Joshua 17 (BOLCB2)

1 Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani. 2 Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele : bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango. 3 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase, atikalaki kobota bana mibali te ; azalaki kaka na bana basi oyo bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. 4 Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki : « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. »Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe. 5 Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani. 6 Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase. 7 Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua. 8 Manase azwaki eteni ya mabele ya Tapua, kasi yango moko Tapua oyo ezalaki na bandelo ya Manase ezalaki ya bakitani ya Efrayimi. 9 Bongo mondelo ekitaki kino na ngambo ya sude ya moluka ya Kana. Bingumba oyo ezalaki na zingazinga ya bingumba ya Manase ezalaki ya Efrayimi. Kasi mondelo ya Manase elekaki na ngambo ya nor ya moluka mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. 10 Efrayimi azwaki eteni ya mabele oyo ezalaki na ngambo ya sude ; mpe Manase azwaki oyo ezalaki na ngambo ya nor. Eteni ya mabele ya Manase ekomaki kino na Ebale monene, na mondelo ya Aseri, na ngambo ya nor mpe ya Isakari, na ngambo ya este. 11 Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti). 12 Nzokande, bakitani ya Manase bazalaki na makoki te ya kozwa bingumba oyo, pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na etuka yango. 13 Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango. 14 Bakitani ya Jozefi balobaki na Jozue :— Mpo na nini opesi biso lokola libula, kaka eteni moko ya mabele ? Tozali penza bato ebele na motango mpe Yawe apamboli biso makasi. 15 Jozue azongiselaki bango :— Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi. 16 Bakitani ya Jozefi balobaki na ye :— Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda. 17 Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi :— Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te. 18 Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.

In Other Versions

Joshua 17 in the ANGEFD

Joshua 17 in the ANTPNG2D

Joshua 17 in the AS21

Joshua 17 in the BAGH

Joshua 17 in the BBPNG

Joshua 17 in the BBT1E

Joshua 17 in the BDS

Joshua 17 in the BEV

Joshua 17 in the BHAD

Joshua 17 in the BIB

Joshua 17 in the BLPT

Joshua 17 in the BNT

Joshua 17 in the BNTABOOT

Joshua 17 in the BNTLV

Joshua 17 in the BOATCB

Joshua 17 in the BOATCB2

Joshua 17 in the BOBCV

Joshua 17 in the BOCNT

Joshua 17 in the BOECS

Joshua 17 in the BOGWICC

Joshua 17 in the BOHCB

Joshua 17 in the BOHCV

Joshua 17 in the BOHLNT

Joshua 17 in the BOHNTLTAL

Joshua 17 in the BOICB

Joshua 17 in the BOILNTAP

Joshua 17 in the BOITCV

Joshua 17 in the BOKCV

Joshua 17 in the BOKCV2

Joshua 17 in the BOKHWOG

Joshua 17 in the BOKSSV

Joshua 17 in the BOLCB

Joshua 17 in the BOMCV

Joshua 17 in the BONAV

Joshua 17 in the BONCB

Joshua 17 in the BONLT

Joshua 17 in the BONUT2

Joshua 17 in the BOPLNT

Joshua 17 in the BOSCB

Joshua 17 in the BOSNC

Joshua 17 in the BOTLNT

Joshua 17 in the BOVCB

Joshua 17 in the BOYCB

Joshua 17 in the BPBB

Joshua 17 in the BPH

Joshua 17 in the BSB

Joshua 17 in the CCB

Joshua 17 in the CUV

Joshua 17 in the CUVS

Joshua 17 in the DBT

Joshua 17 in the DGDNT

Joshua 17 in the DHNT

Joshua 17 in the DNT

Joshua 17 in the ELBE

Joshua 17 in the EMTV

Joshua 17 in the ESV

Joshua 17 in the FBV

Joshua 17 in the FEB

Joshua 17 in the GGMNT

Joshua 17 in the GNT

Joshua 17 in the HARY

Joshua 17 in the HNT

Joshua 17 in the IRVA

Joshua 17 in the IRVB

Joshua 17 in the IRVG

Joshua 17 in the IRVH

Joshua 17 in the IRVK

Joshua 17 in the IRVM

Joshua 17 in the IRVM2

Joshua 17 in the IRVO

Joshua 17 in the IRVP

Joshua 17 in the IRVT

Joshua 17 in the IRVT2

Joshua 17 in the IRVU

Joshua 17 in the ISVN

Joshua 17 in the JSNT

Joshua 17 in the KAPI

Joshua 17 in the KBT1ETNIK

Joshua 17 in the KBV

Joshua 17 in the KJV

Joshua 17 in the KNFD

Joshua 17 in the LBA

Joshua 17 in the LBLA

Joshua 17 in the LNT

Joshua 17 in the LSV

Joshua 17 in the MAAL

Joshua 17 in the MBV

Joshua 17 in the MBV2

Joshua 17 in the MHNT

Joshua 17 in the MKNFD

Joshua 17 in the MNG

Joshua 17 in the MNT

Joshua 17 in the MNT2

Joshua 17 in the MRS1T

Joshua 17 in the NAA

Joshua 17 in the NASB

Joshua 17 in the NBLA

Joshua 17 in the NBS

Joshua 17 in the NBVTP

Joshua 17 in the NET2

Joshua 17 in the NIV11

Joshua 17 in the NNT

Joshua 17 in the NNT2

Joshua 17 in the NNT3

Joshua 17 in the PDDPT

Joshua 17 in the PFNT

Joshua 17 in the RMNT

Joshua 17 in the SBIAS

Joshua 17 in the SBIBS

Joshua 17 in the SBIBS2

Joshua 17 in the SBICS

Joshua 17 in the SBIDS

Joshua 17 in the SBIGS

Joshua 17 in the SBIHS

Joshua 17 in the SBIIS

Joshua 17 in the SBIIS2

Joshua 17 in the SBIIS3

Joshua 17 in the SBIKS

Joshua 17 in the SBIKS2

Joshua 17 in the SBIMS

Joshua 17 in the SBIOS

Joshua 17 in the SBIPS

Joshua 17 in the SBISS

Joshua 17 in the SBITS

Joshua 17 in the SBITS2

Joshua 17 in the SBITS3

Joshua 17 in the SBITS4

Joshua 17 in the SBIUS

Joshua 17 in the SBIVS

Joshua 17 in the SBT

Joshua 17 in the SBT1E

Joshua 17 in the SCHL

Joshua 17 in the SNT

Joshua 17 in the SUSU

Joshua 17 in the SUSU2

Joshua 17 in the SYNO

Joshua 17 in the TBIAOTANT

Joshua 17 in the TBT1E

Joshua 17 in the TBT1E2

Joshua 17 in the TFTIP

Joshua 17 in the TFTU

Joshua 17 in the TGNTATF3T

Joshua 17 in the THAI

Joshua 17 in the TNFD

Joshua 17 in the TNT

Joshua 17 in the TNTIK

Joshua 17 in the TNTIL

Joshua 17 in the TNTIN

Joshua 17 in the TNTIP

Joshua 17 in the TNTIZ

Joshua 17 in the TOMA

Joshua 17 in the TTENT

Joshua 17 in the UBG

Joshua 17 in the UGV

Joshua 17 in the UGV2

Joshua 17 in the UGV3

Joshua 17 in the VBL

Joshua 17 in the VDCC

Joshua 17 in the YALU

Joshua 17 in the YAPE

Joshua 17 in the YBVTP

Joshua 17 in the ZBP