Luke 20 (BOLCB2)

1 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ; 2 balobaki na Ye :— Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ? 3 Yesu azongisaki : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai : 4 Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? 5 Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? › 6 Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. » 7 Boye, bazongisaki :— Toyebi te epai wapi ewutaki. 8 Yesu alobaki : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango. 9 Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo : — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi. 10 Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 11 Atindaki mosali mosusu ; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. 12 Atindaki lisusu mosali ya misato ; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga. 13 Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki : « Nasala nini ? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi ; tango mosusu, bakotosa ye. » 14 Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso ! » 15 Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Nkolo elanga ya vino akosala bango nini ? 16 Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu.Tango bato bayokaki bongo, balobaki :— Te, ekoki kosalema te ! 17 Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako ? » 18 Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye. 19 Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato. 20 Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli. 21 Banongi yango batunaki Yesu :— Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. 22 Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ? 23 Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango : 24 — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ?Bazongisaki :— Ya Sezare ! 25 Yesu alobaki na bango : — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe ! 26 Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye. 27 Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo : 28 — Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. » 29 Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te. 30 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; 31 sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo : bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te. 32 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. 33 Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye ? 34 Yesu azongisaki : — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka ; 35 kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te 36 mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi. 37 Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. » 38 Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi. 39 Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki :— Moteyi, olobi malamu ! 40 Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna. 41 Yesu mpe atunaki bango : — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ? 42 Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali 43 kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › » 44 Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ? 45 Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : 46 — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ; 47 bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.

In Other Versions

Luke 20 in the ANGEFD

Luke 20 in the ANTPNG2D

Luke 20 in the AS21

Luke 20 in the BAGH

Luke 20 in the BBPNG

Luke 20 in the BBT1E

Luke 20 in the BDS

Luke 20 in the BEV

Luke 20 in the BHAD

Luke 20 in the BIB

Luke 20 in the BLPT

Luke 20 in the BNT

Luke 20 in the BNTABOOT

Luke 20 in the BNTLV

Luke 20 in the BOATCB

Luke 20 in the BOATCB2

Luke 20 in the BOBCV

Luke 20 in the BOCNT

Luke 20 in the BOECS

Luke 20 in the BOGWICC

Luke 20 in the BOHCB

Luke 20 in the BOHCV

Luke 20 in the BOHLNT

Luke 20 in the BOHNTLTAL

Luke 20 in the BOICB

Luke 20 in the BOILNTAP

Luke 20 in the BOITCV

Luke 20 in the BOKCV

Luke 20 in the BOKCV2

Luke 20 in the BOKHWOG

Luke 20 in the BOKSSV

Luke 20 in the BOLCB

Luke 20 in the BOMCV

Luke 20 in the BONAV

Luke 20 in the BONCB

Luke 20 in the BONLT

Luke 20 in the BONUT2

Luke 20 in the BOPLNT

Luke 20 in the BOSCB

Luke 20 in the BOSNC

Luke 20 in the BOTLNT

Luke 20 in the BOVCB

Luke 20 in the BOYCB

Luke 20 in the BPBB

Luke 20 in the BPH

Luke 20 in the BSB

Luke 20 in the CCB

Luke 20 in the CUV

Luke 20 in the CUVS

Luke 20 in the DBT

Luke 20 in the DGDNT

Luke 20 in the DHNT

Luke 20 in the DNT

Luke 20 in the ELBE

Luke 20 in the EMTV

Luke 20 in the ESV

Luke 20 in the FBV

Luke 20 in the FEB

Luke 20 in the GGMNT

Luke 20 in the GNT

Luke 20 in the HARY

Luke 20 in the HNT

Luke 20 in the IRVA

Luke 20 in the IRVB

Luke 20 in the IRVG

Luke 20 in the IRVH

Luke 20 in the IRVK

Luke 20 in the IRVM

Luke 20 in the IRVM2

Luke 20 in the IRVO

Luke 20 in the IRVP

Luke 20 in the IRVT

Luke 20 in the IRVT2

Luke 20 in the IRVU

Luke 20 in the ISVN

Luke 20 in the JSNT

Luke 20 in the KAPI

Luke 20 in the KBT1ETNIK

Luke 20 in the KBV

Luke 20 in the KJV

Luke 20 in the KNFD

Luke 20 in the LBA

Luke 20 in the LBLA

Luke 20 in the LNT

Luke 20 in the LSV

Luke 20 in the MAAL

Luke 20 in the MBV

Luke 20 in the MBV2

Luke 20 in the MHNT

Luke 20 in the MKNFD

Luke 20 in the MNG

Luke 20 in the MNT

Luke 20 in the MNT2

Luke 20 in the MRS1T

Luke 20 in the NAA

Luke 20 in the NASB

Luke 20 in the NBLA

Luke 20 in the NBS

Luke 20 in the NBVTP

Luke 20 in the NET2

Luke 20 in the NIV11

Luke 20 in the NNT

Luke 20 in the NNT2

Luke 20 in the NNT3

Luke 20 in the PDDPT

Luke 20 in the PFNT

Luke 20 in the RMNT

Luke 20 in the SBIAS

Luke 20 in the SBIBS

Luke 20 in the SBIBS2

Luke 20 in the SBICS

Luke 20 in the SBIDS

Luke 20 in the SBIGS

Luke 20 in the SBIHS

Luke 20 in the SBIIS

Luke 20 in the SBIIS2

Luke 20 in the SBIIS3

Luke 20 in the SBIKS

Luke 20 in the SBIKS2

Luke 20 in the SBIMS

Luke 20 in the SBIOS

Luke 20 in the SBIPS

Luke 20 in the SBISS

Luke 20 in the SBITS

Luke 20 in the SBITS2

Luke 20 in the SBITS3

Luke 20 in the SBITS4

Luke 20 in the SBIUS

Luke 20 in the SBIVS

Luke 20 in the SBT

Luke 20 in the SBT1E

Luke 20 in the SCHL

Luke 20 in the SNT

Luke 20 in the SUSU

Luke 20 in the SUSU2

Luke 20 in the SYNO

Luke 20 in the TBIAOTANT

Luke 20 in the TBT1E

Luke 20 in the TBT1E2

Luke 20 in the TFTIP

Luke 20 in the TFTU

Luke 20 in the TGNTATF3T

Luke 20 in the THAI

Luke 20 in the TNFD

Luke 20 in the TNT

Luke 20 in the TNTIK

Luke 20 in the TNTIL

Luke 20 in the TNTIN

Luke 20 in the TNTIP

Luke 20 in the TNTIZ

Luke 20 in the TOMA

Luke 20 in the TTENT

Luke 20 in the UBG

Luke 20 in the UGV

Luke 20 in the UGV2

Luke 20 in the UGV3

Luke 20 in the VBL

Luke 20 in the VDCC

Luke 20 in the YALU

Luke 20 in the YAPE

Luke 20 in the YBVTP

Luke 20 in the ZBP