Leviticus 21 (BOLCB2)

1 Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye, 2 longola kaka soki ezali ebembe ya mama na ye, ya tata na ye, ya mwana na ye ya mobali to ya mwana na ye ya mwasi, ya ndeko na ye ya mobali. 3 Mpo na ndeko na ye ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te, oyo azali nanu na maboko na ye awa abali nanu te ; Nganga-Nzambe akoki komikomisa mbindo. 4 Lokola azali mokambi kati na bato na ye, akoki te komikomisa mbindo ; noki te akobebisa bosantu mpe lokumu na ye. 5 Banganga-Nzambe bakoki te komikokola suki ya moto, kokata mandefu na bapembeni to kokata nzoloko na banzoto na bango. 6 Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe. 7 Banganga-Nzambe basengeli te kobala basi oyo basalaka kindumba to ba-oyo babebisa lokumu na bango na nzela ya mibali mosusu to ba-oyo babengana bango na libala. Pamba te, Banganga-Nzambe bazali basantu oyo babulisami mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. 8 Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu. 9 Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye ; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto. 10 Mokonzi ya Banganga-Nzambe azali na bokonzi likolo ya Banganga-Nzambe mosusu ; basopelaki ye mafuta ya epakolami na moto mpo na kobulisa ye, mpe asengeli kolata bilamba ya bonganga-Nzambe. Mpo na yango, asengeli te kopanza suki na ye ya moto to kopasola bilamba na ye na mokolo ya matanga. 11 Akoki te kopusana pembeni ya ebembe mpe komikomisa mbindo mpo na kufa ya tata na ye to ya mama na ye. 12 Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe. 13 Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. 14 Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba ; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. 15 Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye ; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › » 16 Yawe ayebisaki Moyize : 17 « Loba na Aron : ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. 18 Moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto akoki kopusana pembeni ya etumbelo : mokufi miso, moto oyo atambolaka tengu-tengu ; moto oyo abeba na elongi, na makolo mpe oyo maboko to makolo na ye ekokana te, 19 moto oyo abukana lokolo to loboko, 20 moto oyo azali na kunki na mokongo to oyo azali penza mokuse ; moto oyo azali na liso ekufa, na makwanza, na mapalata to oyo baboma mokongo. 21 Kati na bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, moko te oyo azali na mbeba na nzoto akopusana pembeni ya etumbelo mpo na kobonza makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Lokola azali na mbeba na nzoto na ye, akoki te kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. 22 Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule. 23 Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › » 24 Moyize alobaki makambo oyo epai ya Aron, epai ya bana na ye ya mibali, mpe epai ya bana nyonso ya Isalaele.

In Other Versions

Leviticus 21 in the ANGEFD

Leviticus 21 in the ANTPNG2D

Leviticus 21 in the AS21

Leviticus 21 in the BAGH

Leviticus 21 in the BBPNG

Leviticus 21 in the BBT1E

Leviticus 21 in the BDS

Leviticus 21 in the BEV

Leviticus 21 in the BHAD

Leviticus 21 in the BIB

Leviticus 21 in the BLPT

Leviticus 21 in the BNT

Leviticus 21 in the BNTABOOT

Leviticus 21 in the BNTLV

Leviticus 21 in the BOATCB

Leviticus 21 in the BOATCB2

Leviticus 21 in the BOBCV

Leviticus 21 in the BOCNT

Leviticus 21 in the BOECS

Leviticus 21 in the BOGWICC

Leviticus 21 in the BOHCB

Leviticus 21 in the BOHCV

Leviticus 21 in the BOHLNT

Leviticus 21 in the BOHNTLTAL

Leviticus 21 in the BOICB

Leviticus 21 in the BOILNTAP

Leviticus 21 in the BOITCV

Leviticus 21 in the BOKCV

Leviticus 21 in the BOKCV2

Leviticus 21 in the BOKHWOG

Leviticus 21 in the BOKSSV

Leviticus 21 in the BOLCB

Leviticus 21 in the BOMCV

Leviticus 21 in the BONAV

Leviticus 21 in the BONCB

Leviticus 21 in the BONLT

Leviticus 21 in the BONUT2

Leviticus 21 in the BOPLNT

Leviticus 21 in the BOSCB

Leviticus 21 in the BOSNC

Leviticus 21 in the BOTLNT

Leviticus 21 in the BOVCB

Leviticus 21 in the BOYCB

Leviticus 21 in the BPBB

Leviticus 21 in the BPH

Leviticus 21 in the BSB

Leviticus 21 in the CCB

Leviticus 21 in the CUV

Leviticus 21 in the CUVS

Leviticus 21 in the DBT

Leviticus 21 in the DGDNT

Leviticus 21 in the DHNT

Leviticus 21 in the DNT

Leviticus 21 in the ELBE

Leviticus 21 in the EMTV

Leviticus 21 in the ESV

Leviticus 21 in the FBV

Leviticus 21 in the FEB

Leviticus 21 in the GGMNT

Leviticus 21 in the GNT

Leviticus 21 in the HARY

Leviticus 21 in the HNT

Leviticus 21 in the IRVA

Leviticus 21 in the IRVB

Leviticus 21 in the IRVG

Leviticus 21 in the IRVH

Leviticus 21 in the IRVK

Leviticus 21 in the IRVM

Leviticus 21 in the IRVM2

Leviticus 21 in the IRVO

Leviticus 21 in the IRVP

Leviticus 21 in the IRVT

Leviticus 21 in the IRVT2

Leviticus 21 in the IRVU

Leviticus 21 in the ISVN

Leviticus 21 in the JSNT

Leviticus 21 in the KAPI

Leviticus 21 in the KBT1ETNIK

Leviticus 21 in the KBV

Leviticus 21 in the KJV

Leviticus 21 in the KNFD

Leviticus 21 in the LBA

Leviticus 21 in the LBLA

Leviticus 21 in the LNT

Leviticus 21 in the LSV

Leviticus 21 in the MAAL

Leviticus 21 in the MBV

Leviticus 21 in the MBV2

Leviticus 21 in the MHNT

Leviticus 21 in the MKNFD

Leviticus 21 in the MNG

Leviticus 21 in the MNT

Leviticus 21 in the MNT2

Leviticus 21 in the MRS1T

Leviticus 21 in the NAA

Leviticus 21 in the NASB

Leviticus 21 in the NBLA

Leviticus 21 in the NBS

Leviticus 21 in the NBVTP

Leviticus 21 in the NET2

Leviticus 21 in the NIV11

Leviticus 21 in the NNT

Leviticus 21 in the NNT2

Leviticus 21 in the NNT3

Leviticus 21 in the PDDPT

Leviticus 21 in the PFNT

Leviticus 21 in the RMNT

Leviticus 21 in the SBIAS

Leviticus 21 in the SBIBS

Leviticus 21 in the SBIBS2

Leviticus 21 in the SBICS

Leviticus 21 in the SBIDS

Leviticus 21 in the SBIGS

Leviticus 21 in the SBIHS

Leviticus 21 in the SBIIS

Leviticus 21 in the SBIIS2

Leviticus 21 in the SBIIS3

Leviticus 21 in the SBIKS

Leviticus 21 in the SBIKS2

Leviticus 21 in the SBIMS

Leviticus 21 in the SBIOS

Leviticus 21 in the SBIPS

Leviticus 21 in the SBISS

Leviticus 21 in the SBITS

Leviticus 21 in the SBITS2

Leviticus 21 in the SBITS3

Leviticus 21 in the SBITS4

Leviticus 21 in the SBIUS

Leviticus 21 in the SBIVS

Leviticus 21 in the SBT

Leviticus 21 in the SBT1E

Leviticus 21 in the SCHL

Leviticus 21 in the SNT

Leviticus 21 in the SUSU

Leviticus 21 in the SUSU2

Leviticus 21 in the SYNO

Leviticus 21 in the TBIAOTANT

Leviticus 21 in the TBT1E

Leviticus 21 in the TBT1E2

Leviticus 21 in the TFTIP

Leviticus 21 in the TFTU

Leviticus 21 in the TGNTATF3T

Leviticus 21 in the THAI

Leviticus 21 in the TNFD

Leviticus 21 in the TNT

Leviticus 21 in the TNTIK

Leviticus 21 in the TNTIL

Leviticus 21 in the TNTIN

Leviticus 21 in the TNTIP

Leviticus 21 in the TNTIZ

Leviticus 21 in the TOMA

Leviticus 21 in the TTENT

Leviticus 21 in the UBG

Leviticus 21 in the UGV

Leviticus 21 in the UGV2

Leviticus 21 in the UGV3

Leviticus 21 in the VBL

Leviticus 21 in the VDCC

Leviticus 21 in the YALU

Leviticus 21 in the YAPE

Leviticus 21 in the YBVTP

Leviticus 21 in the ZBP