Matthew 21 (BOLCB2)

1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale. 2 Alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango. 3 Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende. 4 Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama : 5 « Boloba na Siona, mboka kitoko :‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo,atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi,na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyamaoyo ememaka mikumba. › » 6 Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango. 7 Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. 8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela. 9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga :« Ozana na Mwana na Davidi !Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! » 10 Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna :— Oyo lisusu nani ? 11 Bato bazalaki kozongisa :— Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile ! 12 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga. 13 Alobaki na bango : — Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo ; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi ! 14 Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango. 15 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! » 16 Balobaki na Yesu :— Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ?Yesu azongiselaki bango : — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te : « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana oyo bazali nanu komela mabele, ozwaki lokumu na Yo ? » 17 Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu. 18 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala. 19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela.Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. 20 Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki :— Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko ? 21 Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo. 22 Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo. 23 Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki :— Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ? 24 Yesu azongiselaki bango : — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Soki kaka bopesi Ngai eyano, nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango. 25 Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?Bakomaki kokabola makanisi bango na bango :— Soki tolobi : « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu : « Bongo mpo na nini bondimaki ye te ? » 26 Soki mpe tolobi : « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli. 27 Boye, bazongiselaki Yesu :— Toyebi te !Yesu mpe alobaki na bango : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango. 28 Yesu alobaki na bango lisusu : — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo ? Moto moko azalaki na bana mibali mibale ; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye : « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. » 29 Mwana azongisaki : « Naboyi. » Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango. 30 Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki : « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi ! » Kasi akendeki te. 31 Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ?Bazongisaki :— Mwana ya liboso.Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino, 32 pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te. 33 Boyoka lisese mosusu : Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo. 34 Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye ; 35 kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga. 36 Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso ; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso. 37 Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai ! » 38 Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! » 39 Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. 40 Tango nkolo elanga ya vino akoya, akosala bafuteli elanga wana nini ? 41 Bazongisaki :— Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango. 42 Yesu alobaki na bango : — Nanu botanga te kati na Makomi : « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba ? Nkolo asalaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. » 43 Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [ 44 Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.] 45 Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango. 46 Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli.

In Other Versions

Matthew 21 in the ANGEFD

Matthew 21 in the ANTPNG2D

Matthew 21 in the AS21

Matthew 21 in the BAGH

Matthew 21 in the BBPNG

Matthew 21 in the BBT1E

Matthew 21 in the BDS

Matthew 21 in the BEV

Matthew 21 in the BHAD

Matthew 21 in the BIB

Matthew 21 in the BLPT

Matthew 21 in the BNT

Matthew 21 in the BNTABOOT

Matthew 21 in the BNTLV

Matthew 21 in the BOATCB

Matthew 21 in the BOATCB2

Matthew 21 in the BOBCV

Matthew 21 in the BOCNT

Matthew 21 in the BOECS

Matthew 21 in the BOGWICC

Matthew 21 in the BOHCB

Matthew 21 in the BOHCV

Matthew 21 in the BOHLNT

Matthew 21 in the BOHNTLTAL

Matthew 21 in the BOICB

Matthew 21 in the BOILNTAP

Matthew 21 in the BOITCV

Matthew 21 in the BOKCV

Matthew 21 in the BOKCV2

Matthew 21 in the BOKHWOG

Matthew 21 in the BOKSSV

Matthew 21 in the BOLCB

Matthew 21 in the BOMCV

Matthew 21 in the BONAV

Matthew 21 in the BONCB

Matthew 21 in the BONLT

Matthew 21 in the BONUT2

Matthew 21 in the BOPLNT

Matthew 21 in the BOSCB

Matthew 21 in the BOSNC

Matthew 21 in the BOTLNT

Matthew 21 in the BOVCB

Matthew 21 in the BOYCB

Matthew 21 in the BPBB

Matthew 21 in the BPH

Matthew 21 in the BSB

Matthew 21 in the CCB

Matthew 21 in the CUV

Matthew 21 in the CUVS

Matthew 21 in the DBT

Matthew 21 in the DGDNT

Matthew 21 in the DHNT

Matthew 21 in the DNT

Matthew 21 in the ELBE

Matthew 21 in the EMTV

Matthew 21 in the ESV

Matthew 21 in the FBV

Matthew 21 in the FEB

Matthew 21 in the GGMNT

Matthew 21 in the GNT

Matthew 21 in the HARY

Matthew 21 in the HNT

Matthew 21 in the IRVA

Matthew 21 in the IRVB

Matthew 21 in the IRVG

Matthew 21 in the IRVH

Matthew 21 in the IRVK

Matthew 21 in the IRVM

Matthew 21 in the IRVM2

Matthew 21 in the IRVO

Matthew 21 in the IRVP

Matthew 21 in the IRVT

Matthew 21 in the IRVT2

Matthew 21 in the IRVU

Matthew 21 in the ISVN

Matthew 21 in the JSNT

Matthew 21 in the KAPI

Matthew 21 in the KBT1ETNIK

Matthew 21 in the KBV

Matthew 21 in the KJV

Matthew 21 in the KNFD

Matthew 21 in the LBA

Matthew 21 in the LBLA

Matthew 21 in the LNT

Matthew 21 in the LSV

Matthew 21 in the MAAL

Matthew 21 in the MBV

Matthew 21 in the MBV2

Matthew 21 in the MHNT

Matthew 21 in the MKNFD

Matthew 21 in the MNG

Matthew 21 in the MNT

Matthew 21 in the MNT2

Matthew 21 in the MRS1T

Matthew 21 in the NAA

Matthew 21 in the NASB

Matthew 21 in the NBLA

Matthew 21 in the NBS

Matthew 21 in the NBVTP

Matthew 21 in the NET2

Matthew 21 in the NIV11

Matthew 21 in the NNT

Matthew 21 in the NNT2

Matthew 21 in the NNT3

Matthew 21 in the PDDPT

Matthew 21 in the PFNT

Matthew 21 in the RMNT

Matthew 21 in the SBIAS

Matthew 21 in the SBIBS

Matthew 21 in the SBIBS2

Matthew 21 in the SBICS

Matthew 21 in the SBIDS

Matthew 21 in the SBIGS

Matthew 21 in the SBIHS

Matthew 21 in the SBIIS

Matthew 21 in the SBIIS2

Matthew 21 in the SBIIS3

Matthew 21 in the SBIKS

Matthew 21 in the SBIKS2

Matthew 21 in the SBIMS

Matthew 21 in the SBIOS

Matthew 21 in the SBIPS

Matthew 21 in the SBISS

Matthew 21 in the SBITS

Matthew 21 in the SBITS2

Matthew 21 in the SBITS3

Matthew 21 in the SBITS4

Matthew 21 in the SBIUS

Matthew 21 in the SBIVS

Matthew 21 in the SBT

Matthew 21 in the SBT1E

Matthew 21 in the SCHL

Matthew 21 in the SNT

Matthew 21 in the SUSU

Matthew 21 in the SUSU2

Matthew 21 in the SYNO

Matthew 21 in the TBIAOTANT

Matthew 21 in the TBT1E

Matthew 21 in the TBT1E2

Matthew 21 in the TFTIP

Matthew 21 in the TFTU

Matthew 21 in the TGNTATF3T

Matthew 21 in the THAI

Matthew 21 in the TNFD

Matthew 21 in the TNT

Matthew 21 in the TNTIK

Matthew 21 in the TNTIL

Matthew 21 in the TNTIN

Matthew 21 in the TNTIP

Matthew 21 in the TNTIZ

Matthew 21 in the TOMA

Matthew 21 in the TTENT

Matthew 21 in the UBG

Matthew 21 in the UGV

Matthew 21 in the UGV2

Matthew 21 in the UGV3

Matthew 21 in the VBL

Matthew 21 in the VDCC

Matthew 21 in the YALU

Matthew 21 in the YAPE

Matthew 21 in the YBVTP

Matthew 21 in the ZBP