Nehemiah 3 (BOLCB2)

1 Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli. 2 Bato ya Jeriko babongisaki eteni ya mir oyo ekanganaki na yango ; mpe Zakuri, mwana mobali ya Imiri, atongaki pene na bango. 3 Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi ; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango. 4 Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango. 5 Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala. 6 Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. 7 Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango. 8 Uzieli, mwana mobali ya Araya, moko kati na banyangwisi bibende na moto, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Bongo Anania, moko kati na basali oyo basalaka malasi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo elandaki. Babongisaki mir ya Yelusalemi kino na esika ya mir monene. 9 Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. 10 Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye. 11 Malikiya, mwana mobali ya Arimi, mpe Ashubi, mwana mobali ya Paati-Moabi, babongisaki eteni mosusu ya mir mpe ndako molayi ya Fulu. 12 Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki. 13 Anuni mpe bavandi ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lubwaku. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Babongisaki lisusu bametele pene nkama mitano ya mir kino na Ekuke ya Fulu. 14 Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. 15 Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba ; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi. 16 Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi. 17 Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye. 18 Bandeko na ye batongaki pembeni na ye, na bokambami ya Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, mokambi ya ndambo mosusu ya etuka ya Keila. 19 Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana. 20 Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe. 21 Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango. 22 Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye. 23 Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye. 24 Pene na ye, Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika oyo bamir ekutana mpe kino na songe. 25 Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi, 26 elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi. 27 Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli. 28 Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye. 29 Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye. 30 Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye. 31 Pene na Meshulami, Malikiya, moko kati na basali oyo banyangwisaka bibende na moto, abongisaki eteni na ye kino na ndako ya basali ya Tempelo mpe ya bato ya mombongo. Eteni yango etalani na Ekuke ya Kokengela mpe kino na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutana. 32 Bongo banyangwisi bibende na moto mpe bato ya mombongo babongisaki longwa na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutani, kino na Ekuke ya Bibwele. 33 Tango Sanibala ayokaki ete tozali kotonga lisusu mir, asepelaki ata moke te mpe atombokaki makasi. Akomaki kotiola Bayuda 34 mpe koloba liboso ya baninga na ye mpe ya mampinga ya Samari :— Bayuda oyo balemba-lemba boye bazali kosala nini ? Bakanisi ete bakotelemisa lisusu mir na bango to kobonza lisusu mbeka ? Bakanisi penza ete, mokolo moko, bakosilisa mosala oyo to bakokoka solo kopesa bomoi na mabanga oyo ekundama na se ya mabele mpe esila kozika ? 35 Tobiya, moto ya Amoni, oyo azalaki pembeni na ye alobaki :— Nini yango penza bazali kotonga ! Mir oyo, soki ata mbwa moko ya zamba emati na likolo na yango, ekokweya ! 36 Oh Nzambe na biso, yoka biso, pamba te totiolami ! Sala ete kotiola na bango ezonga na mito na bango moko ! Kaba bango na mboka ya bowumbu lokola bomengo ya bitumba. 37 Kozipa mabe na bango te mpe kolongola masumu na bango na miso na Yo te, pamba te basili kofinga bato oyo bazali kotonga mir. 38 Bongo tokobaki kotonga mir yango kino nyonso ekomaki na kati-kati ya bosanda, pamba te moto nyonso azalaki kosala mosala na motema na ye mobimba.

In Other Versions

Nehemiah 3 in the ANGEFD

Nehemiah 3 in the ANTPNG2D

Nehemiah 3 in the AS21

Nehemiah 3 in the BAGH

Nehemiah 3 in the BBPNG

Nehemiah 3 in the BBT1E

Nehemiah 3 in the BDS

Nehemiah 3 in the BEV

Nehemiah 3 in the BHAD

Nehemiah 3 in the BIB

Nehemiah 3 in the BLPT

Nehemiah 3 in the BNT

Nehemiah 3 in the BNTABOOT

Nehemiah 3 in the BNTLV

Nehemiah 3 in the BOATCB

Nehemiah 3 in the BOATCB2

Nehemiah 3 in the BOBCV

Nehemiah 3 in the BOCNT

Nehemiah 3 in the BOECS

Nehemiah 3 in the BOGWICC

Nehemiah 3 in the BOHCB

Nehemiah 3 in the BOHCV

Nehemiah 3 in the BOHLNT

Nehemiah 3 in the BOHNTLTAL

Nehemiah 3 in the BOICB

Nehemiah 3 in the BOILNTAP

Nehemiah 3 in the BOITCV

Nehemiah 3 in the BOKCV

Nehemiah 3 in the BOKCV2

Nehemiah 3 in the BOKHWOG

Nehemiah 3 in the BOKSSV

Nehemiah 3 in the BOLCB

Nehemiah 3 in the BOMCV

Nehemiah 3 in the BONAV

Nehemiah 3 in the BONCB

Nehemiah 3 in the BONLT

Nehemiah 3 in the BONUT2

Nehemiah 3 in the BOPLNT

Nehemiah 3 in the BOSCB

Nehemiah 3 in the BOSNC

Nehemiah 3 in the BOTLNT

Nehemiah 3 in the BOVCB

Nehemiah 3 in the BOYCB

Nehemiah 3 in the BPBB

Nehemiah 3 in the BPH

Nehemiah 3 in the BSB

Nehemiah 3 in the CCB

Nehemiah 3 in the CUV

Nehemiah 3 in the CUVS

Nehemiah 3 in the DBT

Nehemiah 3 in the DGDNT

Nehemiah 3 in the DHNT

Nehemiah 3 in the DNT

Nehemiah 3 in the ELBE

Nehemiah 3 in the EMTV

Nehemiah 3 in the ESV

Nehemiah 3 in the FBV

Nehemiah 3 in the FEB

Nehemiah 3 in the GGMNT

Nehemiah 3 in the GNT

Nehemiah 3 in the HARY

Nehemiah 3 in the HNT

Nehemiah 3 in the IRVA

Nehemiah 3 in the IRVB

Nehemiah 3 in the IRVG

Nehemiah 3 in the IRVH

Nehemiah 3 in the IRVK

Nehemiah 3 in the IRVM

Nehemiah 3 in the IRVM2

Nehemiah 3 in the IRVO

Nehemiah 3 in the IRVP

Nehemiah 3 in the IRVT

Nehemiah 3 in the IRVT2

Nehemiah 3 in the IRVU

Nehemiah 3 in the ISVN

Nehemiah 3 in the JSNT

Nehemiah 3 in the KAPI

Nehemiah 3 in the KBT1ETNIK

Nehemiah 3 in the KBV

Nehemiah 3 in the KJV

Nehemiah 3 in the KNFD

Nehemiah 3 in the LBA

Nehemiah 3 in the LBLA

Nehemiah 3 in the LNT

Nehemiah 3 in the LSV

Nehemiah 3 in the MAAL

Nehemiah 3 in the MBV

Nehemiah 3 in the MBV2

Nehemiah 3 in the MHNT

Nehemiah 3 in the MKNFD

Nehemiah 3 in the MNG

Nehemiah 3 in the MNT

Nehemiah 3 in the MNT2

Nehemiah 3 in the MRS1T

Nehemiah 3 in the NAA

Nehemiah 3 in the NASB

Nehemiah 3 in the NBLA

Nehemiah 3 in the NBS

Nehemiah 3 in the NBVTP

Nehemiah 3 in the NET2

Nehemiah 3 in the NIV11

Nehemiah 3 in the NNT

Nehemiah 3 in the NNT2

Nehemiah 3 in the NNT3

Nehemiah 3 in the PDDPT

Nehemiah 3 in the PFNT

Nehemiah 3 in the RMNT

Nehemiah 3 in the SBIAS

Nehemiah 3 in the SBIBS

Nehemiah 3 in the SBIBS2

Nehemiah 3 in the SBICS

Nehemiah 3 in the SBIDS

Nehemiah 3 in the SBIGS

Nehemiah 3 in the SBIHS

Nehemiah 3 in the SBIIS

Nehemiah 3 in the SBIIS2

Nehemiah 3 in the SBIIS3

Nehemiah 3 in the SBIKS

Nehemiah 3 in the SBIKS2

Nehemiah 3 in the SBIMS

Nehemiah 3 in the SBIOS

Nehemiah 3 in the SBIPS

Nehemiah 3 in the SBISS

Nehemiah 3 in the SBITS

Nehemiah 3 in the SBITS2

Nehemiah 3 in the SBITS3

Nehemiah 3 in the SBITS4

Nehemiah 3 in the SBIUS

Nehemiah 3 in the SBIVS

Nehemiah 3 in the SBT

Nehemiah 3 in the SBT1E

Nehemiah 3 in the SCHL

Nehemiah 3 in the SNT

Nehemiah 3 in the SUSU

Nehemiah 3 in the SUSU2

Nehemiah 3 in the SYNO

Nehemiah 3 in the TBIAOTANT

Nehemiah 3 in the TBT1E

Nehemiah 3 in the TBT1E2

Nehemiah 3 in the TFTIP

Nehemiah 3 in the TFTU

Nehemiah 3 in the TGNTATF3T

Nehemiah 3 in the THAI

Nehemiah 3 in the TNFD

Nehemiah 3 in the TNT

Nehemiah 3 in the TNTIK

Nehemiah 3 in the TNTIL

Nehemiah 3 in the TNTIN

Nehemiah 3 in the TNTIP

Nehemiah 3 in the TNTIZ

Nehemiah 3 in the TOMA

Nehemiah 3 in the TTENT

Nehemiah 3 in the UBG

Nehemiah 3 in the UGV

Nehemiah 3 in the UGV2

Nehemiah 3 in the UGV3

Nehemiah 3 in the VBL

Nehemiah 3 in the VDCC

Nehemiah 3 in the YALU

Nehemiah 3 in the YAPE

Nehemiah 3 in the YBVTP

Nehemiah 3 in the ZBP