John 15 (BOLCB2)

1 Nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na Ngai azali nkolo elanga. 2 Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka. 3 Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino. 4 Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te. 5 Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te. 6 Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika. 7 Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango. 8 Soki boboti bambuma ebele mpe botalisi, na nzela yango, ete bozali bayekoli na Ngai, Tata na Ngai azwa lokumu. 9 Ndenge Tata alingaki Ngai, Ngai mpe nalingaki bino ; boye, bowumela kati na bolingo na Ngai. 10 Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye. 11 Nalobi na bino makambo oyo nyonso mpo ete esengo na Ngai ezala kati na bino, mpe esengo na bino ezala ya kokoka. 12 Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino. 13 Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami. 14 Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino. 15 Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai. 16 Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai. 17 Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino. 18 Solo, mokili ezali koyina bino ; kasi boyeba ete eyinaki Ngai liboso na bino. 19 Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino. 20 Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino. 21 Bakosala bino makambo wana nyonso likolo na Ngai, pamba te bayebi te Ye oyo atindaki Ngai. 22 Soki nayaki te mpe soki nalobaki na bango te, balingaki te komema ngambo ya lisumu ; kasi sik’oyo, bakoki komilongisa te na tina na lisumu na bango. 23 Pamba te moto oyo ayini Ngai ayini mpe Tata na Ngai. 24 Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai. 25 Kasi ezali mpo ete liloba oyo ekomama kati na mibeko na bango ekokisama : « Bayinaki Ngai kaka pamba. » 26 Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ; 27 bongo bino mpe bokotatola na tina na Ngai, pamba te bozali elongo na Ngai wuta na ebandeli.

In Other Versions

John 15 in the ANGEFD

John 15 in the ANTPNG2D

John 15 in the AS21

John 15 in the BAGH

John 15 in the BBPNG

John 15 in the BBT1E

John 15 in the BDS

John 15 in the BEV

John 15 in the BHAD

John 15 in the BIB

John 15 in the BLPT

John 15 in the BNT

John 15 in the BNTABOOT

John 15 in the BNTLV

John 15 in the BOATCB

John 15 in the BOATCB2

John 15 in the BOBCV

John 15 in the BOCNT

John 15 in the BOECS

John 15 in the BOGWICC

John 15 in the BOHCB

John 15 in the BOHCV

John 15 in the BOHLNT

John 15 in the BOHNTLTAL

John 15 in the BOICB

John 15 in the BOILNTAP

John 15 in the BOITCV

John 15 in the BOKCV

John 15 in the BOKCV2

John 15 in the BOKHWOG

John 15 in the BOKSSV

John 15 in the BOLCB

John 15 in the BOMCV

John 15 in the BONAV

John 15 in the BONCB

John 15 in the BONLT

John 15 in the BONUT2

John 15 in the BOPLNT

John 15 in the BOSCB

John 15 in the BOSNC

John 15 in the BOTLNT

John 15 in the BOVCB

John 15 in the BOYCB

John 15 in the BPBB

John 15 in the BPH

John 15 in the BSB

John 15 in the CCB

John 15 in the CUV

John 15 in the CUVS

John 15 in the DBT

John 15 in the DGDNT

John 15 in the DHNT

John 15 in the DNT

John 15 in the ELBE

John 15 in the EMTV

John 15 in the ESV

John 15 in the FBV

John 15 in the FEB

John 15 in the GGMNT

John 15 in the GNT

John 15 in the HARY

John 15 in the HNT

John 15 in the IRVA

John 15 in the IRVB

John 15 in the IRVG

John 15 in the IRVH

John 15 in the IRVK

John 15 in the IRVM

John 15 in the IRVM2

John 15 in the IRVO

John 15 in the IRVP

John 15 in the IRVT

John 15 in the IRVT2

John 15 in the IRVU

John 15 in the ISVN

John 15 in the JSNT

John 15 in the KAPI

John 15 in the KBT1ETNIK

John 15 in the KBV

John 15 in the KJV

John 15 in the KNFD

John 15 in the LBA

John 15 in the LBLA

John 15 in the LNT

John 15 in the LSV

John 15 in the MAAL

John 15 in the MBV

John 15 in the MBV2

John 15 in the MHNT

John 15 in the MKNFD

John 15 in the MNG

John 15 in the MNT

John 15 in the MNT2

John 15 in the MRS1T

John 15 in the NAA

John 15 in the NASB

John 15 in the NBLA

John 15 in the NBS

John 15 in the NBVTP

John 15 in the NET2

John 15 in the NIV11

John 15 in the NNT

John 15 in the NNT2

John 15 in the NNT3

John 15 in the PDDPT

John 15 in the PFNT

John 15 in the RMNT

John 15 in the SBIAS

John 15 in the SBIBS

John 15 in the SBIBS2

John 15 in the SBICS

John 15 in the SBIDS

John 15 in the SBIGS

John 15 in the SBIHS

John 15 in the SBIIS

John 15 in the SBIIS2

John 15 in the SBIIS3

John 15 in the SBIKS

John 15 in the SBIKS2

John 15 in the SBIMS

John 15 in the SBIOS

John 15 in the SBIPS

John 15 in the SBISS

John 15 in the SBITS

John 15 in the SBITS2

John 15 in the SBITS3

John 15 in the SBITS4

John 15 in the SBIUS

John 15 in the SBIVS

John 15 in the SBT

John 15 in the SBT1E

John 15 in the SCHL

John 15 in the SNT

John 15 in the SUSU

John 15 in the SUSU2

John 15 in the SYNO

John 15 in the TBIAOTANT

John 15 in the TBT1E

John 15 in the TBT1E2

John 15 in the TFTIP

John 15 in the TFTU

John 15 in the TGNTATF3T

John 15 in the THAI

John 15 in the TNFD

John 15 in the TNT

John 15 in the TNTIK

John 15 in the TNTIL

John 15 in the TNTIN

John 15 in the TNTIP

John 15 in the TNTIZ

John 15 in the TOMA

John 15 in the TTENT

John 15 in the UBG

John 15 in the UGV

John 15 in the UGV2

John 15 in the UGV3

John 15 in the VBL

John 15 in the VDCC

John 15 in the YALU

John 15 in the YAPE

John 15 in the YBVTP

John 15 in the ZBP