Job 1 (BOLCB2)

1 Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe. 2 Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato ; 3 mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu. 4 Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti ; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango. 5 Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. »Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso. 6 Mokolo moko, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango. 7 Yawe atunaki Satana :— Owuti wapi ?Satana azongiselaki Yawe :— Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili. 8 Yawe alobaki na Satana :— Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. 9 Satana azongiselaki Yawe :— Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe ? 10 Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba. 11 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo. 12 Yawe alobaki na Satana :— Malamu ! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo ; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye !Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe. 13 Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, 14 ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye : « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana ; 15 bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » 16 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali ! Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » 17 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » 18 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, 19 mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » 20 Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki. 21 Alobaki :« Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai,mpe nakozonga bolumbu.Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ;tika ete Kombo na Ye ekumisama ! » 22 Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.

In Other Versions

Job 1 in the ANGEFD

Job 1 in the ANTPNG2D

Job 1 in the AS21

Job 1 in the BAGH

Job 1 in the BBPNG

Job 1 in the BBT1E

Job 1 in the BDS

Job 1 in the BEV

Job 1 in the BHAD

Job 1 in the BIB

Job 1 in the BLPT

Job 1 in the BNT

Job 1 in the BNTABOOT

Job 1 in the BNTLV

Job 1 in the BOATCB

Job 1 in the BOATCB2

Job 1 in the BOBCV

Job 1 in the BOCNT

Job 1 in the BOECS

Job 1 in the BOGWICC

Job 1 in the BOHCB

Job 1 in the BOHCV

Job 1 in the BOHLNT

Job 1 in the BOHNTLTAL

Job 1 in the BOICB

Job 1 in the BOILNTAP

Job 1 in the BOITCV

Job 1 in the BOKCV

Job 1 in the BOKCV2

Job 1 in the BOKHWOG

Job 1 in the BOKSSV

Job 1 in the BOLCB

Job 1 in the BOMCV

Job 1 in the BONAV

Job 1 in the BONCB

Job 1 in the BONLT

Job 1 in the BONUT2

Job 1 in the BOPLNT

Job 1 in the BOSCB

Job 1 in the BOSNC

Job 1 in the BOTLNT

Job 1 in the BOVCB

Job 1 in the BOYCB

Job 1 in the BPBB

Job 1 in the BPH

Job 1 in the BSB

Job 1 in the CCB

Job 1 in the CUV

Job 1 in the CUVS

Job 1 in the DBT

Job 1 in the DGDNT

Job 1 in the DHNT

Job 1 in the DNT

Job 1 in the ELBE

Job 1 in the EMTV

Job 1 in the ESV

Job 1 in the FBV

Job 1 in the FEB

Job 1 in the GGMNT

Job 1 in the GNT

Job 1 in the HARY

Job 1 in the HNT

Job 1 in the IRVA

Job 1 in the IRVB

Job 1 in the IRVG

Job 1 in the IRVH

Job 1 in the IRVK

Job 1 in the IRVM

Job 1 in the IRVM2

Job 1 in the IRVO

Job 1 in the IRVP

Job 1 in the IRVT

Job 1 in the IRVT2

Job 1 in the IRVU

Job 1 in the ISVN

Job 1 in the JSNT

Job 1 in the KAPI

Job 1 in the KBT1ETNIK

Job 1 in the KBV

Job 1 in the KJV

Job 1 in the KNFD

Job 1 in the LBA

Job 1 in the LBLA

Job 1 in the LNT

Job 1 in the LSV

Job 1 in the MAAL

Job 1 in the MBV

Job 1 in the MBV2

Job 1 in the MHNT

Job 1 in the MKNFD

Job 1 in the MNG

Job 1 in the MNT

Job 1 in the MNT2

Job 1 in the MRS1T

Job 1 in the NAA

Job 1 in the NASB

Job 1 in the NBLA

Job 1 in the NBS

Job 1 in the NBVTP

Job 1 in the NET2

Job 1 in the NIV11

Job 1 in the NNT

Job 1 in the NNT2

Job 1 in the NNT3

Job 1 in the PDDPT

Job 1 in the PFNT

Job 1 in the RMNT

Job 1 in the SBIAS

Job 1 in the SBIBS

Job 1 in the SBIBS2

Job 1 in the SBICS

Job 1 in the SBIDS

Job 1 in the SBIGS

Job 1 in the SBIHS

Job 1 in the SBIIS

Job 1 in the SBIIS2

Job 1 in the SBIIS3

Job 1 in the SBIKS

Job 1 in the SBIKS2

Job 1 in the SBIMS

Job 1 in the SBIOS

Job 1 in the SBIPS

Job 1 in the SBISS

Job 1 in the SBITS

Job 1 in the SBITS2

Job 1 in the SBITS3

Job 1 in the SBITS4

Job 1 in the SBIUS

Job 1 in the SBIVS

Job 1 in the SBT

Job 1 in the SBT1E

Job 1 in the SCHL

Job 1 in the SNT

Job 1 in the SUSU

Job 1 in the SUSU2

Job 1 in the SYNO

Job 1 in the TBIAOTANT

Job 1 in the TBT1E

Job 1 in the TBT1E2

Job 1 in the TFTIP

Job 1 in the TFTU

Job 1 in the TGNTATF3T

Job 1 in the THAI

Job 1 in the TNFD

Job 1 in the TNT

Job 1 in the TNTIK

Job 1 in the TNTIL

Job 1 in the TNTIN

Job 1 in the TNTIP

Job 1 in the TNTIZ

Job 1 in the TOMA

Job 1 in the TTENT

Job 1 in the UBG

Job 1 in the UGV

Job 1 in the UGV2

Job 1 in the UGV3

Job 1 in the VBL

Job 1 in the VDCC

Job 1 in the YALU

Job 1 in the YAPE

Job 1 in the YBVTP

Job 1 in the ZBP