Joshua 2 (BOLCB2)

1 Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale ; alobaki na bango :— Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko.Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna. 2 Bayebisaki mokonzi ya Jeriko :— Tala, bato moko kati na bana ya Isalaele bayaki awa na butu mpo na kononga mokili. 3 Boye, mokonzi ya Jeriko atindaki maloba oyo epai ya Raabi :— Bimisa mibali oyo bayaki epai na yo mpe bakotaki na ndako na yo, pamba te bayei nde mpo na kononga mokili mobimba. 4 Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki :— Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki. 5 Bakendeki na pokwa na tango oyo bakangaka ekuke ya engumba. Nayebi mpe te soki bakendeki na nzela nini. Bolanda bango noki. Bokoki solo kokanga bango. 6 Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza. 7 Bongo, batindami ya mokonzi babimaki mpo na kolanda banongi na nzela oyo ekenda kino na esika oyo bakatiselaka ebale Yordani na makolo. Tango kaka batindami yango babimaki na engumba, bakangaki mpe mbala moko ekuke. 8 Na butu, liboso ete banongi balala, Raabi amataki likolo ya mwanza 9 mpe alobaki na bango :— Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino. 10 Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani. 11 Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele. 12 Boye sik’oyo, bolapa ndayi liboso na ngai na Kombo na Yawe ete bokosalela libota na ngai bolamu ndenge ngai nasaleli bino. Bopesa ngai elembo ya solo ; 13 elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa. 14 Banongi bayebisaki ye :— Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo. 15 Boye, Raabi abimisaki bango na lininisa mpe akitisaki bango na singa, pamba te ndako oyo azalaki kovanda ezalaki ya kokangama na eteni ya mir ya engumba. 16 Alobaki na bango :— Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino. 17 Banongi balobaki na ye :— Tokozala na ngambo te na ndayi oyo olapisi biso 18 soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo. 19 Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso. 20 Soki mpe olobi makambo oyo biso tozali kosala, tokozala na ngambo te liboso ya ndayi oyo olapisi biso. 21 Raabi azongisaki :— Boye, tika ete esalema ndenge bolobi.Atikaki bango kokende, mpe bakabwanaki. Bongo na sima, akangisaki singa ya motane na lininisa. 22 Sima na bango kokabwana, bakendeki na bangomba mikuse mpe bavandaki kuna mikolo misato kino tango bato oyo bazalaki kolanda bango balembaki koluka bango na nzela nyonso. Lokola bamonaki bango te, bazongaki na bango. 23 Banongi oyo mibale bazongelaki nzela na bango, babimaki na bangomba mikuse, bakatisaki ebale mpe bakomaki kino epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni. Bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. 24 Balobaki na Jozue :— Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso ; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso.

In Other Versions

Joshua 2 in the ANGEFD

Joshua 2 in the ANTPNG2D

Joshua 2 in the AS21

Joshua 2 in the BAGH

Joshua 2 in the BBPNG

Joshua 2 in the BBT1E

Joshua 2 in the BDS

Joshua 2 in the BEV

Joshua 2 in the BHAD

Joshua 2 in the BIB

Joshua 2 in the BLPT

Joshua 2 in the BNT

Joshua 2 in the BNTABOOT

Joshua 2 in the BNTLV

Joshua 2 in the BOATCB

Joshua 2 in the BOATCB2

Joshua 2 in the BOBCV

Joshua 2 in the BOCNT

Joshua 2 in the BOECS

Joshua 2 in the BOGWICC

Joshua 2 in the BOHCB

Joshua 2 in the BOHCV

Joshua 2 in the BOHLNT

Joshua 2 in the BOHNTLTAL

Joshua 2 in the BOICB

Joshua 2 in the BOILNTAP

Joshua 2 in the BOITCV

Joshua 2 in the BOKCV

Joshua 2 in the BOKCV2

Joshua 2 in the BOKHWOG

Joshua 2 in the BOKSSV

Joshua 2 in the BOLCB

Joshua 2 in the BOMCV

Joshua 2 in the BONAV

Joshua 2 in the BONCB

Joshua 2 in the BONLT

Joshua 2 in the BONUT2

Joshua 2 in the BOPLNT

Joshua 2 in the BOSCB

Joshua 2 in the BOSNC

Joshua 2 in the BOTLNT

Joshua 2 in the BOVCB

Joshua 2 in the BOYCB

Joshua 2 in the BPBB

Joshua 2 in the BPH

Joshua 2 in the BSB

Joshua 2 in the CCB

Joshua 2 in the CUV

Joshua 2 in the CUVS

Joshua 2 in the DBT

Joshua 2 in the DGDNT

Joshua 2 in the DHNT

Joshua 2 in the DNT

Joshua 2 in the ELBE

Joshua 2 in the EMTV

Joshua 2 in the ESV

Joshua 2 in the FBV

Joshua 2 in the FEB

Joshua 2 in the GGMNT

Joshua 2 in the GNT

Joshua 2 in the HARY

Joshua 2 in the HNT

Joshua 2 in the IRVA

Joshua 2 in the IRVB

Joshua 2 in the IRVG

Joshua 2 in the IRVH

Joshua 2 in the IRVK

Joshua 2 in the IRVM

Joshua 2 in the IRVM2

Joshua 2 in the IRVO

Joshua 2 in the IRVP

Joshua 2 in the IRVT

Joshua 2 in the IRVT2

Joshua 2 in the IRVU

Joshua 2 in the ISVN

Joshua 2 in the JSNT

Joshua 2 in the KAPI

Joshua 2 in the KBT1ETNIK

Joshua 2 in the KBV

Joshua 2 in the KJV

Joshua 2 in the KNFD

Joshua 2 in the LBA

Joshua 2 in the LBLA

Joshua 2 in the LNT

Joshua 2 in the LSV

Joshua 2 in the MAAL

Joshua 2 in the MBV

Joshua 2 in the MBV2

Joshua 2 in the MHNT

Joshua 2 in the MKNFD

Joshua 2 in the MNG

Joshua 2 in the MNT

Joshua 2 in the MNT2

Joshua 2 in the MRS1T

Joshua 2 in the NAA

Joshua 2 in the NASB

Joshua 2 in the NBLA

Joshua 2 in the NBS

Joshua 2 in the NBVTP

Joshua 2 in the NET2

Joshua 2 in the NIV11

Joshua 2 in the NNT

Joshua 2 in the NNT2

Joshua 2 in the NNT3

Joshua 2 in the PDDPT

Joshua 2 in the PFNT

Joshua 2 in the RMNT

Joshua 2 in the SBIAS

Joshua 2 in the SBIBS

Joshua 2 in the SBIBS2

Joshua 2 in the SBICS

Joshua 2 in the SBIDS

Joshua 2 in the SBIGS

Joshua 2 in the SBIHS

Joshua 2 in the SBIIS

Joshua 2 in the SBIIS2

Joshua 2 in the SBIIS3

Joshua 2 in the SBIKS

Joshua 2 in the SBIKS2

Joshua 2 in the SBIMS

Joshua 2 in the SBIOS

Joshua 2 in the SBIPS

Joshua 2 in the SBISS

Joshua 2 in the SBITS

Joshua 2 in the SBITS2

Joshua 2 in the SBITS3

Joshua 2 in the SBITS4

Joshua 2 in the SBIUS

Joshua 2 in the SBIVS

Joshua 2 in the SBT

Joshua 2 in the SBT1E

Joshua 2 in the SCHL

Joshua 2 in the SNT

Joshua 2 in the SUSU

Joshua 2 in the SUSU2

Joshua 2 in the SYNO

Joshua 2 in the TBIAOTANT

Joshua 2 in the TBT1E

Joshua 2 in the TBT1E2

Joshua 2 in the TFTIP

Joshua 2 in the TFTU

Joshua 2 in the TGNTATF3T

Joshua 2 in the THAI

Joshua 2 in the TNFD

Joshua 2 in the TNT

Joshua 2 in the TNTIK

Joshua 2 in the TNTIL

Joshua 2 in the TNTIN

Joshua 2 in the TNTIP

Joshua 2 in the TNTIZ

Joshua 2 in the TOMA

Joshua 2 in the TTENT

Joshua 2 in the UBG

Joshua 2 in the UGV

Joshua 2 in the UGV2

Joshua 2 in the UGV3

Joshua 2 in the VBL

Joshua 2 in the VDCC

Joshua 2 in the YALU

Joshua 2 in the YAPE

Joshua 2 in the YBVTP

Joshua 2 in the ZBP