Nehemiah 2 (BOLCB2)

1 Na sanza ya Nisani, na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, lokola vino ezalaki liboso ya mokonzi, nazwaki vino mpe napesaki ye mpo ete amela. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kozala mawa-mawa liboso ya mokonzi. 2 Boye mokonzi atunaki ngai :— Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ?Nabangaki makasi ; 3 kasi nazongiselaki mokonzi :— Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ? 4 Mokonzi atunaki ngai :— Olingi nini ?Nasambelaki Nzambe ya Likolo, 5 mpe nazongiselaki mokonzi :— Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu. 6 Mokonzi, oyo mwasi na ye avandaki pembeni na ye, atunaki ngai :— Mobembo na yo ekosala mikolo boni mpe okozonga tango nini.Esepelisaki mokonzi kotinda ngai ; mpe nakataki tango oyo mobembo yango ekokaki kosala. 7 Nalobaki na ye lisusu :— Soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi apesa ngai mikanda mpo na bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpo ete batika ngai koleka kino nakokoma kati na Yuda ; 8 mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda.Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango. 9 Nakendeki epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki lisusu bakonzi ya basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpo ete bazala elongo na ngai. 10 Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. 11 Nakomaki na Yelusalemi mpe, sima na ngai kosala kuna mikolo misato, 12 nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango. 13 Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto. 14 Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka. 15 Namataki wuta na lubwaku, kaka na butu, mpo na kokoba kotala malamu-malamu mir. Nabalukaki mpe nazongelaki na nzela ya Ekuke ya Lubwaku. 16 Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala ; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala. 17 Bongo nalobaki na bango :— Bozali komona pasi oyo tozali na yango ! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo ! 18 Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki :— Totelema mpe totonga !Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango. 19 Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki :— Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ? 20 Nazongiselaki bango :— Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino !

In Other Versions

Nehemiah 2 in the ANGEFD

Nehemiah 2 in the ANTPNG2D

Nehemiah 2 in the AS21

Nehemiah 2 in the BAGH

Nehemiah 2 in the BBPNG

Nehemiah 2 in the BBT1E

Nehemiah 2 in the BDS

Nehemiah 2 in the BEV

Nehemiah 2 in the BHAD

Nehemiah 2 in the BIB

Nehemiah 2 in the BLPT

Nehemiah 2 in the BNT

Nehemiah 2 in the BNTABOOT

Nehemiah 2 in the BNTLV

Nehemiah 2 in the BOATCB

Nehemiah 2 in the BOATCB2

Nehemiah 2 in the BOBCV

Nehemiah 2 in the BOCNT

Nehemiah 2 in the BOECS

Nehemiah 2 in the BOGWICC

Nehemiah 2 in the BOHCB

Nehemiah 2 in the BOHCV

Nehemiah 2 in the BOHLNT

Nehemiah 2 in the BOHNTLTAL

Nehemiah 2 in the BOICB

Nehemiah 2 in the BOILNTAP

Nehemiah 2 in the BOITCV

Nehemiah 2 in the BOKCV

Nehemiah 2 in the BOKCV2

Nehemiah 2 in the BOKHWOG

Nehemiah 2 in the BOKSSV

Nehemiah 2 in the BOLCB

Nehemiah 2 in the BOMCV

Nehemiah 2 in the BONAV

Nehemiah 2 in the BONCB

Nehemiah 2 in the BONLT

Nehemiah 2 in the BONUT2

Nehemiah 2 in the BOPLNT

Nehemiah 2 in the BOSCB

Nehemiah 2 in the BOSNC

Nehemiah 2 in the BOTLNT

Nehemiah 2 in the BOVCB

Nehemiah 2 in the BOYCB

Nehemiah 2 in the BPBB

Nehemiah 2 in the BPH

Nehemiah 2 in the BSB

Nehemiah 2 in the CCB

Nehemiah 2 in the CUV

Nehemiah 2 in the CUVS

Nehemiah 2 in the DBT

Nehemiah 2 in the DGDNT

Nehemiah 2 in the DHNT

Nehemiah 2 in the DNT

Nehemiah 2 in the ELBE

Nehemiah 2 in the EMTV

Nehemiah 2 in the ESV

Nehemiah 2 in the FBV

Nehemiah 2 in the FEB

Nehemiah 2 in the GGMNT

Nehemiah 2 in the GNT

Nehemiah 2 in the HARY

Nehemiah 2 in the HNT

Nehemiah 2 in the IRVA

Nehemiah 2 in the IRVB

Nehemiah 2 in the IRVG

Nehemiah 2 in the IRVH

Nehemiah 2 in the IRVK

Nehemiah 2 in the IRVM

Nehemiah 2 in the IRVM2

Nehemiah 2 in the IRVO

Nehemiah 2 in the IRVP

Nehemiah 2 in the IRVT

Nehemiah 2 in the IRVT2

Nehemiah 2 in the IRVU

Nehemiah 2 in the ISVN

Nehemiah 2 in the JSNT

Nehemiah 2 in the KAPI

Nehemiah 2 in the KBT1ETNIK

Nehemiah 2 in the KBV

Nehemiah 2 in the KJV

Nehemiah 2 in the KNFD

Nehemiah 2 in the LBA

Nehemiah 2 in the LBLA

Nehemiah 2 in the LNT

Nehemiah 2 in the LSV

Nehemiah 2 in the MAAL

Nehemiah 2 in the MBV

Nehemiah 2 in the MBV2

Nehemiah 2 in the MHNT

Nehemiah 2 in the MKNFD

Nehemiah 2 in the MNG

Nehemiah 2 in the MNT

Nehemiah 2 in the MNT2

Nehemiah 2 in the MRS1T

Nehemiah 2 in the NAA

Nehemiah 2 in the NASB

Nehemiah 2 in the NBLA

Nehemiah 2 in the NBS

Nehemiah 2 in the NBVTP

Nehemiah 2 in the NET2

Nehemiah 2 in the NIV11

Nehemiah 2 in the NNT

Nehemiah 2 in the NNT2

Nehemiah 2 in the NNT3

Nehemiah 2 in the PDDPT

Nehemiah 2 in the PFNT

Nehemiah 2 in the RMNT

Nehemiah 2 in the SBIAS

Nehemiah 2 in the SBIBS

Nehemiah 2 in the SBIBS2

Nehemiah 2 in the SBICS

Nehemiah 2 in the SBIDS

Nehemiah 2 in the SBIGS

Nehemiah 2 in the SBIHS

Nehemiah 2 in the SBIIS

Nehemiah 2 in the SBIIS2

Nehemiah 2 in the SBIIS3

Nehemiah 2 in the SBIKS

Nehemiah 2 in the SBIKS2

Nehemiah 2 in the SBIMS

Nehemiah 2 in the SBIOS

Nehemiah 2 in the SBIPS

Nehemiah 2 in the SBISS

Nehemiah 2 in the SBITS

Nehemiah 2 in the SBITS2

Nehemiah 2 in the SBITS3

Nehemiah 2 in the SBITS4

Nehemiah 2 in the SBIUS

Nehemiah 2 in the SBIVS

Nehemiah 2 in the SBT

Nehemiah 2 in the SBT1E

Nehemiah 2 in the SCHL

Nehemiah 2 in the SNT

Nehemiah 2 in the SUSU

Nehemiah 2 in the SUSU2

Nehemiah 2 in the SYNO

Nehemiah 2 in the TBIAOTANT

Nehemiah 2 in the TBT1E

Nehemiah 2 in the TBT1E2

Nehemiah 2 in the TFTIP

Nehemiah 2 in the TFTU

Nehemiah 2 in the TGNTATF3T

Nehemiah 2 in the THAI

Nehemiah 2 in the TNFD

Nehemiah 2 in the TNT

Nehemiah 2 in the TNTIK

Nehemiah 2 in the TNTIL

Nehemiah 2 in the TNTIN

Nehemiah 2 in the TNTIP

Nehemiah 2 in the TNTIZ

Nehemiah 2 in the TOMA

Nehemiah 2 in the TTENT

Nehemiah 2 in the UBG

Nehemiah 2 in the UGV

Nehemiah 2 in the UGV2

Nehemiah 2 in the UGV3

Nehemiah 2 in the VBL

Nehemiah 2 in the VDCC

Nehemiah 2 in the YALU

Nehemiah 2 in the YAPE

Nehemiah 2 in the YBVTP

Nehemiah 2 in the ZBP