Numbers 9 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai, na sanza ya liboso ya mobu oyo ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. Alobaki na ye : 2 « Tika ete bana ya Isalaele basepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama. 3 Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. » 4 Boye, Moyize ayebisaki bana ya Isalaele ete basepelaka feti ya Pasika. 5 Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize. 6 Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron 7 mpe bayebisaki Moyize :— Tokomi mbindo mpo ete tosimbaki ebembe. Boye, mpo na nini te biso mpe tomema likabo na biso epai na Yawe elongo na bato mosusu ya Isalaele ? 8 Moyize azongiselaki bango :— Bozela nanu ete naluka koyeba makambo oyo Yawe atindi na tina na bino. 9 Boye Yawe alobaki na Moyize : 10 — Yebisa bana ya Isalaele : « Soki moko kati na bino to kati na bakitani na bino akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe na mokolo wana, ezala soki azali mosika na mobembo, akoki kosepela feti ya Pasika mpo na lokumu na Yawe. 11 Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale ; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo. 12 Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika. 13 Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye. 14 Soki mpe mopaya oyo avandi kati na bino alingi kosepela Pasika ya Yawe, asengeli kosala kaka bongo, asengeli kolanda mibeko mpe malako na yango. Ezala mpo na bapaya to mpo na bana mboka, bosengeli kozala na mibeko ya losambo ya ndenge moko. » 15 Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto. 16 Mpe ekobaki kozala kaka ndenge wana : lipata ezalaki kozipa Mongombo ; bongo na butu, ezalaki komonana lokola moto. 17 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende ; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango. 18 Ezalaki na mitindo na Yawe kaka nde bana ya Isalaele bazalaki kotambola mpe kosala molako na bango. Tango nyonso lipata ezalaki kowumela na likolo ya Mongombo, bango mpe bazalaki kowumela na molako. 19 Soki lipata ewumeli tango molayi likolo ya Mongombo, bana ya Isalaele bazalaki kotosa mitindo na Yawe mpe bazalaki kokende te. 20 Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango ; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo. 21 Na mbala mosusu, lipata ezalaki kowumela butu moko kaka, wuta na pokwa kino na tongo ; bongo tango ezalaki kolongwa na tongo na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, bango mpe bazalaki kokende. To mpe ezalaki kosala mokolo moko mpe butu moko ; mpe soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende. 22 Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende. 23 Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.

In Other Versions

Numbers 9 in the ANGEFD

Numbers 9 in the ANTPNG2D

Numbers 9 in the AS21

Numbers 9 in the BAGH

Numbers 9 in the BBPNG

Numbers 9 in the BBT1E

Numbers 9 in the BDS

Numbers 9 in the BEV

Numbers 9 in the BHAD

Numbers 9 in the BIB

Numbers 9 in the BLPT

Numbers 9 in the BNT

Numbers 9 in the BNTABOOT

Numbers 9 in the BNTLV

Numbers 9 in the BOATCB

Numbers 9 in the BOATCB2

Numbers 9 in the BOBCV

Numbers 9 in the BOCNT

Numbers 9 in the BOECS

Numbers 9 in the BOGWICC

Numbers 9 in the BOHCB

Numbers 9 in the BOHCV

Numbers 9 in the BOHLNT

Numbers 9 in the BOHNTLTAL

Numbers 9 in the BOICB

Numbers 9 in the BOILNTAP

Numbers 9 in the BOITCV

Numbers 9 in the BOKCV

Numbers 9 in the BOKCV2

Numbers 9 in the BOKHWOG

Numbers 9 in the BOKSSV

Numbers 9 in the BOLCB

Numbers 9 in the BOMCV

Numbers 9 in the BONAV

Numbers 9 in the BONCB

Numbers 9 in the BONLT

Numbers 9 in the BONUT2

Numbers 9 in the BOPLNT

Numbers 9 in the BOSCB

Numbers 9 in the BOSNC

Numbers 9 in the BOTLNT

Numbers 9 in the BOVCB

Numbers 9 in the BOYCB

Numbers 9 in the BPBB

Numbers 9 in the BPH

Numbers 9 in the BSB

Numbers 9 in the CCB

Numbers 9 in the CUV

Numbers 9 in the CUVS

Numbers 9 in the DBT

Numbers 9 in the DGDNT

Numbers 9 in the DHNT

Numbers 9 in the DNT

Numbers 9 in the ELBE

Numbers 9 in the EMTV

Numbers 9 in the ESV

Numbers 9 in the FBV

Numbers 9 in the FEB

Numbers 9 in the GGMNT

Numbers 9 in the GNT

Numbers 9 in the HARY

Numbers 9 in the HNT

Numbers 9 in the IRVA

Numbers 9 in the IRVB

Numbers 9 in the IRVG

Numbers 9 in the IRVH

Numbers 9 in the IRVK

Numbers 9 in the IRVM

Numbers 9 in the IRVM2

Numbers 9 in the IRVO

Numbers 9 in the IRVP

Numbers 9 in the IRVT

Numbers 9 in the IRVT2

Numbers 9 in the IRVU

Numbers 9 in the ISVN

Numbers 9 in the JSNT

Numbers 9 in the KAPI

Numbers 9 in the KBT1ETNIK

Numbers 9 in the KBV

Numbers 9 in the KJV

Numbers 9 in the KNFD

Numbers 9 in the LBA

Numbers 9 in the LBLA

Numbers 9 in the LNT

Numbers 9 in the LSV

Numbers 9 in the MAAL

Numbers 9 in the MBV

Numbers 9 in the MBV2

Numbers 9 in the MHNT

Numbers 9 in the MKNFD

Numbers 9 in the MNG

Numbers 9 in the MNT

Numbers 9 in the MNT2

Numbers 9 in the MRS1T

Numbers 9 in the NAA

Numbers 9 in the NASB

Numbers 9 in the NBLA

Numbers 9 in the NBS

Numbers 9 in the NBVTP

Numbers 9 in the NET2

Numbers 9 in the NIV11

Numbers 9 in the NNT

Numbers 9 in the NNT2

Numbers 9 in the NNT3

Numbers 9 in the PDDPT

Numbers 9 in the PFNT

Numbers 9 in the RMNT

Numbers 9 in the SBIAS

Numbers 9 in the SBIBS

Numbers 9 in the SBIBS2

Numbers 9 in the SBICS

Numbers 9 in the SBIDS

Numbers 9 in the SBIGS

Numbers 9 in the SBIHS

Numbers 9 in the SBIIS

Numbers 9 in the SBIIS2

Numbers 9 in the SBIIS3

Numbers 9 in the SBIKS

Numbers 9 in the SBIKS2

Numbers 9 in the SBIMS

Numbers 9 in the SBIOS

Numbers 9 in the SBIPS

Numbers 9 in the SBISS

Numbers 9 in the SBITS

Numbers 9 in the SBITS2

Numbers 9 in the SBITS3

Numbers 9 in the SBITS4

Numbers 9 in the SBIUS

Numbers 9 in the SBIVS

Numbers 9 in the SBT

Numbers 9 in the SBT1E

Numbers 9 in the SCHL

Numbers 9 in the SNT

Numbers 9 in the SUSU

Numbers 9 in the SUSU2

Numbers 9 in the SYNO

Numbers 9 in the TBIAOTANT

Numbers 9 in the TBT1E

Numbers 9 in the TBT1E2

Numbers 9 in the TFTIP

Numbers 9 in the TFTU

Numbers 9 in the TGNTATF3T

Numbers 9 in the THAI

Numbers 9 in the TNFD

Numbers 9 in the TNT

Numbers 9 in the TNTIK

Numbers 9 in the TNTIL

Numbers 9 in the TNTIN

Numbers 9 in the TNTIP

Numbers 9 in the TNTIZ

Numbers 9 in the TOMA

Numbers 9 in the TTENT

Numbers 9 in the UBG

Numbers 9 in the UGV

Numbers 9 in the UGV2

Numbers 9 in the UGV3

Numbers 9 in the VBL

Numbers 9 in the VDCC

Numbers 9 in the YALU

Numbers 9 in the YAPE

Numbers 9 in the YBVTP

Numbers 9 in the ZBP