Proverbs 24 (BOLCB2)

1 Kolulaka te bato oyo basalaka mabempe kolukaka te kozala elongo na bango, 2 pamba te mitema na bango ekanisaka kaka kosala mabe,mpe bibebu na bango eyeisaka kaka mobulu soki elobi. 3 Ndako etongamaka na nzela ya bwanya,mpe elendisamaka na nzela ya mayele. 4 Bashambre ekotondisama na biloko nyonsoya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi. 5 Moto ya bwanya atondi na nguya,moto oyo azalaka na boyebi alendisaka nguya na ye. 6 Pamba te kolonga na etumba esengaka bwanya,mpe lobiko ezalaka kati na motango ebele ya bapesi toli. 7 Bwanya ezalaka likolo mingi mpo na zoba,yango wana azalaka te na likambo ya kolobakati na mayangani oyo esalemaka pembeni ya ekuke. 8 Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabeakokende sango lokola moteki baninga. 9 Mabongisi ya bozoba ezali masumu,mpe bato bayinaka motioli. 10 Soki omilembisi na mokolo ya pasi,makasi na yo ekozala pamba. 11 Kangola bato oyo bazali komema bango na kufa,mpe bikisa bato oyo bazali kokende na kufalokola bato oyo balangwe masanga. 12 Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko tekati na makambo oyo nyonso ; »boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ?Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ?Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ? 13 Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi,pamba te ezalaka kitoko !Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozalaelengi na lolemo na yo. 14 Yeba lisusu ete bwanya ezali elengimpo na molimo na yo ;soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu,mpe elikya na yo ekozala ya pamba te. 15 Yo moto mabe, komeka te kotia mitambokati na ndako ya moto ya sembo,mpe komeka te kopanza yango, 16 pamba te ata soki moto ya sembo akweyi mbala sambo,akotelema kaka ;nzokande pasi ekweyisaka moto mabe. 17 Soki monguna na yo akweyi, kosepela te ;mpe soki apengwi, tika ete motema na yo esepela te ; 18 noki te Yawe akomona, akosepela tempe akokitisela yo kanda na Ye. 19 Kosilika te likolo ya bato oyo basalaka mabe,kolula te bato mabe ; 20 pamba te lobi ya malamu ekozala tempo na moto oyo asalaka mabe,mpe mwinda ya bato mabe ekokufa. 21 Mwana na ngai, tosaka Yawe mpe mokonzi,kosanganaka te na batomboki, 22 pamba te bango mibale bakoki kotindela batomboki pasi na pwasa.Bongo, nani ayebi pasi oyo bakoki kotinda ? 23 Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya :Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te. 24 Moto oyo alobaka na moto mabe : « Ozali moto ya sembo, »bato bakolakela ye mabe, mpe bikolo ekotombokela ye. 25 Kasi bato oyo bapamelaka moto mabe bakozala malamumpe lipamboli ekozala likolo na bango. 26 Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu. 27 Bongisa libanda ya mosala na yo,bongisa bilanga na yo,bongo na sima, tonga ndako na yo. 28 Kotatola na pamba te mpo na kosala moninga na yo mabe ;mpo na nini olingi kosalela bibebu na yo na lokuta ? 29 Kolobaka te : « Nakosala ye ndenge asali ngai,nakozongisela ye kolanda makambo oyo ye asali. » 30 Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi,mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele ; 31 bongo, tala ndenge etondi na banzube,tala ndenge matiti mabe ezipi yango,mpe mir na yango ya mabanga ebukani. 32 Tango natiaki makanisi na ngaikati na makambo oyo namonaki,nazwaki mayele oyo : 33 mwa pongi moke, mwa kopema moke,mwa kokanga maboko moke mpo na kolala, 34 bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela,mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.

In Other Versions

Proverbs 24 in the ANGEFD

Proverbs 24 in the ANTPNG2D

Proverbs 24 in the AS21

Proverbs 24 in the BAGH

Proverbs 24 in the BBPNG

Proverbs 24 in the BBT1E

Proverbs 24 in the BDS

Proverbs 24 in the BEV

Proverbs 24 in the BHAD

Proverbs 24 in the BIB

Proverbs 24 in the BLPT

Proverbs 24 in the BNT

Proverbs 24 in the BNTABOOT

Proverbs 24 in the BNTLV

Proverbs 24 in the BOATCB

Proverbs 24 in the BOATCB2

Proverbs 24 in the BOBCV

Proverbs 24 in the BOCNT

Proverbs 24 in the BOECS

Proverbs 24 in the BOGWICC

Proverbs 24 in the BOHCB

Proverbs 24 in the BOHCV

Proverbs 24 in the BOHLNT

Proverbs 24 in the BOHNTLTAL

Proverbs 24 in the BOICB

Proverbs 24 in the BOILNTAP

Proverbs 24 in the BOITCV

Proverbs 24 in the BOKCV

Proverbs 24 in the BOKCV2

Proverbs 24 in the BOKHWOG

Proverbs 24 in the BOKSSV

Proverbs 24 in the BOLCB

Proverbs 24 in the BOMCV

Proverbs 24 in the BONAV

Proverbs 24 in the BONCB

Proverbs 24 in the BONLT

Proverbs 24 in the BONUT2

Proverbs 24 in the BOPLNT

Proverbs 24 in the BOSCB

Proverbs 24 in the BOSNC

Proverbs 24 in the BOTLNT

Proverbs 24 in the BOVCB

Proverbs 24 in the BOYCB

Proverbs 24 in the BPBB

Proverbs 24 in the BPH

Proverbs 24 in the BSB

Proverbs 24 in the CCB

Proverbs 24 in the CUV

Proverbs 24 in the CUVS

Proverbs 24 in the DBT

Proverbs 24 in the DGDNT

Proverbs 24 in the DHNT

Proverbs 24 in the DNT

Proverbs 24 in the ELBE

Proverbs 24 in the EMTV

Proverbs 24 in the ESV

Proverbs 24 in the FBV

Proverbs 24 in the FEB

Proverbs 24 in the GGMNT

Proverbs 24 in the GNT

Proverbs 24 in the HARY

Proverbs 24 in the HNT

Proverbs 24 in the IRVA

Proverbs 24 in the IRVB

Proverbs 24 in the IRVG

Proverbs 24 in the IRVH

Proverbs 24 in the IRVK

Proverbs 24 in the IRVM

Proverbs 24 in the IRVM2

Proverbs 24 in the IRVO

Proverbs 24 in the IRVP

Proverbs 24 in the IRVT

Proverbs 24 in the IRVT2

Proverbs 24 in the IRVU

Proverbs 24 in the ISVN

Proverbs 24 in the JSNT

Proverbs 24 in the KAPI

Proverbs 24 in the KBT1ETNIK

Proverbs 24 in the KBV

Proverbs 24 in the KJV

Proverbs 24 in the KNFD

Proverbs 24 in the LBA

Proverbs 24 in the LBLA

Proverbs 24 in the LNT

Proverbs 24 in the LSV

Proverbs 24 in the MAAL

Proverbs 24 in the MBV

Proverbs 24 in the MBV2

Proverbs 24 in the MHNT

Proverbs 24 in the MKNFD

Proverbs 24 in the MNG

Proverbs 24 in the MNT

Proverbs 24 in the MNT2

Proverbs 24 in the MRS1T

Proverbs 24 in the NAA

Proverbs 24 in the NASB

Proverbs 24 in the NBLA

Proverbs 24 in the NBS

Proverbs 24 in the NBVTP

Proverbs 24 in the NET2

Proverbs 24 in the NIV11

Proverbs 24 in the NNT

Proverbs 24 in the NNT2

Proverbs 24 in the NNT3

Proverbs 24 in the PDDPT

Proverbs 24 in the PFNT

Proverbs 24 in the RMNT

Proverbs 24 in the SBIAS

Proverbs 24 in the SBIBS

Proverbs 24 in the SBIBS2

Proverbs 24 in the SBICS

Proverbs 24 in the SBIDS

Proverbs 24 in the SBIGS

Proverbs 24 in the SBIHS

Proverbs 24 in the SBIIS

Proverbs 24 in the SBIIS2

Proverbs 24 in the SBIIS3

Proverbs 24 in the SBIKS

Proverbs 24 in the SBIKS2

Proverbs 24 in the SBIMS

Proverbs 24 in the SBIOS

Proverbs 24 in the SBIPS

Proverbs 24 in the SBISS

Proverbs 24 in the SBITS

Proverbs 24 in the SBITS2

Proverbs 24 in the SBITS3

Proverbs 24 in the SBITS4

Proverbs 24 in the SBIUS

Proverbs 24 in the SBIVS

Proverbs 24 in the SBT

Proverbs 24 in the SBT1E

Proverbs 24 in the SCHL

Proverbs 24 in the SNT

Proverbs 24 in the SUSU

Proverbs 24 in the SUSU2

Proverbs 24 in the SYNO

Proverbs 24 in the TBIAOTANT

Proverbs 24 in the TBT1E

Proverbs 24 in the TBT1E2

Proverbs 24 in the TFTIP

Proverbs 24 in the TFTU

Proverbs 24 in the TGNTATF3T

Proverbs 24 in the THAI

Proverbs 24 in the TNFD

Proverbs 24 in the TNT

Proverbs 24 in the TNTIK

Proverbs 24 in the TNTIL

Proverbs 24 in the TNTIN

Proverbs 24 in the TNTIP

Proverbs 24 in the TNTIZ

Proverbs 24 in the TOMA

Proverbs 24 in the TTENT

Proverbs 24 in the UBG

Proverbs 24 in the UGV

Proverbs 24 in the UGV2

Proverbs 24 in the UGV3

Proverbs 24 in the VBL

Proverbs 24 in the VDCC

Proverbs 24 in the YALU

Proverbs 24 in the YAPE

Proverbs 24 in the YBVTP

Proverbs 24 in the ZBP