Matthew 4 (BOLCB2)
1 Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye. 2 Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala. 3 Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye :— Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa. 4 Yesu azongisaki : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. » 5 Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo 6 mpe alobaki na Ye :— Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama :« Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo,mpe bakomema yo na maboko na bangompo ete lokolo na yo etutana na libanga te. » 7 Yesu azongiselaki ye : — Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. » 8 Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ; 9 alobaki na Ye :— Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai. 10 Yesu alobaki na ye : — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. » 11 Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei. 12 Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile. 13 Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali, 14 mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : 15 « Mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali,nzela ya ebale monene, pembeni ya Yordani,Galile ya bapagano, 16 bato oyo bazalaki kovanda kati na molilibamoni pole makasi ;ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi,pole ebimeli bango. » 17 Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! » 18 Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. 19 Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. » 20 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. 21 Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ; 22 mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu. 23 Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso. 24 Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango. 25 Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye ; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.
In Other Versions
Matthew 4 in the ANGEFD
Matthew 4 in the ANTPNG2D
Matthew 4 in the AS21
Matthew 4 in the BAGH
Matthew 4 in the BBPNG
Matthew 4 in the BBT1E
Matthew 4 in the BDS
Matthew 4 in the BEV
Matthew 4 in the BHAD
Matthew 4 in the BIB
Matthew 4 in the BLPT
Matthew 4 in the BNT
Matthew 4 in the BNTABOOT
Matthew 4 in the BNTLV
Matthew 4 in the BOATCB
Matthew 4 in the BOATCB2
Matthew 4 in the BOBCV
Matthew 4 in the BOCNT
Matthew 4 in the BOECS
Matthew 4 in the BOGWICC
Matthew 4 in the BOHCB
Matthew 4 in the BOHCV
Matthew 4 in the BOHLNT
Matthew 4 in the BOHNTLTAL
Matthew 4 in the BOICB
Matthew 4 in the BOILNTAP
Matthew 4 in the BOITCV
Matthew 4 in the BOKCV
Matthew 4 in the BOKCV2
Matthew 4 in the BOKHWOG
Matthew 4 in the BOKSSV
Matthew 4 in the BOLCB
Matthew 4 in the BOMCV
Matthew 4 in the BONAV
Matthew 4 in the BONCB
Matthew 4 in the BONLT
Matthew 4 in the BONUT2
Matthew 4 in the BOPLNT
Matthew 4 in the BOSCB
Matthew 4 in the BOSNC
Matthew 4 in the BOTLNT
Matthew 4 in the BOVCB
Matthew 4 in the BOYCB
Matthew 4 in the BPBB
Matthew 4 in the BPH
Matthew 4 in the BSB
Matthew 4 in the CCB
Matthew 4 in the CUV
Matthew 4 in the CUVS
Matthew 4 in the DBT
Matthew 4 in the DGDNT
Matthew 4 in the DHNT
Matthew 4 in the DNT
Matthew 4 in the ELBE
Matthew 4 in the EMTV
Matthew 4 in the ESV
Matthew 4 in the FBV
Matthew 4 in the FEB
Matthew 4 in the GGMNT
Matthew 4 in the GNT
Matthew 4 in the HARY
Matthew 4 in the HNT
Matthew 4 in the IRVA
Matthew 4 in the IRVB
Matthew 4 in the IRVG
Matthew 4 in the IRVH
Matthew 4 in the IRVK
Matthew 4 in the IRVM
Matthew 4 in the IRVM2
Matthew 4 in the IRVO
Matthew 4 in the IRVP
Matthew 4 in the IRVT
Matthew 4 in the IRVT2
Matthew 4 in the IRVU
Matthew 4 in the ISVN
Matthew 4 in the JSNT
Matthew 4 in the KAPI
Matthew 4 in the KBT1ETNIK
Matthew 4 in the KBV
Matthew 4 in the KJV
Matthew 4 in the KNFD
Matthew 4 in the LBA
Matthew 4 in the LBLA
Matthew 4 in the LNT
Matthew 4 in the LSV
Matthew 4 in the MAAL
Matthew 4 in the MBV
Matthew 4 in the MBV2
Matthew 4 in the MHNT
Matthew 4 in the MKNFD
Matthew 4 in the MNG
Matthew 4 in the MNT
Matthew 4 in the MNT2
Matthew 4 in the MRS1T
Matthew 4 in the NAA
Matthew 4 in the NASB
Matthew 4 in the NBLA
Matthew 4 in the NBS
Matthew 4 in the NBVTP
Matthew 4 in the NET2
Matthew 4 in the NIV11
Matthew 4 in the NNT
Matthew 4 in the NNT2
Matthew 4 in the NNT3
Matthew 4 in the PDDPT
Matthew 4 in the PFNT
Matthew 4 in the RMNT
Matthew 4 in the SBIAS
Matthew 4 in the SBIBS
Matthew 4 in the SBIBS2
Matthew 4 in the SBICS
Matthew 4 in the SBIDS
Matthew 4 in the SBIGS
Matthew 4 in the SBIHS
Matthew 4 in the SBIIS
Matthew 4 in the SBIIS2
Matthew 4 in the SBIIS3
Matthew 4 in the SBIKS
Matthew 4 in the SBIKS2
Matthew 4 in the SBIMS
Matthew 4 in the SBIOS
Matthew 4 in the SBIPS
Matthew 4 in the SBISS
Matthew 4 in the SBITS
Matthew 4 in the SBITS2
Matthew 4 in the SBITS3
Matthew 4 in the SBITS4
Matthew 4 in the SBIUS
Matthew 4 in the SBIVS
Matthew 4 in the SBT
Matthew 4 in the SBT1E
Matthew 4 in the SCHL
Matthew 4 in the SNT
Matthew 4 in the SUSU
Matthew 4 in the SUSU2
Matthew 4 in the SYNO
Matthew 4 in the TBIAOTANT
Matthew 4 in the TBT1E
Matthew 4 in the TBT1E2
Matthew 4 in the TFTIP
Matthew 4 in the TFTU
Matthew 4 in the TGNTATF3T
Matthew 4 in the THAI
Matthew 4 in the TNFD
Matthew 4 in the TNT
Matthew 4 in the TNTIK
Matthew 4 in the TNTIL
Matthew 4 in the TNTIN
Matthew 4 in the TNTIP
Matthew 4 in the TNTIZ
Matthew 4 in the TOMA
Matthew 4 in the TTENT
Matthew 4 in the UBG
Matthew 4 in the UGV
Matthew 4 in the UGV2
Matthew 4 in the UGV3
Matthew 4 in the VBL
Matthew 4 in the VDCC
Matthew 4 in the YALU
Matthew 4 in the YAPE
Matthew 4 in the YBVTP
Matthew 4 in the ZBP