Revelation 13 (BOLCB2)

1 Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe. 2 Nyama oyo namonaki ezalaki lokola nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya ngombolo, mpe monoko na yango lokola ya nkosi. Dalagona epesaki nyama wana nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene. 3 Moko kati na mito na yango ezalaki komonana lokola nde ezali na pota moko ya monene makasi oyo ekokaki komema yango na kufa, kasi pota yango esilaki. Mokili mobimba elulaki nyama yango mpe ekomaki kolanda yango. 4 Bato bagumbamelaki dalagona mpo ete epesaki bokonzi na yango epai ya nyama wana. Bagumbamelaki mpe nyama yango na maloba oyo : « Nani akokani na nyama oyo ? Nani akoki kobundisa yango ? » 5 Nyama epesamelaki monoko mpo na kobimisa maloba ya lolendo mpe ya kofinga Nzambe ; epesamelaki nzela ya kosalela bokonzi na yango basanza tuku minei na mibale. 6 Efungolaki monoko na yango mpe ekomaki kobimisa maloba ya kofinga Nzambe, Kombo na Ye, evandelo na Ye mpe bavandi ya Lola. 7 Epesamelaki lisusu makoki ya kobundisa mpe kolonga basantu. Mpe epesamelaki bokonzi na likolo ya mabota nyonso, mikili nyonso, nkota nyonso mpe bikolo nyonso. 8 Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki. 9 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! 10 Soki moto asengeli kokende na bowumbuakokende penza na bowumbu.Soki moto asengeli kokufa na mopangaakokufa penza na mopanga.Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu bazala na mpiko mpe kondima. 11 Bongo namonaki nyama mosusu kobima longwa na mabele. Ezalaki na maseke mibale lokola maseke ya mpate, mpe ezalaki koloba lokola dalagona. 12 Ezalaki kosalela bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na yango. Ezalaki kotindika mokili mpe bavandi na yango mpo ete bagumbamela nyama ya liboso oyo esilaki kobikisama na pota na yango wana ya monene. 13 Ezalaki kosala bilembo ya kokamwa kino kokweyisa na mabele, moto kowuta na likolo, na miso ya bato nyonso. 14 Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi. 15 Epesamelaki kutu makoki ya kopesa pema ya bomoi epai ya ekeko ya nyama ya liboso, mpo ete ekoka koloba mpe kobomisa bato nyonso oyo bakogumbamela yango te. 16 Esengaki na makasi ete bato nyonso, ezala bato minene to bato pamba, bazwi to babola, bansomi to bawumbu, batiama elembo na loboko ya mobali to na mbunzu. 17 Boye moko te akokaki kosomba to koteka soki azangi elembo ya kombo ya nyama to ya motango oyo ekokani na kombo ya nyama yango. 18 Makambo oyo ezali penza kosenga bwanya. Tika ete moto oyo azali na mayele alimbola motango ya nyama, pamba te ezali kotalisa kombo ya moto ! Motango yango ezali : nkama motoba na tuku motoba na motoba.

In Other Versions

Revelation 13 in the ANGEFD

Revelation 13 in the ANTPNG2D

Revelation 13 in the AS21

Revelation 13 in the BAGH

Revelation 13 in the BBPNG

Revelation 13 in the BBT1E

Revelation 13 in the BDS

Revelation 13 in the BEV

Revelation 13 in the BHAD

Revelation 13 in the BIB

Revelation 13 in the BLPT

Revelation 13 in the BNT

Revelation 13 in the BNTABOOT

Revelation 13 in the BNTLV

Revelation 13 in the BOATCB

Revelation 13 in the BOATCB2

Revelation 13 in the BOBCV

Revelation 13 in the BOCNT

Revelation 13 in the BOECS

Revelation 13 in the BOGWICC

Revelation 13 in the BOHCB

Revelation 13 in the BOHCV

Revelation 13 in the BOHLNT

Revelation 13 in the BOHNTLTAL

Revelation 13 in the BOICB

Revelation 13 in the BOILNTAP

Revelation 13 in the BOITCV

Revelation 13 in the BOKCV

Revelation 13 in the BOKCV2

Revelation 13 in the BOKHWOG

Revelation 13 in the BOKSSV

Revelation 13 in the BOLCB

Revelation 13 in the BOMCV

Revelation 13 in the BONAV

Revelation 13 in the BONCB

Revelation 13 in the BONLT

Revelation 13 in the BONUT2

Revelation 13 in the BOPLNT

Revelation 13 in the BOSCB

Revelation 13 in the BOSNC

Revelation 13 in the BOTLNT

Revelation 13 in the BOVCB

Revelation 13 in the BOYCB

Revelation 13 in the BPBB

Revelation 13 in the BPH

Revelation 13 in the BSB

Revelation 13 in the CCB

Revelation 13 in the CUV

Revelation 13 in the CUVS

Revelation 13 in the DBT

Revelation 13 in the DGDNT

Revelation 13 in the DHNT

Revelation 13 in the DNT

Revelation 13 in the ELBE

Revelation 13 in the EMTV

Revelation 13 in the ESV

Revelation 13 in the FBV

Revelation 13 in the FEB

Revelation 13 in the GGMNT

Revelation 13 in the GNT

Revelation 13 in the HARY

Revelation 13 in the HNT

Revelation 13 in the IRVA

Revelation 13 in the IRVB

Revelation 13 in the IRVG

Revelation 13 in the IRVH

Revelation 13 in the IRVK

Revelation 13 in the IRVM

Revelation 13 in the IRVM2

Revelation 13 in the IRVO

Revelation 13 in the IRVP

Revelation 13 in the IRVT

Revelation 13 in the IRVT2

Revelation 13 in the IRVU

Revelation 13 in the ISVN

Revelation 13 in the JSNT

Revelation 13 in the KAPI

Revelation 13 in the KBT1ETNIK

Revelation 13 in the KBV

Revelation 13 in the KJV

Revelation 13 in the KNFD

Revelation 13 in the LBA

Revelation 13 in the LBLA

Revelation 13 in the LNT

Revelation 13 in the LSV

Revelation 13 in the MAAL

Revelation 13 in the MBV

Revelation 13 in the MBV2

Revelation 13 in the MHNT

Revelation 13 in the MKNFD

Revelation 13 in the MNG

Revelation 13 in the MNT

Revelation 13 in the MNT2

Revelation 13 in the MRS1T

Revelation 13 in the NAA

Revelation 13 in the NASB

Revelation 13 in the NBLA

Revelation 13 in the NBS

Revelation 13 in the NBVTP

Revelation 13 in the NET2

Revelation 13 in the NIV11

Revelation 13 in the NNT

Revelation 13 in the NNT2

Revelation 13 in the NNT3

Revelation 13 in the PDDPT

Revelation 13 in the PFNT

Revelation 13 in the RMNT

Revelation 13 in the SBIAS

Revelation 13 in the SBIBS

Revelation 13 in the SBIBS2

Revelation 13 in the SBICS

Revelation 13 in the SBIDS

Revelation 13 in the SBIGS

Revelation 13 in the SBIHS

Revelation 13 in the SBIIS

Revelation 13 in the SBIIS2

Revelation 13 in the SBIIS3

Revelation 13 in the SBIKS

Revelation 13 in the SBIKS2

Revelation 13 in the SBIMS

Revelation 13 in the SBIOS

Revelation 13 in the SBIPS

Revelation 13 in the SBISS

Revelation 13 in the SBITS

Revelation 13 in the SBITS2

Revelation 13 in the SBITS3

Revelation 13 in the SBITS4

Revelation 13 in the SBIUS

Revelation 13 in the SBIVS

Revelation 13 in the SBT

Revelation 13 in the SBT1E

Revelation 13 in the SCHL

Revelation 13 in the SNT

Revelation 13 in the SUSU

Revelation 13 in the SUSU2

Revelation 13 in the SYNO

Revelation 13 in the TBIAOTANT

Revelation 13 in the TBT1E

Revelation 13 in the TBT1E2

Revelation 13 in the TFTIP

Revelation 13 in the TFTU

Revelation 13 in the TGNTATF3T

Revelation 13 in the THAI

Revelation 13 in the TNFD

Revelation 13 in the TNT

Revelation 13 in the TNTIK

Revelation 13 in the TNTIL

Revelation 13 in the TNTIN

Revelation 13 in the TNTIP

Revelation 13 in the TNTIZ

Revelation 13 in the TOMA

Revelation 13 in the TTENT

Revelation 13 in the UBG

Revelation 13 in the UGV

Revelation 13 in the UGV2

Revelation 13 in the UGV3

Revelation 13 in the VBL

Revelation 13 in the VDCC

Revelation 13 in the YALU

Revelation 13 in the YAPE

Revelation 13 in the YBVTP

Revelation 13 in the ZBP