Psalms 119 (BOLCB2)
1 Esengo na bato oyo bazangi pamelampe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe ! 2 Esengo na bato oyo babatelaka malako na Yempe balukaka Ye na mitema na bango mobimba ! 3 Basalaka mabe te,kasi balandaka banzela ya Nzambe. 4 Opesaki mibekompo ete etosama malamu. 5 Tika ete nabongisa etamboli na ngaimpo ete natosa mitindo na Yo ! 6 Na bongo, nakoyoka soni tetango nakotosa mibeko na Yo nyonso. 7 Nakosanzola Yo na motema ya sembowana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo. 8 Nalingi kotosa mitindo na Yo ;kosundola ngai libela te ! 9 Ndenge nini elenge akoki kowumelana nzela ya sembo ?Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo. 10 Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;batela ngai mpo ete napengwa temosika ya mibeko na Yo ! 11 Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngaimpo ete nasala masumu te na miso na Yo. 12 Yawe, tika ete opambolama !Lakisa ngai mitindo na Yo ! 13 Na monoko na ngai, natangakamibeko na Yo nyonso. 14 Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yolokola nde nazali na bomengo nyonso. 15 Nakanisaka malako na Yompe natambolaka na banzela na Yo. 16 Nasepelaka mingi na malako na Yompe nabosanaka liloba na Yo te. 17 Salela ngai, mosali na Yo, bolamumpo ete nabika mpe natosa liloba na Yo. 18 Fungola miso na ngaimpo ete namona kitoko ya mibeko na Yo. 19 Nazali mopaya awa na mokili ;kobombela ngai mibeko na Yo te. 20 Molimo na ngai ezalaka tango nyonsona posa makasi ya koyeba mibeko na Yo. 21 Otelemelaka bato ya lofundu,bato oyo balakelama mabempe bapengwaka mosika ya mibeko na Yo. 22 Longola soni mpe kotiolama na bomoi na ngai,pamba te natosaka malako na Yo. 23 Ezala soki bakambi basali likitampe bayokani kotelemela ngai, mosali na Yo,nakokanisa kaka mitindo na Yo. 24 Malako na Yo esepelisaka ngai makasi,epesaka ngai toli. 25 Nakangami na putulu ;batela bomoi na ngai kolanda liloba na Yo. 26 Nayebisaki Yo banzela na ngai,mpe oyanolaki ngai ;lakisa ngai mibeko na Yo ! 27 Sala ete nasosola nzela ya mitindo na Yompo ete nakanisa misala minene na Yo ! 28 Nazali kolela mpo na pasi na motema ;pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo. 29 Mema ngai mosika ya nzela ya lokuta ;mpe, na boboto na Yo, teya ngai mobeko na Yo. 30 Naponaki nzela ya bosolo ;natambolaka kolanda mibeko na Yo. 31 Nakangami na malako na Yo ;Yawe, koyokisa ngai soni te. 32 Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo,pamba te opesaka ngai bososoli na yango. 33 Yawe, teya ngai nzela ya mitindo na Yompo ete nabatela yango kino na suka. 34 Pesa ngai bososoli mpo ete natosa mibeko na Yompe nalanda yango na motema na ngai mobimba. 35 Tambolisa ngai kati na nzela ya mibeko na Yo,pamba te nasepelaka na yango. 36 Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo,kasi na bomengo te ! 37 Longola miso na ngai na makambo ya pamba,batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo ! 38 Kokisela mosali na Yo bilakaoyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo. 39 Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka,pamba te mibeko na Yo ezali malamu. 40 Nasepelaka makasi na mibeko na Yo ;batela bomoi na ngai kati na bosembo na Yo ! 41 Yawe, tika ete bolingo ekomela ngai,mpe lobiko na Yo, kolanda elaka na Yo ; 42 bongo nakokoka kozwa eyano ya kopesana mofingi na ngai,pamba te natiaka elikya na liloba na Yo. 43 Tika ete monoko na ngai elobaka kaka bosolo,pamba te natiaka elikya kati na mibeko na Yo. 44 Nakotosa mibeko na Yo tango nyonso,mpe libela na libela. 45 Nakobika na bonsomi ya solo,pamba te nasepelaka kotosa mitindo na Yo. 46 Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzina kozanga koyoka soni. 47 Nasepelaka mingi na mibeko na Yompe nalingaka yango mingi. 48 Nalapi ndayi mpo na mibeko na Yo,oyo nalingaka,mpe nakokanisa mitindo na Yo. 49 Kanisa makambo oyo olobaki na mosali na Yo,pamba te opesaki ngai elikya. 50 Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ;batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo. 51 Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ;kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo. 52 Yawe, tango nakanisaka mikano na Yo ya kala,nazwaka kati na yango kobondisama. 53 Nayokaka pasi mingi na motematango namonaka bato mabekosundola mibeko na Yo. 54 Nakoma koyemba mitindo na Yona bisika nyonso epai wapi nazali moleki nzela. 55 Yawe, nakanisaka Yo na butumpo ete nabatela mibeko na Yo ; 56 pamba te libula na ngai ezali :kotosa mibeko na Yo. 57 Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali :kotosa liloba na Yo. 58 Na motema na ngai mobimba, nalukaka kosepelisa Yo ;salela ngai ngolu kolanda bilaka na Yo ! 59 Natali malamu etamboli na ngaimpe namizongisi kati na malako na Yo. 60 Natosaka mibeko na Yo noki,nazelisaka te. 61 Solo, mitambo ya bato mabe ekangaki ngai,kasi ngai nabosanaki te mibeko na Yo. 62 Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yolikolo na mibeko na Yo ya sembo. 63 Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yompe babatelaka mitindo na Yo. 64 Yawe, mokili etondi na bolingo na Yo ;lakisa ngai mitindo na Yo ! 65 Yawe, salela mosali na Yo bolamukolanda liloba na Yo. 66 Teya ngai bolamu ya bososoli mpe ya mayele,pamba te namipesaka na mibeko na Yo. 67 Liboso ete obeta ngai, nazalaki mopengwi ;kasi sik’oyo, nakomi kotosa liloba na Yo. 68 Ozali malamu mpe osalaka makambo ya malamu ;teya ngai mitindo na Yo ! 69 Bato ya lolendo bakoselaka ngai makambo ;kasi ngai, natosaka mitindo na Yona motema na ngai mobimba. 70 Mitema na bango ezali mabanga ;kasi ngai, nasepelaka na mibeko na Yo. 71 Ezalaki penza malamu mpo na ngai ete obeta ngai,mpo ete nayekola mitindo na Yo. 72 Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolakina monoko na Yo ezali malamukoleka biloko nkoto mokoya wolo mpe ya palata. 73 Osalaki mpe olendisaki ngai na maboko na Yo,pesa ngai mayele mpo ete nayekola mibeko na Yo ! 74 Tango bato oyo batosaka Yo bamonaka ngai,basepelaka makasi,mpo ete natiaka elikya na liloba na Yo. 75 Yawe, nayebi malamuete mibeko na Yo ezali sembo,mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yonde obetaki ngai. 76 Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai,kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo ! 77 Talisa ngai mawa na Yo mpo ete nabika,pamba te nasepelaka na mibeko na Yo. 78 Tika ete bato wana ya lofundu,oyo bamonisaka ngai pasi na kozanga tina, bakufa soni !Kasi ngai nakokanisa kaka mibeko na Yo. 79 Tika ete bato oyo batosaka Yo,ba-oyo bayebi malako na Yo,bazongela ngai. 80 Tika ete motema na ngai ezanga pamelampo na kotosa mitindo na Yo,mpo ete nakufa soni te. 81 Natondi na posa ya lobiko na Yo,nazali na elikya kati na liloba na Yo. 82 Miso na ngai elembi kozelakokokisama ya elaka na Yo ;nakomi komituna :« Okobondisa ngai tango nini ? » 83 Nakomi lokola mbekioyo ezali kokawuka na milinga,nzokande nabosanaka mitindo na Yo te. 84 Mikolo ya bomoi ya mosali na Yoezali motango boni ?Mokolo nini okopesa banyokoli na ngai etumbu ? 85 Bato ya lolendo batimoli mabulumpo na kokanga ngai,baboyi kotosa mibeko na Yo. 86 Mibeko na Yo nyonso ezali sembo ;kasi bazali konyokola ngai kaka pamba ;yaka kosunga ngai ! 87 Etikali moke mpo ete balongola ngai na mokili ;kasi atako bongo, nasundoli mibeko na Yo te. 88 Kati na bolingo na Yo, batela bomoi na ngaimpo ete natosa malako na Yo. 89 Yawe, liloba na Yo ezali mpo na seko,epikama kati na likolo ; 90 boyengebene na Yo ekowumela seko na seko.Okela mabele, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo ; 91 opesa mibeko, mpe ezali kaka kino na mokolo ya lelo,pamba te nyonso kati na mokili mobimbaepesaka Yo lokumu. 92 Soki nasepelaki na mibeko na Yo te,mbele nakufa kala kati na pasi na ngai. 93 Nakotikala kobosana ata moke te mitindo na Yo,pamba te obatelaka bomoi na ngaina nzela na yango. 94 Bikisa ngai, pamba te nazali moto na Yompe natosaka mitindo na Yo ! 95 Bato mabe bazali koluka koboma ngai,kasi ngai nakangami kaka na malako na Yo. 96 Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka,namonaki mondelo ;kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te. 97 Nalingaka mibeko na Yo mingi !Nakanisaka yango mikolo nyonso. 98 Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanyakoleka banguna na ngai ;ezalaka elongo na ngai tango nyonso. 99 Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele,pamba te nakanisaka malako na Yo. 100 Naleki mibange na bososoli,pamba te natosaka mibeko na Yo. 101 Natambolaka te na banzela nyonso ya mabempo na kotosa liloba na Yo. 102 Nakangamaka na mibeko na Yo,pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango. 103 Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengina monoko na ngai !Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi. 104 Mitindo na Yo ekomisi ngai moto ya bososoli ;yango wana nayinaka nzela nyonso ya mabe. 105 Liloba na Yo ezali mwindampo na makolo na ngai,mpe pole mpo na nzela na ngai. 106 Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango :« Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. » 107 Motema na ngai etutami makasi ;Yawe, batela bomoi na ngaikolanda liloba na Yo. 108 Yawe, ndima likabo ya bibebu na ngai,mpe teya ngai mibeko na Yo. 109 Solo, nakutanaka tango nyonso na makama,kasi nabosanaka mibeko na Yo te. 110 Bato mabe batiaka mitambo mpo ete nakweya,kasi nakangamaka kaka na mibeko na Yo. 111 Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela,esalaka esengo ya motema na ngai. 112 Nazwa mokano ya kotambolakolanda mitindo na Yo,tango nyonso, kino na suka. 113 Nayinaka bato ya mitema mibale,kasi nalingaka nde mibeko na Yo. 114 Ozali ebombamelo mpe nguba na ngai ;natiaka elikya kati na liloba na Yo. 115 Bato ya misala mabe, bokende mosika na ngai !Nakotosa mibeko ya Nzambe na ngai ! 116 Sunga ngai kolanda elaka na Yo, mpe nakobika ;koyokisa elikya na ngai soni te. 117 Sunga ngai mpo ete nabika ;nakotikala kobosana mitindo na Yo ata moke te. 118 Obwakaka bato nyonso oyo bapesakamitindo na Yo mokongo,pamba te mokano na bango ezalaka ya lokuta. 119 Olongolaka bato nyonso ya mabe ya mokililokola bosoto ;yango wana nalingaka malako na Yo. 120 Nalengaka na somo liboso na Yompe nabangaka mikano na Yo. 121 Natambolaka na bosembo mpe bosolo ;kokaba ngai na maboko ya banyokoli na ngai te ! 122 Kamata mokumba ya bolamu na ngai,mosali na Yo ;tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te. 123 Miso na ngai elembi kozela lisungi kowuta na Yompe kokokisama ya bosembo na Yokolanda elaka na Yo. 124 Salela ngai, mosali na Yo, kolanda bolingo na Yo,lakisa ngai mitindo na Yo. 125 Nazali mosali na Yo ; pesa ngai mayelempo ete nasosola malako na Yo. 126 Yawe, tango ya kosala ekoki ;pamba te bazali kobuka mibeko na Yo ! 127 Yango wana nalingaka mibeko na Yokoleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ; 128 namonaka mpe malako na Yo nyonso alima ;nzokande, nayinaka lokuta nyonso. 129 Malako na Yo ezali kitoko,yango wana nabatelaka yango. 130 Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,epesaka bazoba mayele. 131 Monoko na ngai efungwamaka makasilikolo ya kozela,pamba te nazali na posa makasi ya mibeko na Yo. 132 Baluka epai na ngai mpe talisa ngai ngolu na Yokolanda ndenge okata mpo na batooyo balingaka Kombo na Yo. 133 Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yompe pekisa mabe ete ekonza ngai te. 134 Kangola ngai wuta na minyoko ya bato,mpe nakotosa mibeko na Yo. 135 Tika ete elongi na Yo engengela ngai,mosali na Yo ;lakisa ngai mibeko na Yo ! 136 Miso na ngai ezali kosopa mpinzoli,pamba te mibeko na Yo ezali kotosama te. 137 Yawe, ozali sembo,mpe mibeko na Yo ezali alima ; 138 osalaki malako na Yona bosembo mpe na bolingo. 139 Mpo ete banguna na ngai bazwakaliloba na Yo na motuya te,nayokaka kanda makasi komata ngai na motema. 140 Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ;mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango. 141 Atako nazali moke mpe batiolaka ngai,kasi nabosanaka mitindo na Yo te. 142 Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela,ekotikala kobongwana te ;mpe mibeko na Yo ezali solo. 143 Pasi ekangi ngai, mpe mayele esili ngai ;kasi mibeko na Yo epesaka ngai esengo. 144 Malako na Yo ezali sembo mpo na libela ;pesa ngai bososoli mpo ete nabika ! 145 Nazali kobelela Yona motema na ngai mobimba :« Yawe, yanola ngai ;nakotosa mitindo na Yo ! 146 Nazali kobelela Yo : bikisa ngai,mpo ete natosa malako na Yo ! 147 Nalamukaka liboso ete tongo etanampo na kobelela Yo,nazali na elikya kati na liloba na Yo. 148 Nalamukaka na kati-kati ya butumpo na kokanisa mitindo na Yo. 149 Yoka ngai na bolingo na Yo !Yawe, batela bomoi na ngaikolanda mibeko na Yo ! 150 Bato oyo basalaka mabongisi mabe,oyo batosaka mibeko na Yo te,bazali koya pene na ngai. 151 Nzokande Yo, Yawe, ozali pene,mpe mibeko na Yo nyonso ezali bosolo. 152 Wuta kala, ngai nayebi, na nzela ya malako na Yo,ete otia mibeko yango mpo na libela. 153 Mona malamu pasi na ngai mpe kangola ngai,pamba te nabosanaka mibeko na Yo te. 154 Kota likambo na ngai mpe kangola ngai,batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo ! 155 Lobiko ezalaka mosika ya bato mabe,pamba te bamonaka pamba mitindo na Yo. 156 Yawe, mawa na Yo ezali monene penza ;batela bomoi na ngai kolanda mibeko na Yo. 157 Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele,kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo. 158 Natalaka na nkele bato oyo bazangi kondima,ba-oyo batosaka liloba na Yo te. 159 Yawe, tala ndenge nalingaka mitindo na Yo !Batela bomoi na ngai kolanda bolingo na Yo. 160 Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo,mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezalimpo na libela. 161 Bakambi banyokolaka ngai kaka pamba,kasi kaka liloba na Yo nde ebangisakamotema na ngai. 162 Nasepelaka na liloba na Yolokola moto oyo azwi bomengo ebele ya bitumba. 163 Nayinaka lokuta mpe nayokaka yango nkele,nalingaka nde mibeko na Yo. 164 Nakumisaka Yo mbala sambo na mokolompo na mibeko ya bosembo na Yo. 165 Bato oyo balingaka mibeko na Yobazali bato na kimia monene,mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku. 166 Yawe, natielaka Yo motemampo ete obikisa ngai,mpe natosaka mibeko na Yo. 167 Natosaka malako na Yo,pamba te nalingaka yango makasi. 168 Natosaka malako mpe mibeko na Yo,pamba te oyebi banzela na ngai nyonso. 169 Yawe, tika ete koganga na ngai ekomakino epai na Yo !Pesa ngai bososoli kolanda liloba na Yo ! 170 Tika ete mabondeli na ngai ekomakino epai na Yo !Kangola ngai kolanda elaka na Yo. 171 Tika ete bibebu na ngai ekumisa Yo,pamba te olakisaka ngai mitindo na Yo ! 172 Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo,pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo. 173 Tika ete loboko na Yo esunga ngai,pamba te napona kolanda malako na Yo. 174 Yawe, nazali na posa makasiya lobiko na Yo ;mibeko na Yo epesaka ngai esengo. 175 Tika ete nazala na bomoi mpo na kokumisa Yo,mpe tika ete mibeko na Yo esunga ngai ! 176 Nazali koyengayenga lokola meme oyo ebungi ;luka ngai, mosali na Yo,pamba te nabosani mibeko na Yo te. »