Nehemiah 4 (BOLCB2)

1 Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi. 2 Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango. 3 Kasi tosambelaki Nzambe na biso mpe totiaki bakengeli, butu mpe moyi, mpo ete babundela biso liboso na bango. 4 Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! » 5 Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba : « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. » 6 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na bango bayaki mbala zomi koyebisa biso mabongisi na bango : « Na bisika nyonso oyo bokozala, bakobundisa biso ! » 7 Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango. 8 Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu : « Bobanga bango te ! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino ! » 9 Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye. 10 Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda. 11 Ezala ba-oyo bazalaki kotonga mir mpe ba-oyo bazalaki komema mabele mpe biloko ya mosala, bango nyonso bazalaki kosala na loboko moko ; bongo na loboko mosusu, basimbaki ebundeli. 12 Moko na moko kati na batongi ndako azalaki na mopanga na ye na loketo, mpe azalaki kosala mosala na ye ndenge wana. Na mopanzi na ngai, ezalaki na moto moko abongama mpo na kobeta kelelo. 13 Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu :— Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi ; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu. 14 Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso. 15 Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka. 16 Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato : « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye ; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. » 17 Ezala ngai, bandeko na ngai, basali na ngai to bakengeli oyo bazalaki elongo na ngai, moko te azalaki kolongola bilamba na ye ; moto nyonso azalaki na ebundeli na ye na loboko ata tango azalaki kokende kosukola.

In Other Versions

Nehemiah 4 in the ANGEFD

Nehemiah 4 in the ANTPNG2D

Nehemiah 4 in the AS21

Nehemiah 4 in the BAGH

Nehemiah 4 in the BBPNG

Nehemiah 4 in the BBT1E

Nehemiah 4 in the BDS

Nehemiah 4 in the BEV

Nehemiah 4 in the BHAD

Nehemiah 4 in the BIB

Nehemiah 4 in the BLPT

Nehemiah 4 in the BNT

Nehemiah 4 in the BNTABOOT

Nehemiah 4 in the BNTLV

Nehemiah 4 in the BOATCB

Nehemiah 4 in the BOATCB2

Nehemiah 4 in the BOBCV

Nehemiah 4 in the BOCNT

Nehemiah 4 in the BOECS

Nehemiah 4 in the BOGWICC

Nehemiah 4 in the BOHCB

Nehemiah 4 in the BOHCV

Nehemiah 4 in the BOHLNT

Nehemiah 4 in the BOHNTLTAL

Nehemiah 4 in the BOICB

Nehemiah 4 in the BOILNTAP

Nehemiah 4 in the BOITCV

Nehemiah 4 in the BOKCV

Nehemiah 4 in the BOKCV2

Nehemiah 4 in the BOKHWOG

Nehemiah 4 in the BOKSSV

Nehemiah 4 in the BOLCB

Nehemiah 4 in the BOMCV

Nehemiah 4 in the BONAV

Nehemiah 4 in the BONCB

Nehemiah 4 in the BONLT

Nehemiah 4 in the BONUT2

Nehemiah 4 in the BOPLNT

Nehemiah 4 in the BOSCB

Nehemiah 4 in the BOSNC

Nehemiah 4 in the BOTLNT

Nehemiah 4 in the BOVCB

Nehemiah 4 in the BOYCB

Nehemiah 4 in the BPBB

Nehemiah 4 in the BPH

Nehemiah 4 in the BSB

Nehemiah 4 in the CCB

Nehemiah 4 in the CUV

Nehemiah 4 in the CUVS

Nehemiah 4 in the DBT

Nehemiah 4 in the DGDNT

Nehemiah 4 in the DHNT

Nehemiah 4 in the DNT

Nehemiah 4 in the ELBE

Nehemiah 4 in the EMTV

Nehemiah 4 in the ESV

Nehemiah 4 in the FBV

Nehemiah 4 in the FEB

Nehemiah 4 in the GGMNT

Nehemiah 4 in the GNT

Nehemiah 4 in the HARY

Nehemiah 4 in the HNT

Nehemiah 4 in the IRVA

Nehemiah 4 in the IRVB

Nehemiah 4 in the IRVG

Nehemiah 4 in the IRVH

Nehemiah 4 in the IRVK

Nehemiah 4 in the IRVM

Nehemiah 4 in the IRVM2

Nehemiah 4 in the IRVO

Nehemiah 4 in the IRVP

Nehemiah 4 in the IRVT

Nehemiah 4 in the IRVT2

Nehemiah 4 in the IRVU

Nehemiah 4 in the ISVN

Nehemiah 4 in the JSNT

Nehemiah 4 in the KAPI

Nehemiah 4 in the KBT1ETNIK

Nehemiah 4 in the KBV

Nehemiah 4 in the KJV

Nehemiah 4 in the KNFD

Nehemiah 4 in the LBA

Nehemiah 4 in the LBLA

Nehemiah 4 in the LNT

Nehemiah 4 in the LSV

Nehemiah 4 in the MAAL

Nehemiah 4 in the MBV

Nehemiah 4 in the MBV2

Nehemiah 4 in the MHNT

Nehemiah 4 in the MKNFD

Nehemiah 4 in the MNG

Nehemiah 4 in the MNT

Nehemiah 4 in the MNT2

Nehemiah 4 in the MRS1T

Nehemiah 4 in the NAA

Nehemiah 4 in the NASB

Nehemiah 4 in the NBLA

Nehemiah 4 in the NBS

Nehemiah 4 in the NBVTP

Nehemiah 4 in the NET2

Nehemiah 4 in the NIV11

Nehemiah 4 in the NNT

Nehemiah 4 in the NNT2

Nehemiah 4 in the NNT3

Nehemiah 4 in the PDDPT

Nehemiah 4 in the PFNT

Nehemiah 4 in the RMNT

Nehemiah 4 in the SBIAS

Nehemiah 4 in the SBIBS

Nehemiah 4 in the SBIBS2

Nehemiah 4 in the SBICS

Nehemiah 4 in the SBIDS

Nehemiah 4 in the SBIGS

Nehemiah 4 in the SBIHS

Nehemiah 4 in the SBIIS

Nehemiah 4 in the SBIIS2

Nehemiah 4 in the SBIIS3

Nehemiah 4 in the SBIKS

Nehemiah 4 in the SBIKS2

Nehemiah 4 in the SBIMS

Nehemiah 4 in the SBIOS

Nehemiah 4 in the SBIPS

Nehemiah 4 in the SBISS

Nehemiah 4 in the SBITS

Nehemiah 4 in the SBITS2

Nehemiah 4 in the SBITS3

Nehemiah 4 in the SBITS4

Nehemiah 4 in the SBIUS

Nehemiah 4 in the SBIVS

Nehemiah 4 in the SBT

Nehemiah 4 in the SBT1E

Nehemiah 4 in the SCHL

Nehemiah 4 in the SNT

Nehemiah 4 in the SUSU

Nehemiah 4 in the SUSU2

Nehemiah 4 in the SYNO

Nehemiah 4 in the TBIAOTANT

Nehemiah 4 in the TBT1E

Nehemiah 4 in the TBT1E2

Nehemiah 4 in the TFTIP

Nehemiah 4 in the TFTU

Nehemiah 4 in the TGNTATF3T

Nehemiah 4 in the THAI

Nehemiah 4 in the TNFD

Nehemiah 4 in the TNT

Nehemiah 4 in the TNTIK

Nehemiah 4 in the TNTIL

Nehemiah 4 in the TNTIN

Nehemiah 4 in the TNTIP

Nehemiah 4 in the TNTIZ

Nehemiah 4 in the TOMA

Nehemiah 4 in the TTENT

Nehemiah 4 in the UBG

Nehemiah 4 in the UGV

Nehemiah 4 in the UGV2

Nehemiah 4 in the UGV3

Nehemiah 4 in the VBL

Nehemiah 4 in the VDCC

Nehemiah 4 in the YALU

Nehemiah 4 in the YAPE

Nehemiah 4 in the YBVTP

Nehemiah 4 in the ZBP