in the BONUT2

Jeremiah 46 in the BOPLNT

Jeremiah 46 in the BOSCB

Jeremiah 46 in the BOSNC

Jeremiah 46 in the BOTLNT

Jeremiah 46 in the BOVCB

Jeremiah 46 in the BOYCB

Jeremiah 46 in the BPBB

Jeremiah 46 in the BPH

Jeremiah 46 in the BSB

Jeremiah 46 in the CCB

Jeremiah 46 in the CUV

Jeremiah 46 in the CUVS

Jeremiah 46 in the DBT

Jeremiah 46 in the DGDNT

Jeremiah 46 in the DHNT

Jeremiah 46 in the DNT

Jeremiah 46 in the ELBE

Jeremiah 46 in the EMTV

Jeremiah 46 in the ESV

Jeremiah 46 in the FBV

Jeremiah 46 in the FEB

Jeremiah 46 in the GGMNT

Jeremiah 46 in the GNT

Jeremiah 46 in the HARY

Jeremiah 46 in the HNT

Jeremiah 46 in the IRVA

Jeremiah 46 in the IRVB

Jeremiah 46 in the IRVG

Jeremiah 46 in the IRVH

Jeremiah 46 in the IRVK

Jeremiah 46 in the IRVM

Jeremiah 46 in the IRVM2

Jeremiah 46 in the IRVO

Jeremiah 46 in the IRVP

Jeremiah 46 in the IRVT

Jeremiah 46 in the IRVT2

Jeremiah 46 in the IRVU

Jeremiah 46 in the ISVN

Jeremiah 46 in the JSNT

Jeremiah 46 in the KAPI

Jeremiah 46 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 46 in the KBV

Jeremiah 46 in the KJV

Jeremiah 46 in the KNFD

Jeremiah 46 in the LBA

Jeremiah 46 in the LBLA

Jeremiah 46 in the LNT

Jeremiah 46 in the LSV

Jeremiah 46 in the MAAL

Jeremiah 46 in the MBV

Jeremiah 46 in the MBV2

Jeremiah 46 in the MHNT

Jeremiah 46 in the MKNFD

Jeremiah 46 in the MNG

Jeremiah 46 in the MNT

Jeremiah 46 in the MNT2

Jeremiah 46 in the MRS1T

Jeremiah 46 in the NAA

Jeremiah 46 in the NASB

Jeremiah 46 in the NBLA

Jeremiah 46 in the NBS

Jeremiah 46 in the NBVTP

Jeremiah 46 in the NET2

Jeremiah 46 in the NIV11

Jeremiah 46 in the NNT

Jeremiah 46 in the NNT2

Jeremiah 46 in the NNT3

Jeremiah 46 in the PDDPT

Jeremiah 46 in the PFNT

Jeremiah 46 in the RMNT

Jeremiah 46 in the SBIAS

Jeremiah 46 in the SBIBS

Jeremiah 46 in the SBIBS2

Jeremiah 46 in the SBICS

Jeremiah 46 in the SBIDS

Jeremiah 46 in the SBIGS

Jeremiah 46 in the SBIHS

Jeremiah 46 in the SBIIS

Jeremiah 46 in the SBIIS2

Jeremiah 46 in the SBIIS3

Jeremiah 46 in the SBIKS

Jeremiah 46 in the SBIKS2

Jeremiah 46 in the SBIMS

Jeremiah 46 in the SBIOS

Jeremiah 46 in the SBIPS

Jeremiah 46 in the SBISS

Jeremiah 46 in the SBITS

Jeremiah 46 in the SBITS2

Jeremiah 46 in the SBITS3

Jeremiah 46 in the SBITS4

Jeremiah 46 in the SBIUS

Jeremiah 46 in the SBIVS

Jeremiah 46 in the SBT

Jeremiah 46 in the SBT1E

Jeremiah 46 in the SCHL

Jeremiah 46 in the SNT

Jeremiah 46 in the SUSU

Jeremiah 46 in the SUSU2

Jeremiah 46 in the SYNO

Jeremiah 46 in the TBIAOTANT

Jeremiah 46 in the TBT1E

Jeremiah 46 in the TBT1E2

Jeremiah 46 in the TFTIP

Jeremiah 46 in the TFTU

Jeremiah 46 in the TGNTATF3T

Jeremiah 46 in the THAI

Jeremiah 46 in the TNFD

Jeremiah 46 in the TNT

Jeremiah 46 in the TNTIK

Jeremiah 46 in the TNTIL

Jeremiah 46 in the TNTIN

Jeremiah 46 in the TNTIP

Jeremiah 46 in the TNTIZ

Jeremiah 46 in the TOMA

Jeremiah 46 in the TTENT

Jeremiah 46 in the UBG

Jeremiah 46 in the UGV

Jeremiah 46 in the UGV2

Jeremiah 46 in the UGV3

Jeremiah 46 in the VBL

Jeremiah 46 in the VDCC

Jeremiah 46 in the YALU

Jeremiah 46 in the YAPE

Jeremiah 46 in the YBVTP

Jeremiah 46 in the ZBP