Proverbs 28 (BOLCB2)

1 Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye,kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi. 2 Soki kotomboka ezali kati na mokili,bakonzi bakomaka ebele ;kasi moto ya mayele mpe ya bososoli ayeisaka kimia. 3 Mokonzi oyo anyokolaka bato bakelelaazali lokola mvula ya makasi oyo ebebisaka bilokompe ememaka nzala. 4 Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe,kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe. 5 Bato mabe basosolaka te makambo ya bosembo,kasi bato oyo balukaka Yawe basosolaka yango nyonso. 6 Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamukoleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe. 7 Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele,kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyengeayokisaka tata na ye soni. 8 Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibiabombelaka yango moto oyo asalisaka babola. 9 Moto oyo akangi matoyi na yempo na koboya koyoka mobeko,libondeli na ye ekomaka nkele na miso ya Nzambe. 10 Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabeakokangama na motambo oyo asali ye moko,kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango. 11 Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya,kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu. 12 Tango bato ya sembo balongaka, ezalaka esengo mingi ;kasi tango bato mabe bazwaka bokonzi,bato bamibombaka. 13 Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te,kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu. 14 Esengo na moto oyo abangaka tango nyonso kosala mabe,kasi ye oyo ayeisaka motema na ye libanga akweyaka kati na pasi. 15 Mokonzi mabe oyo azali kokamba bato bakelelaazali lokola nkosi ya kandato lokola ngombolo oyo ezali kolanda nyama ya kolia. 16 Mokonzi oyo anyokolaka bato azangi mayele,kasi oyo aboyaka bomengo na nzela ya moyibiayeisaka mikolo ya bomoi na ye ebele. 17 Moto oyo amitungisaka mpo ete abomi moningaakimaka kino na libulu ya kufa ;tika ete moto moko te akanga ye nzela. 18 Moto oyo atambolaka na bosembo akozwa lobiko,kasi moto ya mobulu oyo alandaka banzela mibaleakokweya na moko. 19 Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei,kasi moto oyo alandaka bagoyigoyiakotonda na bobola. 20 Moto ya sembo afulukaka na mapamboli,kasi moto oyo awelaka kokoma mozwi na lombanguakozanga te kozwa etumbu. 21 Kopona bilongi ezalaka malamu te ;nzokande ata mpo na eteni ya lipa, moto akoki mpe kosala mabe. 22 Moto ya bilulela azalaka motema moto-motompo na kozwa bomengo,mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye. 23 Moto oyo apamelaka moninga na yeakozwa ngolu na sukakoleka moto oyo alobaka maloba ya sukali. 24 Moto oyo ayibaka tata mpe mama na ye,bongo alobaka : « Ezali na yango mabe te, »azali moninga ya mobomi. 25 Moto ya lokoso ayeisaka koswana,kasi moto oyo atiaka elikya na Yaweakotonda na mafuta. 26 Moto oyo atiaka elikya kati na ye moko kaka azali zoba,kasi moto oyo atambolaka na bwanya akokangolama. 27 Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te,kasi moto oyo aboyaka kotala bangoakotonda na bilakeli mabe. 28 Tango bato mabe bazwaka bokonzi, bato bamibombaka ;kasi tango bakufaka, bato ya sembo bakomaka ebele.

In Other Versions

Proverbs 28 in the ANGEFD

Proverbs 28 in the ANTPNG2D

Proverbs 28 in the AS21

Proverbs 28 in the BAGH

Proverbs 28 in the BBPNG

Proverbs 28 in the BBT1E

Proverbs 28 in the BDS

Proverbs 28 in the BEV

Proverbs 28 in the BHAD

Proverbs 28 in the BIB

Proverbs 28 in the BLPT

Proverbs 28 in the BNT

Proverbs 28 in the BNTABOOT

Proverbs 28 in the BNTLV

Proverbs 28 in the BOATCB

Proverbs 28 in the BOATCB2

Proverbs 28 in the BOBCV

Proverbs 28 in the BOCNT

Proverbs 28 in the BOECS

Proverbs 28 in the BOGWICC

Proverbs 28 in the BOHCB

Proverbs 28 in the BOHCV

Proverbs 28 in the BOHLNT

Proverbs 28 in the BOHNTLTAL

Proverbs 28 in the BOICB

Proverbs 28 in the BOILNTAP

Proverbs 28 in the BOITCV

Proverbs 28 in the BOKCV

Proverbs 28 in the BOKCV2

Proverbs 28 in the BOKHWOG

Proverbs 28 in the BOKSSV

Proverbs 28 in the BOLCB

Proverbs 28 in the BOMCV

Proverbs 28 in the BONAV

Proverbs 28 in the BONCB

Proverbs 28 in the BONLT

Proverbs 28 in the BONUT2

Proverbs 28 in the BOPLNT

Proverbs 28 in the BOSCB

Proverbs 28 in the BOSNC

Proverbs 28 in the BOTLNT

Proverbs 28 in the BOVCB

Proverbs 28 in the BOYCB

Proverbs 28 in the BPBB

Proverbs 28 in the BPH

Proverbs 28 in the BSB

Proverbs 28 in the CCB

Proverbs 28 in the CUV

Proverbs 28 in the CUVS

Proverbs 28 in the DBT

Proverbs 28 in the DGDNT

Proverbs 28 in the DHNT

Proverbs 28 in the DNT

Proverbs 28 in the ELBE

Proverbs 28 in the EMTV

Proverbs 28 in the ESV

Proverbs 28 in the FBV

Proverbs 28 in the FEB

Proverbs 28 in the GGMNT

Proverbs 28 in the GNT

Proverbs 28 in the HARY

Proverbs 28 in the HNT

Proverbs 28 in the IRVA

Proverbs 28 in the IRVB

Proverbs 28 in the IRVG

Proverbs 28 in the IRVH

Proverbs 28 in the IRVK

Proverbs 28 in the IRVM

Proverbs 28 in the IRVM2

Proverbs 28 in the IRVO

Proverbs 28 in the IRVP

Proverbs 28 in the IRVT

Proverbs 28 in the IRVT2

Proverbs 28 in the IRVU

Proverbs 28 in the ISVN

Proverbs 28 in the JSNT

Proverbs 28 in the KAPI

Proverbs 28 in the KBT1ETNIK

Proverbs 28 in the KBV

Proverbs 28 in the KJV

Proverbs 28 in the KNFD

Proverbs 28 in the LBA

Proverbs 28 in the LBLA

Proverbs 28 in the LNT

Proverbs 28 in the LSV

Proverbs 28 in the MAAL

Proverbs 28 in the MBV

Proverbs 28 in the MBV2

Proverbs 28 in the MHNT

Proverbs 28 in the MKNFD

Proverbs 28 in the MNG

Proverbs 28 in the MNT

Proverbs 28 in the MNT2

Proverbs 28 in the MRS1T

Proverbs 28 in the NAA

Proverbs 28 in the NASB

Proverbs 28 in the NBLA

Proverbs 28 in the NBS

Proverbs 28 in the NBVTP

Proverbs 28 in the NET2

Proverbs 28 in the NIV11

Proverbs 28 in the NNT

Proverbs 28 in the NNT2

Proverbs 28 in the NNT3

Proverbs 28 in the PDDPT

Proverbs 28 in the PFNT

Proverbs 28 in the RMNT

Proverbs 28 in the SBIAS

Proverbs 28 in the SBIBS

Proverbs 28 in the SBIBS2

Proverbs 28 in the SBICS

Proverbs 28 in the SBIDS

Proverbs 28 in the SBIGS

Proverbs 28 in the SBIHS

Proverbs 28 in the SBIIS

Proverbs 28 in the SBIIS2

Proverbs 28 in the SBIIS3

Proverbs 28 in the SBIKS

Proverbs 28 in the SBIKS2

Proverbs 28 in the SBIMS

Proverbs 28 in the SBIOS

Proverbs 28 in the SBIPS

Proverbs 28 in the SBISS

Proverbs 28 in the SBITS

Proverbs 28 in the SBITS2

Proverbs 28 in the SBITS3

Proverbs 28 in the SBITS4

Proverbs 28 in the SBIUS

Proverbs 28 in the SBIVS

Proverbs 28 in the SBT

Proverbs 28 in the SBT1E

Proverbs 28 in the SCHL

Proverbs 28 in the SNT

Proverbs 28 in the SUSU

Proverbs 28 in the SUSU2

Proverbs 28 in the SYNO

Proverbs 28 in the TBIAOTANT

Proverbs 28 in the TBT1E

Proverbs 28 in the TBT1E2

Proverbs 28 in the TFTIP

Proverbs 28 in the TFTU

Proverbs 28 in the TGNTATF3T

Proverbs 28 in the THAI

Proverbs 28 in the TNFD

Proverbs 28 in the TNT

Proverbs 28 in the TNTIK

Proverbs 28 in the TNTIL

Proverbs 28 in the TNTIN

Proverbs 28 in the TNTIP

Proverbs 28 in the TNTIZ

Proverbs 28 in the TOMA

Proverbs 28 in the TTENT

Proverbs 28 in the UBG

Proverbs 28 in the UGV

Proverbs 28 in the UGV2

Proverbs 28 in the UGV3

Proverbs 28 in the VBL

Proverbs 28 in the VDCC

Proverbs 28 in the YALU

Proverbs 28 in the YAPE

Proverbs 28 in the YBVTP

Proverbs 28 in the ZBP