Psalms 87 (BOLCB2)
1 Nzembo ya bana ya Kore.Yawe atia moboko ya Sionana likolo ya bangomba ya bule. 2 Yawe alingaka bikuke ya Sionakoleka bandako nyonso ya Jakobi. 3 Oh engumba ya Nzambe,maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo ! 4 Kati na bato oyo bayebi ngai,natangi Rahavi mpe Babiloni.Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tirimpe Kushi ebimela. 5 Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama :« Bato nyonso babimela awa,mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolonde alendisaka yango. » 6 Tango Yawe akomakikati na buku ya bikolo,akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango :« Moto songolo abotama kati na Siona ! » 7 Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka :« Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo ! »