Psalms 18 (BOLCB2)

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo. 2 Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo. 3 Yawe azali libanga na ngai,ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ;azali Nzambe na ngai, libanga na ngaimpe ebombamelo na ngai ;azali nguba na ngai,Mobikisi na ngai,mpe ekimelo na ngai. 4 Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu,mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai. 5 Basinga ya kufa efinaki ngai,mpela ya libebi epesaki ngai somo. 6 Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai,mitambo ya kufa ekangaki ngai. 7 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,nagangaki epai ya Nzambe na ngaimpo ete asunga ngai.Yawe ayokaki mongongo na ngaiwuta na Tempelo na Ye ;koganga na ngai mpo na kosenga lisungiekomaki kino na matoyi na Ye. 8 Mabele ekomaki koningana makasi,miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki,pamba te Yawe asilikaki. 9 Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye,moto makasi elongo na makala ya motoekomaki kobima na monoko na Ye. 10 Yawe afungolaki Lola mpe akitaki ;mapata ya mwindo ezalaki nase ya matambe na Ye. 11 Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki,apepaki na mapapu ya mopepe. 12 Akomisaki molili ebombamelo na Ye,kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye ;mapata minene ezingelaki Ye,mwindo lokola mayi ya mozindo. 13 Kongenga oyo ezalaki liboso na Yeezalaki kokimisa mapata,konokisa mvula ya mabangampe kobimisa makala ya moto. 14 Yawe agangaki wuta na Lola,mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanakina nzela ya mvula ya mabangampe makala ya moto. 15 Abwakaki makonga na Yempe atindaki yango na bangambo nyonso ;abakisaki motango ya mikalikalimpo na kopalanganisa yango. 16 Yawe, tango ogangelaki yango,na nzela ya pema na Yompe ya milinga ya zolo na Yo,nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki,miboko ya mokili emonanaki na libanda. 17 Atandaki loboko na Ye wuta na likolo,akamataki ngai mpe abimisaki ngaina likama oyo nazalaki na yangokati na mayi ya mozindo makasi ; 18 akangolaki ngai wuta na mabokoya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai,pamba te balekaki ngai na makasi. 19 Babundisaki ngai,na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai,kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai. 20 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi,akangolaki ngai,pamba te alingaka ngai. 21 Yawe asaleli ngai makambo wanakolanda bosembo na ngai,afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai ; 22 pamba te nabateli banzela ya Yawe,napesi Nzambe na ngai mokongo telokola bato mabe. 23 Natosaka mibeko na Ye nyonsompe nabatelaka bikateli na Ye. 24 Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamelampe namibatelaki mpo ete nasala masumu te. 25 Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai,kolanda bopeto ya maboko na ngaina miso na Ye. 26 Solo, otalisaka bosembo na Yoepai ya moto oyo atambolaka na bosembo,mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela. 27 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto,kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka. 28 Yo nde obikisaka banyokolami,okitisaka bato na lofundu. 29 Yawe, Nzambe na ngai,Yo nde opelisaka mwinda na ngai ;obongolaka molili na ngai pole. 30 Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ;mpe na lisungi ya Nzambe na ngai,nakatisaka bamir. 31 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka,Liloba na Yawe ezali na mbeba te ;azali nguba mpo na bato nyonsooyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango. 32 Nani azali Nzambe soki Yawe te ?Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ? 33 Nzambe apesaka ngai makasimpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka ; 34 akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko,mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ; 35 alakisaka ngai kobunda,mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze. 36 Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai,loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai,mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi. 37 Otambolisaka ngai na kimia,mpe makolo na ngai elengaka te. 38 Nalandaka banguna na ngai,mpe nakangaka bango ;nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango. 39 Nabebisaka bango nye,mpe bakokaka lisusu kotelema te ;bakweyaka na se ya matambe na ngai. 40 Opesaka ngai makasi ya bitumba,ogumbaka banguna na ngaimpe otiaka bango na se ya matambe na ngai. 41 Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai,mpe nabebisaka bayini na ngai. 42 Bagangaka mpo na koluka lisungi,kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te ;babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te. 43 Nanikaka bango lokola putuluoyo mopepe epumbwisaka,nanyataka bango lokola potopoto ya nzela. 44 Olongisaka ngai na bitumba ya bato,obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo.Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai. 45 Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai ;mpe bapaya bayakampo ete nasepela na bango. 46 Bango nyonso balembi nzotompe bakomi kobima na kolengawuta na bandako na bango ya makasi. 47 Longonya na Yawe !Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama !Tika ete Nzambe ya lobiko na ngai anetolama ! 48 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai,oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai, 49 oyo akangolaka ngaiwuta na maboko ya banguna na ngai.Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai,obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai. 50 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo ;nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo. 51 Yawe apesaka elonga moneneepai ya mokonzi na Ye,atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye,epai ya Davidi mpe epai ya libota na ye, mpo na libela.

In Other Versions

Psalms 18 in the ANGEFD

Psalms 18 in the ANTPNG2D

Psalms 18 in the AS21

Psalms 18 in the BAGH

Psalms 18 in the BBPNG

Psalms 18 in the BBT1E

Psalms 18 in the BDS

Psalms 18 in the BEV

Psalms 18 in the BHAD

Psalms 18 in the BIB

Psalms 18 in the BLPT

Psalms 18 in the BNT

Psalms 18 in the BNTABOOT

Psalms 18 in the BNTLV

Psalms 18 in the BOATCB

Psalms 18 in the BOATCB2

Psalms 18 in the BOBCV

Psalms 18 in the BOCNT

Psalms 18 in the BOECS

Psalms 18 in the BOGWICC

Psalms 18 in the BOHCB

Psalms 18 in the BOHCV

Psalms 18 in the BOHLNT

Psalms 18 in the BOHNTLTAL

Psalms 18 in the BOICB

Psalms 18 in the BOILNTAP

Psalms 18 in the BOITCV

Psalms 18 in the BOKCV

Psalms 18 in the BOKCV2

Psalms 18 in the BOKHWOG

Psalms 18 in the BOKSSV

Psalms 18 in the BOLCB

Psalms 18 in the BOMCV

Psalms 18 in the BONAV

Psalms 18 in the BONCB

Psalms 18 in the BONLT

Psalms 18 in the BONUT2

Psalms 18 in the BOPLNT

Psalms 18 in the BOSCB

Psalms 18 in the BOSNC

Psalms 18 in the BOTLNT

Psalms 18 in the BOVCB

Psalms 18 in the BOYCB

Psalms 18 in the BPBB

Psalms 18 in the BPH

Psalms 18 in the BSB

Psalms 18 in the CCB

Psalms 18 in the CUV

Psalms 18 in the CUVS

Psalms 18 in the DBT

Psalms 18 in the DGDNT

Psalms 18 in the DHNT

Psalms 18 in the DNT

Psalms 18 in the ELBE

Psalms 18 in the EMTV

Psalms 18 in the ESV

Psalms 18 in the FBV

Psalms 18 in the FEB

Psalms 18 in the GGMNT

Psalms 18 in the GNT

Psalms 18 in the HARY

Psalms 18 in the HNT

Psalms 18 in the IRVA

Psalms 18 in the IRVB

Psalms 18 in the IRVG

Psalms 18 in the IRVH

Psalms 18 in the IRVK

Psalms 18 in the IRVM

Psalms 18 in the IRVM2

Psalms 18 in the IRVO

Psalms 18 in the IRVP

Psalms 18 in the IRVT

Psalms 18 in the IRVT2

Psalms 18 in the IRVU

Psalms 18 in the ISVN

Psalms 18 in the JSNT

Psalms 18 in the KAPI

Psalms 18 in the KBT1ETNIK

Psalms 18 in the KBV

Psalms 18 in the KJV

Psalms 18 in the KNFD

Psalms 18 in the LBA

Psalms 18 in the LBLA

Psalms 18 in the LNT

Psalms 18 in the LSV

Psalms 18 in the MAAL

Psalms 18 in the MBV

Psalms 18 in the MBV2

Psalms 18 in the MHNT

Psalms 18 in the MKNFD

Psalms 18 in the MNG

Psalms 18 in the MNT

Psalms 18 in the MNT2

Psalms 18 in the MRS1T

Psalms 18 in the NAA

Psalms 18 in the NASB

Psalms 18 in the NBLA

Psalms 18 in the NBS

Psalms 18 in the NBVTP

Psalms 18 in the NET2

Psalms 18 in the NIV11

Psalms 18 in the NNT

Psalms 18 in the NNT2

Psalms 18 in the NNT3

Psalms 18 in the PDDPT

Psalms 18 in the PFNT

Psalms 18 in the RMNT

Psalms 18 in the SBIAS

Psalms 18 in the SBIBS

Psalms 18 in the SBIBS2

Psalms 18 in the SBICS

Psalms 18 in the SBIDS

Psalms 18 in the SBIGS

Psalms 18 in the SBIHS

Psalms 18 in the SBIIS

Psalms 18 in the SBIIS2

Psalms 18 in the SBIIS3

Psalms 18 in the SBIKS

Psalms 18 in the SBIKS2

Psalms 18 in the SBIMS

Psalms 18 in the SBIOS

Psalms 18 in the SBIPS

Psalms 18 in the SBISS

Psalms 18 in the SBITS

Psalms 18 in the SBITS2

Psalms 18 in the SBITS3

Psalms 18 in the SBITS4

Psalms 18 in the SBIUS

Psalms 18 in the SBIVS

Psalms 18 in the SBT

Psalms 18 in the SBT1E

Psalms 18 in the SCHL

Psalms 18 in the SNT

Psalms 18 in the SUSU

Psalms 18 in the SUSU2

Psalms 18 in the SYNO

Psalms 18 in the TBIAOTANT

Psalms 18 in the TBT1E

Psalms 18 in the TBT1E2

Psalms 18 in the TFTIP

Psalms 18 in the TFTU

Psalms 18 in the TGNTATF3T

Psalms 18 in the THAI

Psalms 18 in the TNFD

Psalms 18 in the TNT

Psalms 18 in the TNTIK

Psalms 18 in the TNTIL

Psalms 18 in the TNTIN

Psalms 18 in the TNTIP

Psalms 18 in the TNTIZ

Psalms 18 in the TOMA

Psalms 18 in the TTENT

Psalms 18 in the UBG

Psalms 18 in the UGV

Psalms 18 in the UGV2

Psalms 18 in the UGV3

Psalms 18 in the VBL

Psalms 18 in the VDCC

Psalms 18 in the YALU

Psalms 18 in the YAPE

Psalms 18 in the YBVTP

Psalms 18 in the ZBP