Numbers 8 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › » 3 Aron asalaki kaka bongo : atiaki minda na liboso ya etelemiselo ya minda ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize. 4 Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda : basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango ; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize. 5 Yawe alobaki na Moyize : 6 « Kamata Balevi kati na bana ya Isalaele mpe petola bango. 7 Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango : okobwakela bango mayi ya bopetoli ; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto. 8 Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta ; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu. 9 Yeisa Balevi liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe sangisa lisanga mobimba ya Isalaele. 10 Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko. 11 Sima na yango, Aron akobonza Balevi lokola likabo oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe mpo ete bazwa makoki ya kosala mosala ya Yawe. 12 Mpe na sima, Balevi bakotia maboko na bango likolo ya mito ya bangombe ya mibali. Bonza ngombe moko lokola mbeka ya masumu epai na Yawe mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Balevi. 13 Tika ete Balevi batelema liboso ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo bonza bango lokola likabo epai na Yawe. 14 Ezali na nzela wana nde okotia pembeni Balevi kati na bana ya Isalaele, mpe bakozala ya Ngai. 15 Sima na yo kopetola Balevi mpe kobonza bango lokola likabo, bakozwa ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani.Boye, okopetola bango mpe okobonza bango lokola likabo epai na Yawe, 16 pamba te bango nde bazali bato oyo bapesameli Ngai kati na bana ya Isalaele. Ngai moko nde nazwaki bango na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele. 17 Pamba te, bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele bazali ya Ngai, ezala bana ya liboso ya bana ya bato to ya banyama. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso na mokili ya Ejipito, natiaki bango pembeni mpo na Ngai moko. 18 Mpe nazwaki Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele. 19 Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. » 20 Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele basalaki mpo na Balevi, makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. 21 Balevi bamipetolaki mpe basukolaki bilamba na bango. Aron abonzaki bango lokola likabo epai na Yawe mpe asalaki mpo na bango mosala ya bolimbisi masumu mpo na kopetola bango. 22 Sima na yango, Balevi bazwaki ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani, na se ya bokonzi ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Basalaki mpo na Balevi, makambo oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. 23 Yawe alobaki na Moyize : 24 « Tala bikateli oyo etali Balevi : mobali nyonso oyo azali na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale na mitano mpe koleka asengeli koya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. 25 Kasi soki akokisi mibu tuku mitano, akotika mosala oyo azalaki kosala, akosala lisusu mosala te. 26 Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »

In Other Versions

Numbers 8 in the ANGEFD

Numbers 8 in the ANTPNG2D

Numbers 8 in the AS21

Numbers 8 in the BAGH

Numbers 8 in the BBPNG

Numbers 8 in the BBT1E

Numbers 8 in the BDS

Numbers 8 in the BEV

Numbers 8 in the BHAD

Numbers 8 in the BIB

Numbers 8 in the BLPT

Numbers 8 in the BNT

Numbers 8 in the BNTABOOT

Numbers 8 in the BNTLV

Numbers 8 in the BOATCB

Numbers 8 in the BOATCB2

Numbers 8 in the BOBCV

Numbers 8 in the BOCNT

Numbers 8 in the BOECS

Numbers 8 in the BOGWICC

Numbers 8 in the BOHCB

Numbers 8 in the BOHCV

Numbers 8 in the BOHLNT

Numbers 8 in the BOHNTLTAL

Numbers 8 in the BOICB

Numbers 8 in the BOILNTAP

Numbers 8 in the BOITCV

Numbers 8 in the BOKCV

Numbers 8 in the BOKCV2

Numbers 8 in the BOKHWOG

Numbers 8 in the BOKSSV

Numbers 8 in the BOLCB

Numbers 8 in the BOMCV

Numbers 8 in the BONAV

Numbers 8 in the BONCB

Numbers 8 in the BONLT

Numbers 8 in the BONUT2

Numbers 8 in the BOPLNT

Numbers 8 in the BOSCB

Numbers 8 in the BOSNC

Numbers 8 in the BOTLNT

Numbers 8 in the BOVCB

Numbers 8 in the BOYCB

Numbers 8 in the BPBB

Numbers 8 in the BPH

Numbers 8 in the BSB

Numbers 8 in the CCB

Numbers 8 in the CUV

Numbers 8 in the CUVS

Numbers 8 in the DBT

Numbers 8 in the DGDNT

Numbers 8 in the DHNT

Numbers 8 in the DNT

Numbers 8 in the ELBE

Numbers 8 in the EMTV

Numbers 8 in the ESV

Numbers 8 in the FBV

Numbers 8 in the FEB

Numbers 8 in the GGMNT

Numbers 8 in the GNT

Numbers 8 in the HARY

Numbers 8 in the HNT

Numbers 8 in the IRVA

Numbers 8 in the IRVB

Numbers 8 in the IRVG

Numbers 8 in the IRVH

Numbers 8 in the IRVK

Numbers 8 in the IRVM

Numbers 8 in the IRVM2

Numbers 8 in the IRVO

Numbers 8 in the IRVP

Numbers 8 in the IRVT

Numbers 8 in the IRVT2

Numbers 8 in the IRVU

Numbers 8 in the ISVN

Numbers 8 in the JSNT

Numbers 8 in the KAPI

Numbers 8 in the KBT1ETNIK

Numbers 8 in the KBV

Numbers 8 in the KJV

Numbers 8 in the KNFD

Numbers 8 in the LBA

Numbers 8 in the LBLA

Numbers 8 in the LNT

Numbers 8 in the LSV

Numbers 8 in the MAAL

Numbers 8 in the MBV

Numbers 8 in the MBV2

Numbers 8 in the MHNT

Numbers 8 in the MKNFD

Numbers 8 in the MNG

Numbers 8 in the MNT

Numbers 8 in the MNT2

Numbers 8 in the MRS1T

Numbers 8 in the NAA

Numbers 8 in the NASB

Numbers 8 in the NBLA

Numbers 8 in the NBS

Numbers 8 in the NBVTP

Numbers 8 in the NET2

Numbers 8 in the NIV11

Numbers 8 in the NNT

Numbers 8 in the NNT2

Numbers 8 in the NNT3

Numbers 8 in the PDDPT

Numbers 8 in the PFNT

Numbers 8 in the RMNT

Numbers 8 in the SBIAS

Numbers 8 in the SBIBS

Numbers 8 in the SBIBS2

Numbers 8 in the SBICS

Numbers 8 in the SBIDS

Numbers 8 in the SBIGS

Numbers 8 in the SBIHS

Numbers 8 in the SBIIS

Numbers 8 in the SBIIS2

Numbers 8 in the SBIIS3

Numbers 8 in the SBIKS

Numbers 8 in the SBIKS2

Numbers 8 in the SBIMS

Numbers 8 in the SBIOS

Numbers 8 in the SBIPS

Numbers 8 in the SBISS

Numbers 8 in the SBITS

Numbers 8 in the SBITS2

Numbers 8 in the SBITS3

Numbers 8 in the SBITS4

Numbers 8 in the SBIUS

Numbers 8 in the SBIVS

Numbers 8 in the SBT

Numbers 8 in the SBT1E

Numbers 8 in the SCHL

Numbers 8 in the SNT

Numbers 8 in the SUSU

Numbers 8 in the SUSU2

Numbers 8 in the SYNO

Numbers 8 in the TBIAOTANT

Numbers 8 in the TBT1E

Numbers 8 in the TBT1E2

Numbers 8 in the TFTIP

Numbers 8 in the TFTU

Numbers 8 in the TGNTATF3T

Numbers 8 in the THAI

Numbers 8 in the TNFD

Numbers 8 in the TNT

Numbers 8 in the TNTIK

Numbers 8 in the TNTIL

Numbers 8 in the TNTIN

Numbers 8 in the TNTIP

Numbers 8 in the TNTIZ

Numbers 8 in the TOMA

Numbers 8 in the TTENT

Numbers 8 in the UBG

Numbers 8 in the UGV

Numbers 8 in the UGV2

Numbers 8 in the UGV3

Numbers 8 in the VBL

Numbers 8 in the VDCC

Numbers 8 in the YALU

Numbers 8 in the YAPE

Numbers 8 in the YBVTP

Numbers 8 in the ZBP