Joshua 3 (BOLCB2)

1 Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa. 2 Sima na mikolo misato, bakambi bakomaki kotambola kati na molako 3 mpo na kopesa bato mitindo oyo :— Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango. 4 Bongo bokoyeba nzela nini bokoki kolanda mpo ete nanu botambola na nzela yango te. Kasi bozala mosika na Sanduku ya Boyokani, na bametele pene nkoto moko, bopusana pene na yango te. 5 Jozue alobaki na bato :— Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino. 6 Jozue alobaki na Banganga-Nzambe :— Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato.Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato. 7 Yawe alobaki na Jozue :— Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize. 8 Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani : « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. » 9 Jozue alobaki na bana ya Isalaele :— Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino. 10 Bongo Jozue alobaki :— Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi. 11 Sanduku ya Boyokani ya Yawe ya mokili mobimba ekoleka liboso na bino kati na mayi ya Yordani. 12 Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko. 13 Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale ; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir. 14 Boye tango bato bakobima na molako mpo na kokatisa Yordani, Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Boyokani bakotambola liboso na bango. 15 Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi, 16 mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango. 17 Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.

In Other Versions

Joshua 3 in the ANGEFD

Joshua 3 in the ANTPNG2D

Joshua 3 in the AS21

Joshua 3 in the BAGH

Joshua 3 in the BBPNG

Joshua 3 in the BBT1E

Joshua 3 in the BDS

Joshua 3 in the BEV

Joshua 3 in the BHAD

Joshua 3 in the BIB

Joshua 3 in the BLPT

Joshua 3 in the BNT

Joshua 3 in the BNTABOOT

Joshua 3 in the BNTLV

Joshua 3 in the BOATCB

Joshua 3 in the BOATCB2

Joshua 3 in the BOBCV

Joshua 3 in the BOCNT

Joshua 3 in the BOECS

Joshua 3 in the BOGWICC

Joshua 3 in the BOHCB

Joshua 3 in the BOHCV

Joshua 3 in the BOHLNT

Joshua 3 in the BOHNTLTAL

Joshua 3 in the BOICB

Joshua 3 in the BOILNTAP

Joshua 3 in the BOITCV

Joshua 3 in the BOKCV

Joshua 3 in the BOKCV2

Joshua 3 in the BOKHWOG

Joshua 3 in the BOKSSV

Joshua 3 in the BOLCB

Joshua 3 in the BOMCV

Joshua 3 in the BONAV

Joshua 3 in the BONCB

Joshua 3 in the BONLT

Joshua 3 in the BONUT2

Joshua 3 in the BOPLNT

Joshua 3 in the BOSCB

Joshua 3 in the BOSNC

Joshua 3 in the BOTLNT

Joshua 3 in the BOVCB

Joshua 3 in the BOYCB

Joshua 3 in the BPBB

Joshua 3 in the BPH

Joshua 3 in the BSB

Joshua 3 in the CCB

Joshua 3 in the CUV

Joshua 3 in the CUVS

Joshua 3 in the DBT

Joshua 3 in the DGDNT

Joshua 3 in the DHNT

Joshua 3 in the DNT

Joshua 3 in the ELBE

Joshua 3 in the EMTV

Joshua 3 in the ESV

Joshua 3 in the FBV

Joshua 3 in the FEB

Joshua 3 in the GGMNT

Joshua 3 in the GNT

Joshua 3 in the HARY

Joshua 3 in the HNT

Joshua 3 in the IRVA

Joshua 3 in the IRVB

Joshua 3 in the IRVG

Joshua 3 in the IRVH

Joshua 3 in the IRVK

Joshua 3 in the IRVM

Joshua 3 in the IRVM2

Joshua 3 in the IRVO

Joshua 3 in the IRVP

Joshua 3 in the IRVT

Joshua 3 in the IRVT2

Joshua 3 in the IRVU

Joshua 3 in the ISVN

Joshua 3 in the JSNT

Joshua 3 in the KAPI

Joshua 3 in the KBT1ETNIK

Joshua 3 in the KBV

Joshua 3 in the KJV

Joshua 3 in the KNFD

Joshua 3 in the LBA

Joshua 3 in the LBLA

Joshua 3 in the LNT

Joshua 3 in the LSV

Joshua 3 in the MAAL

Joshua 3 in the MBV

Joshua 3 in the MBV2

Joshua 3 in the MHNT

Joshua 3 in the MKNFD

Joshua 3 in the MNG

Joshua 3 in the MNT

Joshua 3 in the MNT2

Joshua 3 in the MRS1T

Joshua 3 in the NAA

Joshua 3 in the NASB

Joshua 3 in the NBLA

Joshua 3 in the NBS

Joshua 3 in the NBVTP

Joshua 3 in the NET2

Joshua 3 in the NIV11

Joshua 3 in the NNT

Joshua 3 in the NNT2

Joshua 3 in the NNT3

Joshua 3 in the PDDPT

Joshua 3 in the PFNT

Joshua 3 in the RMNT

Joshua 3 in the SBIAS

Joshua 3 in the SBIBS

Joshua 3 in the SBIBS2

Joshua 3 in the SBICS

Joshua 3 in the SBIDS

Joshua 3 in the SBIGS

Joshua 3 in the SBIHS

Joshua 3 in the SBIIS

Joshua 3 in the SBIIS2

Joshua 3 in the SBIIS3

Joshua 3 in the SBIKS

Joshua 3 in the SBIKS2

Joshua 3 in the SBIMS

Joshua 3 in the SBIOS

Joshua 3 in the SBIPS

Joshua 3 in the SBISS

Joshua 3 in the SBITS

Joshua 3 in the SBITS2

Joshua 3 in the SBITS3

Joshua 3 in the SBITS4

Joshua 3 in the SBIUS

Joshua 3 in the SBIVS

Joshua 3 in the SBT

Joshua 3 in the SBT1E

Joshua 3 in the SCHL

Joshua 3 in the SNT

Joshua 3 in the SUSU

Joshua 3 in the SUSU2

Joshua 3 in the SYNO

Joshua 3 in the TBIAOTANT

Joshua 3 in the TBT1E

Joshua 3 in the TBT1E2

Joshua 3 in the TFTIP

Joshua 3 in the TFTU

Joshua 3 in the TGNTATF3T

Joshua 3 in the THAI

Joshua 3 in the TNFD

Joshua 3 in the TNT

Joshua 3 in the TNTIK

Joshua 3 in the TNTIL

Joshua 3 in the TNTIN

Joshua 3 in the TNTIP

Joshua 3 in the TNTIZ

Joshua 3 in the TOMA

Joshua 3 in the TTENT

Joshua 3 in the UBG

Joshua 3 in the UGV

Joshua 3 in the UGV2

Joshua 3 in the UGV3

Joshua 3 in the VBL

Joshua 3 in the VDCC

Joshua 3 in the YALU

Joshua 3 in the YAPE

Joshua 3 in the YBVTP

Joshua 3 in the ZBP