Leviticus 1 (BOLCB2)

1 Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani : 2 « Yebisa bana ya Isalaele :‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme. 3 Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango. 4 Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango. 5 Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 6 Bakolongola poso ya mbeka yango mpe bakokata yango na biteni. 7 Sima, bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bakopelisa moto na etumbelo mpe bakotanda bakoni likolo ya moto. 8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo. 9 Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 10 Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba. 11 Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 12 Akokata-kata mbeka yango na biteni ; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango : akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo ; 13 akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. 14 Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka. 15 Nganga-Nzambe akomema yango na etumbelo, akokata yango moto, akotumba moto yango na etumbelo mpe akosopa makila na yango zingazinga ya etumbelo. 16 Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso ; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto. 17 Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.

In Other Versions

Leviticus 1 in the ANGEFD

Leviticus 1 in the ANTPNG2D

Leviticus 1 in the AS21

Leviticus 1 in the BAGH

Leviticus 1 in the BBPNG

Leviticus 1 in the BBT1E

Leviticus 1 in the BDS

Leviticus 1 in the BEV

Leviticus 1 in the BHAD

Leviticus 1 in the BIB

Leviticus 1 in the BLPT

Leviticus 1 in the BNT

Leviticus 1 in the BNTABOOT

Leviticus 1 in the BNTLV

Leviticus 1 in the BOATCB

Leviticus 1 in the BOATCB2

Leviticus 1 in the BOBCV

Leviticus 1 in the BOCNT

Leviticus 1 in the BOECS

Leviticus 1 in the BOGWICC

Leviticus 1 in the BOHCB

Leviticus 1 in the BOHCV

Leviticus 1 in the BOHLNT

Leviticus 1 in the BOHNTLTAL

Leviticus 1 in the BOICB

Leviticus 1 in the BOILNTAP

Leviticus 1 in the BOITCV

Leviticus 1 in the BOKCV

Leviticus 1 in the BOKCV2

Leviticus 1 in the BOKHWOG

Leviticus 1 in the BOKSSV

Leviticus 1 in the BOLCB

Leviticus 1 in the BOMCV

Leviticus 1 in the BONAV

Leviticus 1 in the BONCB

Leviticus 1 in the BONLT

Leviticus 1 in the BONUT2

Leviticus 1 in the BOPLNT

Leviticus 1 in the BOSCB

Leviticus 1 in the BOSNC

Leviticus 1 in the BOTLNT

Leviticus 1 in the BOVCB

Leviticus 1 in the BOYCB

Leviticus 1 in the BPBB

Leviticus 1 in the BPH

Leviticus 1 in the BSB

Leviticus 1 in the CCB

Leviticus 1 in the CUV

Leviticus 1 in the CUVS

Leviticus 1 in the DBT

Leviticus 1 in the DGDNT

Leviticus 1 in the DHNT

Leviticus 1 in the DNT

Leviticus 1 in the ELBE

Leviticus 1 in the EMTV

Leviticus 1 in the ESV

Leviticus 1 in the FBV

Leviticus 1 in the FEB

Leviticus 1 in the GGMNT

Leviticus 1 in the GNT

Leviticus 1 in the HARY

Leviticus 1 in the HNT

Leviticus 1 in the IRVA

Leviticus 1 in the IRVB

Leviticus 1 in the IRVG

Leviticus 1 in the IRVH

Leviticus 1 in the IRVK

Leviticus 1 in the IRVM

Leviticus 1 in the IRVM2

Leviticus 1 in the IRVO

Leviticus 1 in the IRVP

Leviticus 1 in the IRVT

Leviticus 1 in the IRVT2

Leviticus 1 in the IRVU

Leviticus 1 in the ISVN

Leviticus 1 in the JSNT

Leviticus 1 in the KAPI

Leviticus 1 in the KBT1ETNIK

Leviticus 1 in the KBV

Leviticus 1 in the KJV

Leviticus 1 in the KNFD

Leviticus 1 in the LBA

Leviticus 1 in the LBLA

Leviticus 1 in the LNT

Leviticus 1 in the LSV

Leviticus 1 in the MAAL

Leviticus 1 in the MBV

Leviticus 1 in the MBV2

Leviticus 1 in the MHNT

Leviticus 1 in the MKNFD

Leviticus 1 in the MNG

Leviticus 1 in the MNT

Leviticus 1 in the MNT2

Leviticus 1 in the MRS1T

Leviticus 1 in the NAA

Leviticus 1 in the NASB

Leviticus 1 in the NBLA

Leviticus 1 in the NBS

Leviticus 1 in the NBVTP

Leviticus 1 in the NET2

Leviticus 1 in the NIV11

Leviticus 1 in the NNT

Leviticus 1 in the NNT2

Leviticus 1 in the NNT3

Leviticus 1 in the PDDPT

Leviticus 1 in the PFNT

Leviticus 1 in the RMNT

Leviticus 1 in the SBIAS

Leviticus 1 in the SBIBS

Leviticus 1 in the SBIBS2

Leviticus 1 in the SBICS

Leviticus 1 in the SBIDS

Leviticus 1 in the SBIGS

Leviticus 1 in the SBIHS

Leviticus 1 in the SBIIS

Leviticus 1 in the SBIIS2

Leviticus 1 in the SBIIS3

Leviticus 1 in the SBIKS

Leviticus 1 in the SBIKS2

Leviticus 1 in the SBIMS

Leviticus 1 in the SBIOS

Leviticus 1 in the SBIPS

Leviticus 1 in the SBISS

Leviticus 1 in the SBITS

Leviticus 1 in the SBITS2

Leviticus 1 in the SBITS3

Leviticus 1 in the SBITS4

Leviticus 1 in the SBIUS

Leviticus 1 in the SBIVS

Leviticus 1 in the SBT

Leviticus 1 in the SBT1E

Leviticus 1 in the SCHL

Leviticus 1 in the SNT

Leviticus 1 in the SUSU

Leviticus 1 in the SUSU2

Leviticus 1 in the SYNO

Leviticus 1 in the TBIAOTANT

Leviticus 1 in the TBT1E

Leviticus 1 in the TBT1E2

Leviticus 1 in the TFTIP

Leviticus 1 in the TFTU

Leviticus 1 in the TGNTATF3T

Leviticus 1 in the THAI

Leviticus 1 in the TNFD

Leviticus 1 in the TNT

Leviticus 1 in the TNTIK

Leviticus 1 in the TNTIL

Leviticus 1 in the TNTIN

Leviticus 1 in the TNTIP

Leviticus 1 in the TNTIZ

Leviticus 1 in the TOMA

Leviticus 1 in the TTENT

Leviticus 1 in the UBG

Leviticus 1 in the UGV

Leviticus 1 in the UGV2

Leviticus 1 in the UGV3

Leviticus 1 in the VBL

Leviticus 1 in the VDCC

Leviticus 1 in the YALU

Leviticus 1 in the YAPE

Leviticus 1 in the YBVTP

Leviticus 1 in the ZBP