Matthew 24 (BOLCB2)

1 Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo. 2 Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu. 3 Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :— Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ? 4 Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moto moko te akosa bino ! 5 Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele. 6 Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te. 7 Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai. 8 Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota. 9 Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino ; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai. 10 Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango. 11 Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele. 12 Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita. 13 Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika. 14 Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya. 15 Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— 16 wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; 17 tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye, 18 mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye ! 19 Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! 20 Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba. 21 Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te. 22 Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke. 23 Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te. 24 Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema. 25 Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba ! 26 Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te. 27 Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala. 28 Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana. 29 Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. » 30 Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene. 31 Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu. 32 Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene. 33 Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba. 34 Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema. 35 Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te. 36 Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango. 37 Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ; 38 pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; 39 bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto. 40 Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; 41 basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala. 42 Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya. 43 Bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye. 44 Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te. 45 Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ? 46 Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo. 47 Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso. 48 Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » 49 mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga, 50 nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te ; 51 akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.

In Other Versions

Matthew 24 in the ANGEFD

Matthew 24 in the ANTPNG2D

Matthew 24 in the AS21

Matthew 24 in the BAGH

Matthew 24 in the BBPNG

Matthew 24 in the BBT1E

Matthew 24 in the BDS

Matthew 24 in the BEV

Matthew 24 in the BHAD

Matthew 24 in the BIB

Matthew 24 in the BLPT

Matthew 24 in the BNT

Matthew 24 in the BNTABOOT

Matthew 24 in the BNTLV

Matthew 24 in the BOATCB

Matthew 24 in the BOATCB2

Matthew 24 in the BOBCV

Matthew 24 in the BOCNT

Matthew 24 in the BOECS

Matthew 24 in the BOGWICC

Matthew 24 in the BOHCB

Matthew 24 in the BOHCV

Matthew 24 in the BOHLNT

Matthew 24 in the BOHNTLTAL

Matthew 24 in the BOICB

Matthew 24 in the BOILNTAP

Matthew 24 in the BOITCV

Matthew 24 in the BOKCV

Matthew 24 in the BOKCV2

Matthew 24 in the BOKHWOG

Matthew 24 in the BOKSSV

Matthew 24 in the BOLCB

Matthew 24 in the BOMCV

Matthew 24 in the BONAV

Matthew 24 in the BONCB

Matthew 24 in the BONLT

Matthew 24 in the BONUT2

Matthew 24 in the BOPLNT

Matthew 24 in the BOSCB

Matthew 24 in the BOSNC

Matthew 24 in the BOTLNT

Matthew 24 in the BOVCB

Matthew 24 in the BOYCB

Matthew 24 in the BPBB

Matthew 24 in the BPH

Matthew 24 in the BSB

Matthew 24 in the CCB

Matthew 24 in the CUV

Matthew 24 in the CUVS

Matthew 24 in the DBT

Matthew 24 in the DGDNT

Matthew 24 in the DHNT

Matthew 24 in the DNT

Matthew 24 in the ELBE

Matthew 24 in the EMTV

Matthew 24 in the ESV

Matthew 24 in the FBV

Matthew 24 in the FEB

Matthew 24 in the GGMNT

Matthew 24 in the GNT

Matthew 24 in the HARY

Matthew 24 in the HNT

Matthew 24 in the IRVA

Matthew 24 in the IRVB

Matthew 24 in the IRVG

Matthew 24 in the IRVH

Matthew 24 in the IRVK

Matthew 24 in the IRVM

Matthew 24 in the IRVM2

Matthew 24 in the IRVO

Matthew 24 in the IRVP

Matthew 24 in the IRVT

Matthew 24 in the IRVT2

Matthew 24 in the IRVU

Matthew 24 in the ISVN

Matthew 24 in the JSNT

Matthew 24 in the KAPI

Matthew 24 in the KBT1ETNIK

Matthew 24 in the KBV

Matthew 24 in the KJV

Matthew 24 in the KNFD

Matthew 24 in the LBA

Matthew 24 in the LBLA

Matthew 24 in the LNT

Matthew 24 in the LSV

Matthew 24 in the MAAL

Matthew 24 in the MBV

Matthew 24 in the MBV2

Matthew 24 in the MHNT

Matthew 24 in the MKNFD

Matthew 24 in the MNG

Matthew 24 in the MNT

Matthew 24 in the MNT2

Matthew 24 in the MRS1T

Matthew 24 in the NAA

Matthew 24 in the NASB

Matthew 24 in the NBLA

Matthew 24 in the NBS

Matthew 24 in the NBVTP

Matthew 24 in the NET2

Matthew 24 in the NIV11

Matthew 24 in the NNT

Matthew 24 in the NNT2

Matthew 24 in the NNT3

Matthew 24 in the PDDPT

Matthew 24 in the PFNT

Matthew 24 in the RMNT

Matthew 24 in the SBIAS

Matthew 24 in the SBIBS

Matthew 24 in the SBIBS2

Matthew 24 in the SBICS

Matthew 24 in the SBIDS

Matthew 24 in the SBIGS

Matthew 24 in the SBIHS

Matthew 24 in the SBIIS

Matthew 24 in the SBIIS2

Matthew 24 in the SBIIS3

Matthew 24 in the SBIKS

Matthew 24 in the SBIKS2

Matthew 24 in the SBIMS

Matthew 24 in the SBIOS

Matthew 24 in the SBIPS

Matthew 24 in the SBISS

Matthew 24 in the SBITS

Matthew 24 in the SBITS2

Matthew 24 in the SBITS3

Matthew 24 in the SBITS4

Matthew 24 in the SBIUS

Matthew 24 in the SBIVS

Matthew 24 in the SBT

Matthew 24 in the SBT1E

Matthew 24 in the SCHL

Matthew 24 in the SNT

Matthew 24 in the SUSU

Matthew 24 in the SUSU2

Matthew 24 in the SYNO

Matthew 24 in the TBIAOTANT

Matthew 24 in the TBT1E

Matthew 24 in the TBT1E2

Matthew 24 in the TFTIP

Matthew 24 in the TFTU

Matthew 24 in the TGNTATF3T

Matthew 24 in the THAI

Matthew 24 in the TNFD

Matthew 24 in the TNT

Matthew 24 in the TNTIK

Matthew 24 in the TNTIL

Matthew 24 in the TNTIN

Matthew 24 in the TNTIP

Matthew 24 in the TNTIZ

Matthew 24 in the TOMA

Matthew 24 in the TTENT

Matthew 24 in the UBG

Matthew 24 in the UGV

Matthew 24 in the UGV2

Matthew 24 in the UGV3

Matthew 24 in the VBL

Matthew 24 in the VDCC

Matthew 24 in the YALU

Matthew 24 in the YAPE

Matthew 24 in the YBVTP

Matthew 24 in the ZBP