Joshua 1 (BOLCB2)
1 Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize : 2 « Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele. 3 Nakopesa bino esika nyonso oyo matambe ya makolo na bino ekonyata, ndenge nalakaki Moyize. 4 Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste : yango nde ekozala mokili na bino. 5 Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te. 6 Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. 7 Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala. 8 Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso. 9 Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. » 10 Jozue apesaki mitindo epai ya bakambi ya bato : 11 « Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › » 12 Kasi Jozue alobaki na bato ya libota ya Ribeni, na bato ya libota ya Gadi, mpe na bato ya ndambo ya libota ya Manase : 13 — Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. » 14 Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino 15 kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka. 16 Bazongiselaki Jozue :— Tokosala nyonso oyo okotinda biso mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso. 17 Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize ! 18 Moto nyonso oyo akotombokela mitindo na yo to akotosa te maloba na yo na likambo nyonso oyo okotinda, akokufa. Tika ete ozala makasi mpe oyika mpiko !
In Other Versions
Joshua 1 in the ANGEFD
Joshua 1 in the ANTPNG2D
Joshua 1 in the AS21
Joshua 1 in the BAGH
Joshua 1 in the BBPNG
Joshua 1 in the BBT1E
Joshua 1 in the BDS
Joshua 1 in the BEV
Joshua 1 in the BHAD
Joshua 1 in the BIB
Joshua 1 in the BLPT
Joshua 1 in the BNT
Joshua 1 in the BNTABOOT
Joshua 1 in the BNTLV
Joshua 1 in the BOATCB
Joshua 1 in the BOATCB2
Joshua 1 in the BOBCV
Joshua 1 in the BOCNT
Joshua 1 in the BOECS
Joshua 1 in the BOGWICC
Joshua 1 in the BOHCB
Joshua 1 in the BOHCV
Joshua 1 in the BOHLNT
Joshua 1 in the BOHNTLTAL
Joshua 1 in the BOICB
Joshua 1 in the BOILNTAP
Joshua 1 in the BOITCV
Joshua 1 in the BOKCV
Joshua 1 in the BOKCV2
Joshua 1 in the BOKHWOG
Joshua 1 in the BOKSSV
Joshua 1 in the BOLCB
Joshua 1 in the BOMCV
Joshua 1 in the BONAV
Joshua 1 in the BONCB
Joshua 1 in the BONLT
Joshua 1 in the BONUT2
Joshua 1 in the BOPLNT
Joshua 1 in the BOSCB
Joshua 1 in the BOSNC
Joshua 1 in the BOTLNT
Joshua 1 in the BOVCB
Joshua 1 in the BOYCB
Joshua 1 in the BPBB
Joshua 1 in the BPH
Joshua 1 in the BSB
Joshua 1 in the CCB
Joshua 1 in the CUV
Joshua 1 in the CUVS
Joshua 1 in the DBT
Joshua 1 in the DGDNT
Joshua 1 in the DHNT
Joshua 1 in the DNT
Joshua 1 in the ELBE
Joshua 1 in the EMTV
Joshua 1 in the ESV
Joshua 1 in the FBV
Joshua 1 in the FEB
Joshua 1 in the GGMNT
Joshua 1 in the GNT
Joshua 1 in the HARY
Joshua 1 in the HNT
Joshua 1 in the IRVA
Joshua 1 in the IRVB
Joshua 1 in the IRVG
Joshua 1 in the IRVH
Joshua 1 in the IRVK
Joshua 1 in the IRVM
Joshua 1 in the IRVM2
Joshua 1 in the IRVO
Joshua 1 in the IRVP
Joshua 1 in the IRVT
Joshua 1 in the IRVT2
Joshua 1 in the IRVU
Joshua 1 in the ISVN
Joshua 1 in the JSNT
Joshua 1 in the KAPI
Joshua 1 in the KBT1ETNIK
Joshua 1 in the KBV
Joshua 1 in the KJV
Joshua 1 in the KNFD
Joshua 1 in the LBA
Joshua 1 in the LBLA
Joshua 1 in the LNT
Joshua 1 in the LSV
Joshua 1 in the MAAL
Joshua 1 in the MBV
Joshua 1 in the MBV2
Joshua 1 in the MHNT
Joshua 1 in the MKNFD
Joshua 1 in the MNG
Joshua 1 in the MNT
Joshua 1 in the MNT2
Joshua 1 in the MRS1T
Joshua 1 in the NAA
Joshua 1 in the NASB
Joshua 1 in the NBLA
Joshua 1 in the NBS
Joshua 1 in the NBVTP
Joshua 1 in the NET2
Joshua 1 in the NIV11
Joshua 1 in the NNT
Joshua 1 in the NNT2
Joshua 1 in the NNT3
Joshua 1 in the PDDPT
Joshua 1 in the PFNT
Joshua 1 in the RMNT
Joshua 1 in the SBIAS
Joshua 1 in the SBIBS
Joshua 1 in the SBIBS2
Joshua 1 in the SBICS
Joshua 1 in the SBIDS
Joshua 1 in the SBIGS
Joshua 1 in the SBIHS
Joshua 1 in the SBIIS
Joshua 1 in the SBIIS2
Joshua 1 in the SBIIS3
Joshua 1 in the SBIKS
Joshua 1 in the SBIKS2
Joshua 1 in the SBIMS
Joshua 1 in the SBIOS
Joshua 1 in the SBIPS
Joshua 1 in the SBISS
Joshua 1 in the SBITS
Joshua 1 in the SBITS2
Joshua 1 in the SBITS3
Joshua 1 in the SBITS4
Joshua 1 in the SBIUS
Joshua 1 in the SBIVS
Joshua 1 in the SBT
Joshua 1 in the SBT1E
Joshua 1 in the SCHL
Joshua 1 in the SNT
Joshua 1 in the SUSU
Joshua 1 in the SUSU2
Joshua 1 in the SYNO
Joshua 1 in the TBIAOTANT
Joshua 1 in the TBT1E
Joshua 1 in the TBT1E2
Joshua 1 in the TFTIP
Joshua 1 in the TFTU
Joshua 1 in the TGNTATF3T
Joshua 1 in the THAI
Joshua 1 in the TNFD
Joshua 1 in the TNT
Joshua 1 in the TNTIK
Joshua 1 in the TNTIL
Joshua 1 in the TNTIN
Joshua 1 in the TNTIP
Joshua 1 in the TNTIZ
Joshua 1 in the TOMA
Joshua 1 in the TTENT
Joshua 1 in the UBG
Joshua 1 in the UGV
Joshua 1 in the UGV2
Joshua 1 in the UGV3
Joshua 1 in the VBL
Joshua 1 in the VDCC
Joshua 1 in the YALU
Joshua 1 in the YAPE
Joshua 1 in the YBVTP
Joshua 1 in the ZBP