Philemon 1 (BOLCB2)

1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto, mpe Timote, ndeko na biso ; Epai ya Filemo, molingami na biso mpe moninga ya mosala ; 2 epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi ;epai ya Arshipe, moninga na biso ya etumba ;mpe epai ya Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo : 3 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! 4 Tango nyonso nasambelaka, natangaka kombo na yo mpe nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai, 5 pamba te nazali koyoka sango ya bolingo na yo mpo na basantu nyonso, mpe ya kondima na yo kati na Nkolo Yesu. 6 Nabondelaka ete kondima oyo ezali kosangisa biso emonisama na misala, mpo ete ososola malamu bolamu nyonso oyo tozali na yango kati na Klisto. 7 Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema. 8 Yango wana, atako, kati na Klisto, nazali na makoki ya kotinda yo kosala likambo songolo to pakala, 9 kasi nasepeli kosenga na yo na kombo ya bolingo, ngai Polo, mobange mpe sik’oyo mokangami na boloko mpo na Yesu-Klisto ; 10 nasepeli kosenga na yo na tina na Onezime oyo azali mwana na ngai kati na Klisto, pamba te nakomaki tata na ye ya molimo awa, kati na boloko. 11 Na kala, azalaki na tina ata moko te na miso na yo, kasi sik’oyo akomi na tina mingi na miso na yo mpe na miso na ngai. 12 Nazali kozongisa ye epai na yo, pamba te azali penza motema na ngai. 13 Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo. 14 Nzokande nakokaki te kosala yango, pamba te nazwaki ndingisa na yo te, mpo ete bolamu oyo okosala ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi na kotindika te. 15 Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela, 16 lokola mowumbu lisusu te kasi koleka kutu ata mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litomba mingi lisusu koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo. 17 Soki ya solo ozwaka ngai lokola ndeko na yo kati na kondima, yamba ye lokola nde oyambi ngai. 18 Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai. 19 Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo. 20 Ndeko na ngai, mpo na bolingo ya Nkolo, salela ngai bolamu wana ; kitisa ngai motema lokola ndeko na yo kati na Klisto. 21 Nakomeli yo na elikya ete okosala makambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala kutu koleka. 22 Nasengi na yo lisusu ete obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akozongisa ngai epai na bino lokola eyano na mabondeli na bino. 23 Epafrasi, moninga na ngai ya boloko kati na Yesu-Klisto, atindeli yo mbote. 24 Ndenge moko mpe Malako, Arisitarke, Demasi mpe Luka, baninga na ngai ya mosala, bango mpe batindeli yo mbote. 25 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na yo !

In Other Versions

Philemon 1 in the ANGEFD

Philemon 1 in the ANTPNG2D

Philemon 1 in the AS21

Philemon 1 in the BAGH

Philemon 1 in the BBPNG

Philemon 1 in the BBT1E

Philemon 1 in the BDS

Philemon 1 in the BEV

Philemon 1 in the BHAD

Philemon 1 in the BIB

Philemon 1 in the BLPT

Philemon 1 in the BNT

Philemon 1 in the BNTABOOT

Philemon 1 in the BNTLV

Philemon 1 in the BOATCB

Philemon 1 in the BOATCB2

Philemon 1 in the BOBCV

Philemon 1 in the BOCNT

Philemon 1 in the BOECS

Philemon 1 in the BOGWICC

Philemon 1 in the BOHCB

Philemon 1 in the BOHCV

Philemon 1 in the BOHLNT

Philemon 1 in the BOHNTLTAL

Philemon 1 in the BOICB

Philemon 1 in the BOILNTAP

Philemon 1 in the BOITCV

Philemon 1 in the BOKCV

Philemon 1 in the BOKCV2

Philemon 1 in the BOKHWOG

Philemon 1 in the BOKSSV

Philemon 1 in the BOLCB

Philemon 1 in the BOMCV

Philemon 1 in the BONAV

Philemon 1 in the BONCB

Philemon 1 in the BONLT

Philemon 1 in the BONUT2

Philemon 1 in the BOPLNT

Philemon 1 in the BOSCB

Philemon 1 in the BOSNC

Philemon 1 in the BOTLNT

Philemon 1 in the BOVCB

Philemon 1 in the BOYCB

Philemon 1 in the BPBB

Philemon 1 in the BPH

Philemon 1 in the BSB

Philemon 1 in the CCB

Philemon 1 in the CUV

Philemon 1 in the CUVS

Philemon 1 in the DBT

Philemon 1 in the DGDNT

Philemon 1 in the DHNT

Philemon 1 in the DNT

Philemon 1 in the ELBE

Philemon 1 in the EMTV

Philemon 1 in the ESV

Philemon 1 in the FBV

Philemon 1 in the FEB

Philemon 1 in the GGMNT

Philemon 1 in the GNT

Philemon 1 in the HARY

Philemon 1 in the HNT

Philemon 1 in the IRVA

Philemon 1 in the IRVB

Philemon 1 in the IRVG

Philemon 1 in the IRVH

Philemon 1 in the IRVK

Philemon 1 in the IRVM

Philemon 1 in the IRVM2

Philemon 1 in the IRVO

Philemon 1 in the IRVP

Philemon 1 in the IRVT

Philemon 1 in the IRVT2

Philemon 1 in the IRVU

Philemon 1 in the ISVN

Philemon 1 in the JSNT

Philemon 1 in the KAPI

Philemon 1 in the KBT1ETNIK

Philemon 1 in the KBV

Philemon 1 in the KJV

Philemon 1 in the KNFD

Philemon 1 in the LBA

Philemon 1 in the LBLA

Philemon 1 in the LNT

Philemon 1 in the LSV

Philemon 1 in the MAAL

Philemon 1 in the MBV

Philemon 1 in the MBV2

Philemon 1 in the MHNT

Philemon 1 in the MKNFD

Philemon 1 in the MNG

Philemon 1 in the MNT

Philemon 1 in the MNT2

Philemon 1 in the MRS1T

Philemon 1 in the NAA

Philemon 1 in the NASB

Philemon 1 in the NBLA

Philemon 1 in the NBS

Philemon 1 in the NBVTP

Philemon 1 in the NET2

Philemon 1 in the NIV11

Philemon 1 in the NNT

Philemon 1 in the NNT2

Philemon 1 in the NNT3

Philemon 1 in the PDDPT

Philemon 1 in the PFNT

Philemon 1 in the RMNT

Philemon 1 in the SBIAS

Philemon 1 in the SBIBS

Philemon 1 in the SBIBS2

Philemon 1 in the SBICS

Philemon 1 in the SBIDS

Philemon 1 in the SBIGS

Philemon 1 in the SBIHS

Philemon 1 in the SBIIS

Philemon 1 in the SBIIS2

Philemon 1 in the SBIIS3

Philemon 1 in the SBIKS

Philemon 1 in the SBIKS2

Philemon 1 in the SBIMS

Philemon 1 in the SBIOS

Philemon 1 in the SBIPS

Philemon 1 in the SBISS

Philemon 1 in the SBITS

Philemon 1 in the SBITS2

Philemon 1 in the SBITS3

Philemon 1 in the SBITS4

Philemon 1 in the SBIUS

Philemon 1 in the SBIVS

Philemon 1 in the SBT

Philemon 1 in the SBT1E

Philemon 1 in the SCHL

Philemon 1 in the SNT

Philemon 1 in the SUSU

Philemon 1 in the SUSU2

Philemon 1 in the SYNO

Philemon 1 in the TBIAOTANT

Philemon 1 in the TBT1E

Philemon 1 in the TBT1E2

Philemon 1 in the TFTIP

Philemon 1 in the TFTU

Philemon 1 in the TGNTATF3T

Philemon 1 in the THAI

Philemon 1 in the TNFD

Philemon 1 in the TNT

Philemon 1 in the TNTIK

Philemon 1 in the TNTIL

Philemon 1 in the TNTIN

Philemon 1 in the TNTIP

Philemon 1 in the TNTIZ

Philemon 1 in the TOMA

Philemon 1 in the TTENT

Philemon 1 in the UBG

Philemon 1 in the UGV

Philemon 1 in the UGV2

Philemon 1 in the UGV3

Philemon 1 in the VBL

Philemon 1 in the VDCC

Philemon 1 in the YALU

Philemon 1 in the YAPE

Philemon 1 in the YBVTP

Philemon 1 in the ZBP